Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w26 Mars nk. 14-19
  • Ndenge ya kobundisa makambo oyo ekoki kolongola likebi na biso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kobundisa makambo oyo ekoki kolongola likebi na biso
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2026
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • MAKAMBO NINI EKOKI KOLONGOLA LIKEBI?
  • NDENGE NINI YESU ABUNDISAKI MAKAMBO OYO EKOKAKI KOLONGOLA LIKEBI NA YE?
  • NDENGE NINI TOKOKI KOBUNDISA MAKAMBO OYO EKOKI KOLONGOLA LIKEBI?
  • Bikateli oyo emonisaka ete totyelaka Yehova motema
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
  • Ndimá ete okoki koyeba makambo mosusu te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Luká biyano na mituna oyo
    Programɛ ya Liyangani ya zongazonga ya Batatoli ya Yehova 2025-2026—Elongo na mokɛngɛli ya zongazonga
  • Luká biyano na mituna oyo
    Programɛ ya Liyangani ya zongazonga ya Batatoli ya Yehova 2025-2026—Elongo na momonisi ya Betele
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2026
w26 Mars nk. 14-19

18-24/05/2026

LOYEMBO 35 ‘Tóluka koyeba makambo oyo eleki ntina’

Ndenge ya kobundisa makambo oyo ekoki kolongola likebi na biso

“Bókoba kososola soki mokano ya Yehova ezali nini.”—EF. 5:17.

NA MOKUSE

Ndenge ya kokoba kotya makambo ya elimo na esika ya liboso atako ezali na makambo oyo ekoki kolongola likebi na biso.

1-2. Ndenge nini likambo moko ya ntina ekoki kokóma eloko oyo ezali kolongola likebi?

OZALI koyeba mbala ya nsuka oyo oboyaki kolanda eloko oyo elingaki kolongola likebi na yo na likambo ya ntina? Mbala mosusu eloko yango esalemaki ntango ozalaki kosala likambo moko mpe esengelaki opona soki nini ezali na ntina koleka. Na ndakisa, kanisá ete telefone na yo eleli ntango ozali kokumba motuka. Mbala mosusu babengi yo mpo na likambo moko ya ntina, kasi oyebi ete soki oyambi telefone na ntango yango ekolongola likebi na yo. Na ntango wana, kotya makanisi nyonso na kokumba motuka nde eleki ntina.

2 Tozalaka na makambo mingi ya ntina ya kosala na bomoi. Mpe toyebi ete kotya makanisi nyonso na mimeseno mpe makambo ya elimoa nde eleki ntina. (Mat. 6:33) Lokola bakumbi-motuka ya ekɛngɛ, basaleli ya Yehova balukaka koyeba makambo oyo ekoki kolongola likebi na bango na nzela oyo ezali liboso.—Mas. 4:25; Mat. 6:22.

3. Ndenge nini lisolo oyo ekosalisa biso?

3 Moko te kati na biso azalaka na mokano ya kolongola likebi na ye na makambo ya elimo. Nzokande, ezali na makambo oyo ekoki kolongola likebi na biso na pɛtɛɛ nyonso. (Luka 21:​34-36) Na yango, mpo na kosalisa biso tótya makanisi nyonso na mosala ya Yehova, na lisolo oyo tokolobela (1) makambo nini ekoki kolongola likebi na biso, (2) ndenge nini Yesu abundisaki makambo oyo ekokaki kolongola likebi na ye, mpe (3) ndenge nini tokoki kobundisa makambo oyo ekoki kolongola likebi lelo oyo.

MAKAMBO NINI EKOKI KOLONGOLA LIKEBI?

4-6. Makambo nini ekoki kolongola likebi na biso na pɛtɛɛ nyonso?

4 Biso nyonso tozalaka na makambo mingi na bomoi na biso oyo esɛngaka tótyela yango likebi. Na ndakisa, tokoki kozala na mikakatano ya kolɔngɔnɔ ya nzoto, makambo ya libota to makambo na biso moko oyo tosengeli kolandela. Makambo yango ezali na ntina, mpe tosengeli kotyela yango likebi. Kasi yango ekoki mpe kolongola likebi na biso na makambo ya elimo? Ɛɛ, soki ebandi kolata makanisi na biso, kolya biso ntango mpe makasi.

5 Lisusu, mingi na biso tofandi na bisika oyo ezali na yikiyiki ya politiki, mikakatano ya mbongo, maladi oyo epalanganaka, mpe bitumba oyo ezali kosila te na mokili oyo. (2 Tim. 3:1) Ntango makambo yango ekómeli biso, tokoki komitungisa mingi tii kokóma kokanisa makambo yango ntango nyonso.

