Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w26 Février lok. 32
  • Obadia​—⁠Kolisá ezaleli ya kobanga Nzambe lokola ye

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Obadia​—⁠Kolisá ezaleli ya kobanga Nzambe lokola ye
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2026
  • Masolo mosusu
  • Kondima mpe kobanga Nzambe epesaki bango mpiko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mpo na nini tosengeli kobanga Yehova?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
  • Mokanda ya Biblia nimero 31—Obadia
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Makanisi ya ntina na mokanda ya Obadia, ya Yona mpe ya Mika
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2026
w26 Février lok. 32

BATO OYO BIBLIA ELOBELI

Obadia—Kolisá ezaleli ya kobanga Nzambe lokola ye

Obadia azalaki mokambi ya ndako ya mokonzi mabe Ahaba, oyo atikaki ete losambo mabe ya Baala etonda na ekólo. Kasi, Obadia akolisaki mpenza ezaleli ya kobanga Yehova ‘banda bolenge na ye.’ (1 Bak. 18:​1-13) Na yango ntango Yezabele mwasi ya Ahaba apesaki mitindo ete báboma basakoli nyonso ya Yehova, Obadia ayebaki ete asengelaki kozala na mpiko mpo na kopekisa likambo yango ya mabe esalema. Kobomba ata mosakoli moko ezalaki likama; kasi, Obadia abombaki basakoli 100 mpe apesaki bango bilei na boumeli ya ntango oyo nzala ezalaki makasi na Samaria! Kanisá ndenge oyo ezalaki mpasi kosala yango kozanga ete bankama ya basakoli ya lokuta oyo bazalaki kosalela mokonzi ná mokonzi-mwasi bámona ye.—1 Bak. 18:19.

Liteya nini tokoki kozwa epai ya mobali yango oyo azalaki kobanga Nzambe? Obadia azalaki kobanga Ahaba, kasi azalaki kobanga Nzambe mingi koleka. Yango nde epesaki ye mpiko ya kotya bomoi na ye na likama mpo na kobatela bandeko na ye. Soki bapekisi losambo ya solo esika tozali, tokoki mpe kokolisa ezaleli ya kobanga Nzambe. Kobanga Nzambe ndenge wana ekopesa biso makasi ya kosalisa bandeko na biso ya basi mpe ya mibali oyo bazali kokutana na mikakatano.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto