Bato bakoki kosilisa bitumba mpe mobulu?
Bato babundelaka makambo mingi na bomoi. Basusu balukaka changement na makambo ya politiki, na makambo ya mbongo, to mpe na makambo etali bomoi ya bato. Bato mosusu babundaka mpo na kobɔtɔla mabele, mabanga ya ntalo mpe bongo na bongo. Longola yango, bokeseni ya mangomba mpe ya bikólo na kati ya mboka mpe ebimisaka mobulu. Makambo nini bato bazali kosala mpo na kosilisa bitumba mpe kotya kimya? Bakokoka mpenza kosala yango?
Drazen_/E+ via Getty Images
ÉCONOMIE YA MBOKA
Mokano: Kosala ete bato nyonso bákóma na bomoi ya malamu, elingi koloba, ezala te ngámbo moko bobola makasi mpe ngámbo mosusu bozwi mingi, mpo bokeseni wana mpe ebimisaka mobulu.
Mokakatano: Yango ekosɛnga ete baguvɛrnema ebongola ndenge na yango ya kosalela mbongo. Na 2022, baguvɛrnema na mokili mobimba ebimisaki soki 34,1 miliare ya badolare mpo na koluka kotya kimya na mokili mpe kobongisa bomoi ya bato. Nzokande, mbongo yango epusani ata moke te na mbongo oyo babimisaki mpo na kosomba mandoki kaka na mbula yango.
António Guterres, secrétaire général ya ONU alobaki boye: “Kolandela makambo na bamboka oyo ezali na mobulu ezali kolya mbongo mingi na esika ya kosalela mbongo yango mpo na kopekisa mobulu mpe kotya kimya.”
Oyo Biblia elobi: Baguvɛrnema ya mokili oyo mpe ba-organisation ndenge na ndenge ekoki kosalisa babola, kasi ekokoka te kosilisa bobola mpo na libela.—Kolimbola Mibeko 15:11; Matai 26:11.
KOYOKANA NA KIMYA
Mokano: Kosolola to koyokana mpo na kopekisa to kosilisa matata na ndenge ya kimya mpo ngámbo nyonso mibale esepela.
Mokakatano: Ngámbo mosusu bakoki kondima te ete makambo esila na kimya, to mpe bakoki kokangama kaka na oyo bango balingi. Ata soki bayokani malamu, na nsuka makambo ekoki kobeba kaka.
Raymond F. Smith, diplomate américain alobi boye: “Koyokana na kimya (diplomatie) esimbaka ntango nyonso te. Na ndakisa, bamboka mibale ekoki koyokana mpo na kokata bitumba, kasi nsima na yango, mobulu mosusu ekoki kobima.”
Oyo Biblia elobi: Bato basengeli ‘koluka kimya.’ (Nzembo 34:14) Kasi bato mingi lelo oyo “bazangi bosembo, . . . balingaka kosala boyokani te, . . . batɛkaka bamosusu.” (2 Timote 3:1-4) Bizaleli yango esalaka ete bakonzi ya politiki, ata baoyo bazalaka na makanisi ya malamu, bákoka te kosilisa mobulu.
KOPEKISA MANDOKI
Mokano: Kopekisa mandoki to kokitisa motángo na yango, mingimingi babombi ya nikleere, bagazɛ ya bitumba, mpe mandoki mosusu ya mabe.
Mokakatano: Mpo na bamboka mingi, kozanga mandoki ya nsɔmɔ ezali lokola kozanga libateli, to kozanga nguya. Kasi ata soki balongoli mandoki, mobulu ebimaka kaka mpo na mandoki te.
“Bamboka mingi elobaki ete ekobebisa mandoki na yango nyonso nsima ya 1991, kasi mingi ekokisaki maloba na yango te. Ezala makambo oyo bamboka yango endimaki kosala mpo na kosilisa makama, kotya kimya, mpe kokómisa mabele esika ya kimya mpo na moto nyonso, nyonso wana ekokisami te.”— “Assurer notre avenir commun : un programme pour le désarmement.”
Oyo Biblia elobi: Bato basengeli kotika bibundeli mpe ‘kokómisa mipanga bitimweli ya mabele.’ (Yisaya 2:4) Kasi yango ekoki te mpo na kotya kimya, mpo mobulu ebandaka nde na kati ya motema ya moto.—Matai 15:19.
KOLUKA KIMYA YA BIKÓLO NYONSO
Mokano: Bikólo esangani mpo na kobundisa bikólo mosusu oyo ezali kotya mobulu, na likanisi ete bikólo yango ekobanga kobundisa bikólo oyo esangani esika moko mpe ekómi makasi mingi.
Mokakatano: Kosangisa nguya ya bikólo mingi mpo na kobangisa bikólo mosusu esilisaka makambo te. Bikólo mosusu ekoki kondima kosangana mpo na kobundisa bikólo oyo ezali kotya mobulu, kasi na nsima, ekoki mpe koyokana te mpo na ndenge ya kosala yango to mpe kobongola makanisi.
“Atako bikólo oyo esangani mpo na kimya mpe ONU esalaki nyonso mpo na kosalisa baguvɛrnema na mokili mobimba eyokana malamu mpo kimya ezala, kasi milende nyonso wana epekisaka te bitumba esalema.”—“Encyclopedia Britannica.”
Oyo Biblia elobi: Na lisangá, makambo elongaka. (Mosakoli 4:12) Likambo ya mawa, bakonzi ya mokili ná ba-organisation na bango ata basangani ndenge nini, bakokoka te kotya kimya ya solosolo mpe libateli. Biblia elobi: “Bótia mitema na bakonzi ya mokili té; po nguya ya bato ekoki kobikisa té. Mokolo pema na bango ekokende, bakokunda bango, ná makambo nyonso oyo bazali kokana.”—Nzembo 146:3, 4, Bible na Lingala ya lelo oyo.
Atako bato basali nyonso mpo na kotya kimya, tii lelo mokili etondi kaka na bitumba