6 Mbala mosusu oyebi bato oyo bakutaná na makambo ya mpasi ya ndenge wana oyo ebulunganisá bomoi na bango. Batikalá na mpasi na motema mpo na nyonso oyo bakutaná na yango. Ya solo, biso bato tosalemá te mpo na konyokwama ntango nyonso. Ezali likambo ya kokamwa te ndenge bato mosusu bamoni ete bakokoka te kozongela bomoi oyo bazalaki na yango liboso. Na yango, mpo na koluka kobosana mitungisi na bango, bato mosusu batondisi bomoi na bango na kominanola to kosakana. Tokoki kosala nini soki tomoni ete biso mpe tozali na moko ya makambo yango? Tótalela mateya oyo tokoki kozwa epai ya Yesu, oyo ekoki kosalisa biso tóbundisa makambo oyo ekoki kolongola likebi na losambo na biso.

NDENGE NINI YESU ABUNDISAKI MAKAMBO OYO EKOKAKI KOLONGOLA LIKEBI NA YE?

7. Makambo nini ekokaki kolongola likebi ya Yesu?

7 Makambo mingi ekokaki kolongola likebi ya Yesu na mosala ya Nzambe, na ndakisa makambo ya bomoi ya bato mpe ya politiki. Ntango azalaki awa na mabele, bato mingi bazalaki babola mpe maladi. (Mat. 14:14; Mrk. 14:7) Bazalaki konyokwama mpo na makambo ya kozanga bosembo ya Baroma mpe ya Bayuda mosusu. Ntango bato bamonaki ete Yesu azalaki na nguya mpe likoki ya kosala makamwisi, balingaki kotya ye mokonzi na bango. (Yoa. 6:​14, 15) Lisusu, Satana alukaki kokweisa Yesu; amekaki ye na ndenge alakisaki ye nzela ya mokuse ya kokóma mokonzi ya mokili. (Mat. 4:​8, 9) Mpe mokolo moko, ntoma Petro, moko ya baninga ya penepene mpenza ya Yesu, alendisaki ye aluka kozala na bomoi ya pɛtɛɛ, alobaki: “Zalá na boboto epai na yo moko, Nkolo.”—Mat. 16:​21, 22.

8. Ndenge nini Yesu abundisaki makambo oyo ekokaki kolongola likebi na ye?

8 Ndenge nini Yesu abundisaki makambo oyo ekokaki kolongola likebi na ye? Na ndenge misato. Ya liboso, amekolaki makanisi ya Yehova. (Yoa. 8:28; 14:9) Ya mibale, amipesaki mingi na makambo ya elimo. (Mat. 9:35) Mpe ya misato, ayebaki malamu nini ezalaki mpenza na ntina. (Yoa. 4:34) Atɛmɛlaki na mpiko komekama ya Satana mpe amemamaki te na maloba ya Petro, oyo azalaki na makanisi ya mabe te kasi alandaki mokano ya Yehova te. (Mat. 4:10; 16:23) Yesu aboyaki kotika ete makambo oyo bato bazalaki kokanisa, koloba, to kosala elongola likebi na ye na kosala mokano ya Nzambe. Ya solo, makambo oyo ekoki kolongola likebi na biso na makambo ya elimo lelo oyo ekeseni na oyo Yesu akutanaki na yango. Kasi soki tomekoli Yesu, tokoki kobundisa makambo oyo ekoki kolongola likebi na biso.

NDENGE NINI TOKOKI KOBUNDISA MAKAMBO OYO EKOKI KOLONGOLA LIKEBI?

9. ‘Kokoba kososola soki mokano ya Yehova ezali nini’ elimboli nini? (Baefese 5:17)

9 Yekolá kokanisa lokola Yehova. Kosala bongo ekoki kosalisa yo ‘okoba kososola soki mokano ya Yehova ezali nini.’ (Tángá Baefese 5:17.) Tokoki koyeba makambo oyo esepelisaka Yehova soki tozali kotánga Liloba na ye mpe komanyola yango. Tokoki koyeba nini esepelisaka Yehova ata ntango Biblia elobeli te likambo oyo mpenza tozali na yango. Ndenge nini? Soki tomesani na lolenge ya Yehova ya kokanisa mpe tondimi na motema moko ete etambwisa biso.

