06-12/04/2026
LOYEMBO 82 “Tiká pole na bino engɛnga”
Ndenge ya kosalisa bandeko na biso ya libota oyo bazali bandimi te
“Tótika te kosala oyo ezali malamu.”—GAL. 6:9.
NA MOKUSE
Ndenge ya kobatela boyokani malamu na bandeko na biso ya libota oyo bazali bandimi te mpe ndenge oyo tokoki koyebisa bango makambo ya Yehova, soki likoki ezali.
1-2. Ekoki kozala nini nde ebebisá boyokani na biso ná bandeko na biso ya libota ntango tobandaki koyekola solo?
YESU alobaki na mobali moko oyo abandaki kolanda ye mpo na kokóma moyekoli na ye ete: “Kende epai na yo, na libota, mpe yebisá bango makambo nyonso oyo Yehova asali mpo na yo.” (Mrk. 5:19) Na maloba yango, Yesu amonisaki ete biso bato tosepelaka kokabola nsango ya malamu na bato oyo tolingaka.
2 Ozali koyeba lisusu ndenge oyo omiyokaki mbala ya liboso oyo oyokaki nsango malamu ya Biblia? Na ntembe te olingaki te kobomba yango mpo na yo moko! Kasi, mbala mosusu bandeko na yo ya libota basepelaki na yango te. To mbala mosusu lolenge oyo oyebisaki bango solo ebimisá matata kati na yo ná bango. Soki ezali bongo, ndenge nini okoki kobatela to kozongisa boyokani malamu ná bandeko na yo ya libota, kozanga ete obuka mibeko ya Nzambe?
3. Tokolobela nini na lisolo oyo?
3 Na lisolo oyo, tokolobela makambo minei oyo ekosalisa biso tóyokanaka malamu na bandeko na biso ya libota oyo bazali bandimi tea: (1) Ndenge oyo motema mawa ekoki kotinda biso tótyelaka bango likebi, ata soki bazali kosepela na solo te; (2) oyo tokoki kosala ntango balobi to basali likambo oyo ebongi te; (3) ndenge oyo motema molai na biso mpe kobatela elikya ekoki kosalisa bango bámona ete tozali mpenza na solo; mpe (4) ndenge oyo tokoki komonisa bango ete tolingaka bango.
MOTEMA MAWA ETINDA YO OSALISA BANGO
4. Yesu asalaki nini mpo na baoyo baboyaki nsango na ye?
4 Yesu asundolaki mbala moko te baoyo baboyaki nsango na ye. Amikokanisaki na mosali-bilanga ya vinyo oyo asalaki nyonso mpo nzete ya vinyo oyo ezalaki kobota mbuma te ebota mbuma. (Luka 13:6-9) Ntango Yesu apesaki ndakisa wana, asilaki kosala mbula koleka misato mpo na komeka kosalisa bandeko na ye Bayuda bákóma na kondima epai na ye. Mpo na nini akobaki komeka kosalisa bango? Mpo azalaki na motema mawa epai na bango, mpe yango esalisaki ye amonisela bango motema molai.
5. Nini etindaki Yesu ayokela bandeko na ye Bayuda mawa?
5 Yesu ayokelaki bandeko na ye Bayuda mawa mpo bakonzi ya mangomba basalisaki bango te bákóma na kondima ya solosolo epai ya Nzambe. Yesu amonaki ete bato ya ekólo bazalaki “lokola bampate oyo ezangi mobateli.” (Mrk. 6:34) Mwa moke liboso akufa, Yesu alelaki kutu mpo na Yerusaleme mpo ayebaki ete mingi ya bafandi na yango bakobungisa bomoi mpo na kozanga kondima. (Luka 19:41-44) Soki biso mpe tozali na motema mawa ndenge wana epai ya bato ya libota na biso, ekotinda biso tósalisa bango.
6. Mpo na nini tosengeli komonisela bandeko na biso ya libota oyo bazali bandimi te motema molai? (Bagalatia 6:9)
6 Tángá Bagalatia 6:9. Soki bandeko na biso ya libota basepeli naino na solo te, tosengeli komonisela bango motema molai mpe kotika te “kosala oyo ezali malamu.” Toyebi ete ezwaka ntango mpo moto alongola makanisi mabe oyo epikamá makasi na kati na ye mpe akóma na kondima. Na ntango moko boye, yo mpe ozalaki lokola baoyo bazalaki ‘na elikya te mpe bazalaki na Nzambe te na mokili’? (Ef. 2:12) Soki ezali bongo, na ntembe te moto moko asalisaki yo. Yango ezali te kotinda yo osalisa bandeko na yo ya libota mpo na kokokisa bamposa na bango ya elimo, soki likoki ezali?
OYO TOKOKI KOSALA NTANGO BALOBI TO BASALI LIKAMBO OYO EBONGI TE
7. Mbala mosusu nini nde ezalaki kopekisa bandeko ya Yesu bándimela ye?
7 Na ntembe te bandeko ya Yesu bayokaki nsango ya makamwisi oyo asalaki na Galile. (Luka 4:14, 22-24) Atako bongo, na ebandeli bandimelaki ye te. (Yoa. 7:5) Mpo na nini? Biblia elobeli yango te. Kasi emonisi ata ntina mibale oyo Bayuda mosusu baboyaki kokóma bayekoli ya Yesu. Bayuda mosusu bazalaki kobanga ete bato ya ekólo báboya bango. (Yoa. 9:18-22) Basusu mpe bayebaki Yesu banda ntango azalaki elenge mpe bazalaki kokoka kondima te ete azali momonisi ya Nzambe. (Mrk. 6:1-4) Mbala mosusu bandeko ya Yesu mpe bakómaki na makanisi ya ndenge wana. Ekoki kozala ete bandeko na biso ya libota mpe bazali kotalela makambo ndenge wana!
8. Nini ekoki kosala ete bandeko na biso ya libota báloba to básala likambo oyo ebongi te?
8 Meká kokanisa ntina oyo balobi to basali likambo oyo ebongi te. Ekoki kozala ete bandeko ya Yesu bazalaki na kati ya bato ya libota oyo balobaki mokolo moko ete “abɛli motó.” (Mrk. 3:21) Nini ekokaki kotinda bango báloba likambo ya bongo? Bavɛrsɛ mosusu emonisi ete Yesu azalaki na makambo mingi ya kosala na boye ete azalaki ata na ntango te ya kolya. (Mrk. 3:20) Bandeko na ye ya libota bamonaki nde ete azali na molende ya mabe? Mbala mosusu. Bandeko na biso ya libota mpe bakoki kokanisa ete tolekisaka ndelo na losambo na biso. Soki bakanisaka bongo, ekozala malamu tómonisa bango na nzela ya misala na biso ete tozali mpenza na bokatikati.
9. Nini ekoki kosalisa bandeko na biso ya libota bábongola ndenge oyo batalelaka biso? (1 Petro 3:1, 2) (Talá mpe bililingi.)
9 Tiká etamboli na yo eloba na esika na yo. Maloba mpe misala na biso ya boboto ekoki kotinda bandeko na biso ya libota bábongola ndenge na bango ya kotalela biso. (Tángá 1 Petro 3:1, 2.) Mobali oyo azali mondimi te akoki koyoka lokola bakipaka ye te to akoki kosilika ntango mwasi na ye akei makita to abimi na mosala ya kosakola. Mpo mobali na ye amiyoka ndenge wana te, ndeko mwasi akoki kobongola programɛ na ye ya makambo ya elimo mpo alekisa ntango mingi elongo na mobali na ye. Na ndakisa, akoki kobima na mosala ya kosakola ntango mobali azali na makambo mingi ya kosala to azali na ndako te. Soki ndeko mwasi azali na bokatikati mpe azali kobongola programɛ na ye, akoki kosalisa mobali na ye abongola lolenge na ye ya kotalela Batatoli ya Yehova.
Maloba mpe misala na biso ya boboto ekoki kobongola ndenge oyo molongani oyo azali mondimi te atalelaka Batatoli ya Yehova (Talá paragrafe 9)g
10. Ntango balobi mabe mpo na biso, ndenge nini tokoki komekola Yesu?
10 Komonaka te ete osengeli kaka koyanola ntango nyonso oyo balobi mabe mpo na yo. Ntango bakoselaki Yesu makambo ete azalaki kolya na lokoso mpe komɛla mingi, alukaki komilongisa te. Kasi alendisaki nde bato bátala bango moko ndenge makambo ezali. (Mat. 11:19) Amonisaki mpe na ndakisa na ye ete azalaki na bokatikati na bomoi na ye. (Talá mpe Yoane 2:2, 6-10.) Ndenge moko mpe, komonaka te ete osengeli kaka koyanola ntango nyonso oyo balobi mabe mpo na yo. Kasi, monisá bandeko na yo ya libota na nzela ya misala na yo ete ozali na bokatikati mpe na esengo mpe tiká bango moko bátala bosolo ya makambo. Mbala mosusu ekotinda bango bátika kondima makambo ya lokuta oyo bayoká mpo na biso.
ZALÁ NA MOTEMA MOLAI MPE BATELÁ ELIKYA
11. Ndenge nini Yesu atalelaki bandeko na ye oyo bazalaki bandimi te?
11 Masolo ya Baevanzile emonisi ete Yesu atikaki te komonisela bandeko na ye ya libota motema molai. Na ndakisa, emonani ete bango mpe bazalaki na Kana ntango Yesu asalaki likamwisi na ye ya liboso. (Yoa. 2:11, 12) Ndenge tomonaki yango liboso, bandeko ya Yesu bazalaki kondimela ye te. Kasi, Yesu akataki boyokani na bango te. Biblia emonisi Yesu azali koloba na bandeko na ye na boboto, mbula soki misato nsima ya likamwisi na ye ya liboso na Kana.—Yoa. 7:5-8.