10. Ndenge nini tokoki koyekola lolenge ya Yehova ya kokanisa?

10 Tokoki koyekola lolenge ya Yehova ya kokanisa soki tozali koyekola Biblia mpe kotalela ndenge oyo asalelaka bato makambo. (Yir. 45:5) Ntango tozali kotánga masolo ya Biblia, tokoki komituna mituna lokola oyo: ‘Yango eteyi ngai nini mpo na Yehova? Ndenge nini nakoki kosalela yango mpo na kobongisa lolenge na ngai ya kokanisa?’ Ya solo, lolenge ya Yehova ya kokanisa eleki mosika oyo ya biso. (Yis. 55:9) Yango wana tosɛngaka ye na libondeli ateya biso ndenge ya kosala mokano na ye. (Nz. 143:10) Tobondelaka ye mpe na kondima nyonso ete asalisa biso tóyeba lolenge na ye ya kokanisa mpe tómekola yango.—1 Yoa. 5:14.

11. Yehova alingi nini mpo na biso?

11 Ntango tozali koyekola kokanisa lokola Yehova, tokokanga ntina ete alingi tóboya makambo oyo elongolaka likebi mpo tómibongisa mpo na nsuka ya mokili. (Mat. 24:44) Alingi te ete tómitungisa koleka ndelo. (Mat. 6:​31, 32) Na yango, ntango mitungisi mpo na kolɔngɔnɔ ya nzoto, mosala, ndako, to mpo na makambo na biso moko to ya libota ebandi kolata biso, Yehova apesaka biso toli mpo na kosalisa biso. Alingi tósɛnga ye bwanya mpe makasi ya kolonga mikakatano na biso.—Nz. 55:22; Mas. 3:​5-7.

12. Nini ekoki kosalisa biso tókoba kozala na esengo atako makambo oyo ezali kosalema na mokili? (Matai 5:3)

12 Kobá komipesa na makambo ya elimo. Biso nyonso tomitungisaka na ndenge moko boye mpo na makambo oyo ezali kosalema na mokili, mpe tozali te na likoki ya kopekisa yango. Na yango, mpo makambo oyo tokokoka te kopekisa elongola likebi na biso te, tosengeli kotyaka makanisi na biso na makambo ya elimo. Tokozala na esengo soki tokobi kokokisa mposa na biso ya elimo, mposa oyo Yehova atyá na kati na biso. (Tángá Matai 5:3.) Tokokisaka mposa yango ntango tozali koyekola koyeba Yehova na nzela ya boyekoli ya Liloba na ye, Biblia, mpe ntango tozali koluka kosala mpenza nyonso oyo tokoki na mosala na ye. Soki tosali bongo, tokosepelisa mpe Yehova mpo tozali kosalela mpe ntango na biso na bwanya.—Mas. 23:15.

13. Ndenge nini tokoki kosalela “ntango na [biso] malamu mpenza”?

13 Biso bakristo tozalaka na ekateli ya kosalela “ntango na [biso] malamu mpenza.” (Ef. 5:​15, 16) Toyebaka ete Biblia esɛngi kaka te ete tósalelaka ntango na biso malamu na makambo ya mokolo na mokolo. Kasi, elendisi biso tókanisaka malamu ndenge ya kosalela ntango na biso lelo oyo liboso Yehova ayeisa nsuka ya mokili mabe oyo. Ndenge nini tokoki kosalela ntango na biso malamu mpenza? Soki tozali kolekisa ntango mingi na kolanda bansango ya mabe oyo ebimaka ntango nyonso na Internet, ekoki kolongola likebi na biso, kolɛmbisa biso nzoto, mpe kokitisa molende na biso na losambo ya Yehova. Na yango, ezali malamu mpenza tómityela ndelo na bansango oyo tokotala to tokotánga! Na bongo, tokotungisama koleka ndelo te, mpe tokozala na likoki ya komipesa na makambo ya elimo, oyo elendisaka. Lisusu, ekozala malamu tóluka kosala mingi na mosala ya kosakola soki likoki ezali, na ndakisa kozongelaka bato oyo tosololaki na bango. Toyebi ete ezali na ntina kosalela libaku nyonso mpo na kosalisa bato “bábika mpe bázwa boyebi ya sikisiki ya solo.”—1 Tim. 2:4.