12. Nini ekoki kosalisa biso tóbatela elikya ete bandeko na biso mosusu ya libota bakobongola motema?
12 Kokanga malamu ntina ya motema mawa ya Yehova ekoki kosalisa biso tóbatela elikya. Ntango mangomba ya lokuta ekobomama, bandeko na biso ya libota bakoki komikundwela ete tozalaki koyebisa bango likambo yango.b (Em. 17:16) Bakoki kutu koya kosangana na biso na losambo ya pɛto nsima ya kobanda ya bolɔzi monene. Mpe soki bandeko na biso ya libota bakutani na mikakatano sikoyo, na ntembe te tokosala nyonso oyo tokoki mpo na bango. Mbala mosusu bakondima mateya ya Biblia lokola bamoni ete tozali na bolingo mpe boboto ya solosolo.
MONISÁ BANGO ETE OLINGAKA BANGO
13. Atako tozalaka na mingi ya kosala na mosala ya Yehova, tosengeli kokeba na nini?
13 Ata soki tozali na mingi ya kosala na mosala ya Yehova, tólinga te kotinda bandeko na biso ya libota bákanisa ete tozali na ntango te ya kolekisa elongo na bango to ete tolingaka bango te. (Mat. 7:12) Ndenge nini tokoki komonisa ete tótyelaka bango likebi? Tólobela mwa makambo oyo tokoki kosala.
14-15. Wapi lolenge moko ya komonisa ete tolingaka bandeko na biso ya libota oyo bazali bandimi te? Pesá ndakisa.
14 Sololáká na bango mpe yebisáká bango ete olingaka bango. Tokomonisa ete tolingaka bandeko na biso ya libota ntango tozali mbala na mbala kopesa bango nsango na biso. Na ndakisa, tokoki kotindela bango mesaje ná bafɔtɔ ya konje, ya mobembo, to ya ntango oyo tolekisaki elongo na baninga. Mwa kado to mokanda ya boboto ekoki mpenza kobongisa boyokani. Soki tozali kosala makambo ya ndenge wana, tozali komonisa bango ete tolingaka bango.
15 Tótalela ndakisa ya Anna, ndeko mwasi moko ya Arménie. Bazalaki kolekisa ntango mingi na libota, mingimingi na bafɛti ya mbotama mpe bafɛti mosusu. Ntango Anna akómaki Motatoli ya Yehova, bandeko na ye ya libota bamitungisaki ete boyokani na bango ekobeba. Bamitungisaki mpe ete ndenge Anna akómi Motatoli, bomoi na ye ekokóma mpasi. Ndenge nini Anna akitisaki bango motema? Alobi boye: “Ntango nakei kotala bandeko na ngai ya libota, nayebisaka bango makambo ya bomoi na ngai mpe ndenge nasalelaki ntango na ngai. Nabengisaka bango mpe epai na ngai mpe nalakisaka bango baninga na ngai. Na yango, bandeko na ngai mingi bayebi baninga na ngai mpe bayokanaka malamu.” Anna abakisi boye: “Bandeko na ngai mingi balobi ete nazali na esengo, mpe bamitungisaka lisusu te mpo na ngai.”
16. Ndenge nini Yesu amonisaki ete atyelaki ndeko na ye Yakobo likebi? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.)
16 Tyeláka makambo na bango likebi. Nsima ya kosekwa, Yesu atyelaki ndeko na ye Yakobo likebi na ndenge abimelaki ye. (1 Ko. 15:7) Kanisá naino ndenge Yakobo asengelaki komiyoka ntango amonaki ete Yesu alɛmbaki ye te! Emonani ete bokutani yango endimisaki Yakobo ete Yesu azalaki Masiya. Nsima na yango, mbala mosusu Yakobo asalisaki bandeko mosusu ya libota báyeba ete Yesu azali Masiya.c—Mis. 1:14.
17. Ndenge nini tokoki kosalela makanisi oyo ezali na Baroma 12:15? (Talá mpe elilingi.)
17 Tángá Baroma 12:15. Soki totyeli bandeko na biso ya libota likebi na ntango oyo basengeli na yango, ezala na mpasi to na bisengo, tokoki kosalisa bango bábongola ndenge na bango ya kotalela biso.d Na ndakisa, ntango baboti mwana, tokoki kopesa bango longonya mpe kado mpo na komonisa ete biso mpe tosepeli. Ntango moto oyo balingaka akufi, tokoki koyebisa bango maloba ya kobɔndisa, kopesa bango mwa lisungi, to kotindela bango mesaje ya kobɔndisa. Lisusu, tokoki kotunaka bango bansango mbala na mbala, mingimingi ntango bazali na mikakatano.
Soki otyeli bandeko na yo ya libota likebi na ntango oyo basengeli na yango, bakoki kobongola ndenge na bango ya kotalela yo mpe bindimeli na yo (Talá paragrafe 17)h
18. Ndenge nini tokoki komekola moyekoli Andre?
18 Lakisá bango epai ya bandeko ya lisangá. Ntango moyekoli Andre ayebaki ete Yesu azali Masiya, amemaki mbala moko ndeko na ye Petro epai ya Yesu. (Yoa. 1:40-42) Biso mpe tokoki kosala bongo. Na ndakisa, tokoki ntango mosusu kobengisa ndeko moko ya libota na makita to mpo na kolya elongo na baninga na biso. Ntango ndeko na biso ayebi bandeko ya lisangá, akomona ete Batatoli bazali lokola bato nyonso, mpe bazali bato malamu.
19. Ata soki bandeko na biso ya libota bakangaka ntina te ya bindimeli na biso mosusu, ndenge nini tosengeli kosalela bango makambo? (1 Petro 3:15)
19 Tángá 1 Petro 3:15. Mbala mosusu bandeko na biso ya libota bakangaka mpenza te ntina oyo toboyaka kosala makambo mosusu, kasi soki tozali kosalela bango makambo na boboto mpe na limemya, bakobosana yango te. Bakoki mpe kosepela soki tosali milende mpo na kolekisa ntango elongo na bango na mabaku mosusu. Na ndakisa, tokozala te elongo na bango na bafɛti mpe milulu oyo eyokani te na Biblia, kasi tokoki kokende kotala bango, kolya elongo, mpe kopesa bango bakado na mabaku mosusu.
KOLƐMBA TE BANDEKO NA YO YA LIBOTA
20. Mpo na nini ndakisa ya Yakobo ezali kolendisa biso?
20 Yakobo alandaki Yesu te na mosala na ye awa na mabele, kasi nsukansuka akómaki moyekoli. (Gal. 1:18, 19; 2:9) Atako azalaki moyekoli ya libosoliboso te, emonani ete Yakobo andimaki mateya ya Yesu. Na ndakisa, na mokanda oyo akomaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe, alobaki makambo oyo ekokani na oyo ezali na Lisolo likoló ya Ngomba.e
21. Mpo na nini tosengeli te kolɛmba bandeko na biso ya libota oyo bazali bandimi te?
21 Ata soki tosali milende mpe totyeli bandeko na biso ya libota oyo bazali bandimi te likebi, mbala mosusu bakosepela na solo te to bakobongola makanisi na bango te. Kasi mpo na nini tosengeli kolɛmba bango te? Mpo ntango nyonso oyo tomoniseli bandeko na biso ya libota boboto, tozali komekola Nzambe na biso ya motema mawa, Yehova, ná Mwana na ye, Yesu. (Luka 6:33, 36) Kendekende, etamboli na biso ya malamu ekoki kotinda bango bábongola ndenge oyo batalelaka biso. Bakoki kutu komikundwela mateya oyo toteyá bango kala. Soki tolɛmbi bango te, tokoki koyoka esengo ya komona bandeko na biso mosusu ya libota bakɔti mpe na losambo ya pɛto!
LOYEMBO 60 Tolingi bázwa bomoi
a NDIMBOLA YA MALOBA: Ndenge esalelami na Biblia, maloba “moto oyo azali mondimi te” emonisaka kaka te ete moto oyo asambelaka te to oyo andimelaka Nzambe te. (1 Ko. 7:12) Na lisolo oyo, tosaleli maloba yango mpo na kolobela moto oyo asambelaka Yehova te ndenge Batatoli ya Yehova basalaka yango.
b Talá lisolo “Toyebi nini mpo na lisambisi ya Yehova na mikolo ezali koya?” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 05/2024, lok. 11, par. 11-13.
c Bandeko ata mibale ya Yesu, Yakobo ná Yuda, bakómaki bakristo nsima ya liwa mpe lisekwa na ye.
d Talá etanda “Osengeli kokende fɛti moko ya libala to ebembe?”
f Mpo na koyeba makambo mosusu ya kosala na makambo ya ndenge wana, talá “Mituna ya batángi” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/05/2002, mpe ya 15/11/2007.
g NDIMBOLA YA BILILINGI: Liboso ya kobima na mosala ya kosakola, ndeko mwasi moko abongiseli mobali na ye mwa eloko ya kolya.
h NDIMBOLA YA ELILINGI: Ndeko mwasi yango azwi mpe ntango mpo na kokende kotala mama-bokilo na ye, oyo azali Motatoli ya Yehova te