14. Na ndenge nini komipesa mingi na makambo ya elimo esalisaka biso? (Talá mpe elilingi.)

14 Ntango tomipesi mingi na makambo ya elimo, tokokoba kotalela eleko oyo tozali na bokatikati. Makambo lokola yikiyiki ya politiki, mikakatano ya mbongo, mpe maladi oyo epalanganaka ekoningisa biso te. Toyebi ntina oyo makambo yango ezali kosalema: emonisi ete bisakweli ya Biblia ezali kokokisama. Na esika tótika ete kobanga elongola likebi na biso, totyaka nde motema na mokano ya Yehova mpo na mikolo ezali koya. Tokoki kobatela kimya mpe kokoba kotya elikya ete Yehova akosalisa biso tóyika mpiko—Nz. 16:8; 112:​1, 6-8.

Ndeko mwasi moko ná mobali na ye bazali kokende kosakola na shario na mpiko. Bililingi: Makambo ya mabe oyo ezali kosalema na mokili. 1. Ebele ya bato batomboki. 2. Maponami ya politiki. 3. Basoda na etumba. 4. bankisi. 5. Etanda oyo emonisi ndenge kompanyi moko ezali kokwea mbangu.

Atako makambo ya mabe ezali kosalema na mokili, omipesa na makambo ya elimo (Talá paragrafe 14)b


15. Kozala “bato ya makanisi malamu” ekosalisa biso na nini? (1 Petro 4:7)

15 Kobosana te makambo oyo ezali mpenza na ntina. Bato mingi lelo batye makanisi kaka na kosakana, kasi bazali kokipe te ndenge nsuka ya mokili oyo ezali kopusana. Ya solo, kosakana ezali na ntina na bomoi, kasi tosengeli kozala “bato ya makanisi malamu” mpo tókóma te kotalela yango ndenge mokili etalelaka yango. (Tángá 1 Petro 4:7.) Yango elakisi nini mpo na biso? Na ndakisa, tosengeli kokolisa bososoli mpo tóyeba kotalela kosakana na bokatikati mpe tózwa bikateli ya bwanya. Bikateli ya ndenge wana ekoyokana na lolenge ya Yehova ya kokanisa mpe ekomonisa ete toyebi malamu makambo oyo ezali mpenza na ntina.—2 Tim. 1:7.

16. Yesu atyaki makanisi nyonso na nini ntango alingaki kokufa?

16 Yesu abosanaki ata moke te makambo oyo ezalaki na ntina mingi. Na bangonga ya nsuka ya mpasi oyo alekisaki na mabele liboso akufa, atyaki makanisi nyonso na makambo oyo elekaki ntina mingi, elingi koloba kotikala sembo mpe kokokisa mokano ya Nzambe. Na yango, abondelaki mingi mpenza. Na kokesana na Yesu, oyo azalaki ntango nyonso ekɛngɛ, bayekoli na ye balalaki mpɔngi. Biblia elobi ete ‘balɛmbaki na mawa.’—Luka 22:​39-46; Yoa. 19:30.

17. Mpo na nini bato mingi basalelaka basite ya kosolola na bato, kasi ndenge nini ekoki kolongola likebi na biso? (Talá mpe elilingi.)

17 Ndenge moko na bayekoli ya Yesu, na bantango mosusu tokoki kolɛmba makasi na makanisi. Makambo oyo ezali kosalema na mikolo oyo ya nsuka ekoki komemela biso mitungisi. Mpo na kobosana mitungisi, bato mingi bazali kolekisa ntango mingi na basite ya kosolola na bato. Basalelaka yango mpo na kosolola na baninga mpe bandeko na bango bisika nyonso oyo bazali na mokili, kotindelana bansango, bafɔtɔ, mpe bongo na bongo. Mpe basalelaka yango mpo na kotala bafilme, kobɛta masano mingi. Nzokande, bato yango bazwamaka mpenza mobimba; balekisaka ntango mingi mpe basilisaka makasi na bango mpo na kotala mpe kotánga makambo oyo etyami sika. Mpo na kosalisa biso tózala na bokatikati na oyo etali basite ya kosolola na bato, tokoki komituna boye, ‘Ndenge oyo nasalelaka basite ya kosolola na bato epesaka ngai makasi, to ebosanisaka ngai makambo oyo ezali mpenza na ntina?’

Ndeko mwasi moko azali kotánga Biblia na ndako, kasi likebi na ye ezali kolongwa mpo na bamesaje ya telefone ya site ya kosolola na bato, ya filme, mpe ya biloko ya kotɛka na Internet.

Bososoli ekosalisa biso mpo basite ya kosolola na bato, kominanola mpe kosakana elongola likebi na biso te na makambo ya elimo (Talá paragrafe 17)


18. Mpo na nini tosengeli kozala na bososoli ntango tozali kopona kominanola?

18 Tosengeli kozala na bososoli ntango tozali kotala bafilme to baseri ya televizyo na nzela ya Internet, bavideo ya mikusemikuse na Internet, to kobɛta masano ya video. Makambo yango ekoki kosepelisa mpe kosalisa biso tólekisa ntango moko malamu. Kasi tosengeli kozala na bosololi mpo na koyeba lolenge nini ya kominanola tokopona mpe ntango boni tokolekisa na yango. Ntango video moko esili, Internet ebimisaka mbala moko bavideo mosusu oyo moto akoki kopona kotala, mpe yango ekoki komema ye na bavideo oyo ezali na makambo ya mobulu to ya pite. Likambo yango ekómelaki ndeko moko na Azia. Na ebandeli, abandaki kotala mwa bavideo mikuse ya bafilme na site moko. Lokola akobaki kotala bavideo oyo Internet ezalaki kobimisela ye, atalaki makambo ya mbindo. Kendekende, akómaki kotala pornografi. Likambo ya esengo, na lisalisi ya bankulutu mpe ya baninga na ye, azwaki bikateli ya makasi—alongolaki baprogramɛ yango mpe akataki ngonga oyo akolekisa na telefone. Lisolo wana emonisi ntina oyo tosengeli kozala na bososoli ntango tozali kopona kominanola.

19. Nini ekoki kosalema soki tomipesi mingi na kosakana?

19 Ekoki mpe kosɛnga tómonisa bososoli na oyo etali kosakana to kokende bakonje. Biso nyonso tozalaka na mposa ya kozwa mopɛpɛ mpe ya kopema na bantango mosusu—yango ezali malamu mpe esalisaka biso tóbatela kolɔngɔnɔ ya nzoto na biso. Kasi soki totye likebi mingi na kosakana, tokoki kozanga bokatikati mpe kozanga ntango ya kosala makambo oyo eleki ntina. (Flp. 1:10) Biso nyonso tosengeli kozwa ekateli mpo na oyo tokosala mpe ntango boni tokolekisa na likambo yango. Ntango ozali kozwa bikateli yango, omituna boye: ‘Ntango oyo nalekisaka na kosakana mpe na bakonje emonisaka ete nazali na bososoli? Ekomonisa ete nazali kotya makambo ya ntina na esika ya liboso mpe nazali komibongisa mpo na “nsuka ya makambo nyonso”?’

20. Matomba nini tokozwa soki tobundisi biloko oyo ekoki kolongola likebi na biso?

20 Tokozwa matomba soki tozali kobundisa makambo oyo ekoki kolongola likebi na biso na makambo mpe mimeseno ya elimo. (Yis. 48:17) Na lisalisi ya Yehova, tokozala mpenza na makasi ya koyikela mikakatano ya bomoi mpiko. Makambo oyo ezali kosalema na mokili ekoningisa biso te. Mpe tokoboya komipesa mingi kaka na kosakana. Na yango, tiká tókoba kozala na ekateli ya kokanisa lokola Yehova, tómipesa na makambo ya elimo, mpe tóbosana te makambo oyo ezali mpenza na ntina. Soki tosali bongo, tokosuka kaka te na kobundisa makambo oyo ekoki kolongola likebi na biso kasi mpe ‘tokosimba makasi bomoi ya solosolo.’—1 Tim. 6:19.

NDENGE NINI OKOKI KOBUNDISA MAKAMBO OYO EKOKI KOLONGOLA LIKEBI NA MAKAMBO YA ELIMO SOKI . . .

  • oyekoli kokanisa lokola Yehova?

  • omipesi na makambo ya elimo?

  • obosani te makambo oyo ezali mpenza na ntina?

LOYEMBO 129 Tokoyika mpiko tii na nsuka

a NDIMBOLA YA MALOBA: Makambo ya elimo ezali eloko nyonso oyo tosalaka na losambo na biso epai ya Yehova—na ndakisa koyekola Biblia, koyangana na makita, kosala losambo na kati ya libota, mpe mosala ya kosakola. Esangisi mpe mosala ya kobatela mpe kotonga bisika na biso ya losambo, kosalisa na kopesa lisungi na baoyo bazwi likama, kosala lokola volontɛrɛ na mayangani, to kosala na Betele.

b NDIMBOLA YA ELILINGI: Ndeko mobali moko ná mwasi na ye bamipesi na mosala ya kosakola, batiki te ete makambo ya mabe oyo ezali kosalema na mokili elongola likebi na bango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto