Kimya ekouta nde na kotika kosala bibundeli?
MBULA mitano liboso ete mabota makota na etumba ya mibale ya mokili mobimba, Winston Churchill alobaki boye ete: “Ezali libunga monene soki toyebi kokesenisa te likambo etali kotika kosala bibundeli mpe kimya.” Mpe abakisaki ete: “Ntango bokozwa kimya, kotika kosala bibundeli nde ekolanda nsima.
Oyo nde bongolabongola! Nani akolinga kotika kosala bibundeli wana naino kimya etyami te? Epai mosusu, ndenge nini kozwa kimya ya solo awa naino bibundeli bizali bobele se kobakisama? Mpo na likambo yango, bakonzi ya politike bayebi te nini bakoki kosala.
Maloba wana ya Winston Churchill malobamaki uta 1934, ezalaki bongo mbula mibale nsima na Likita oyo esalamaki na Société des Nations (Lisangani ya Mabota) likoló ya kotika kosala bibundeli. Mokano mpenza ya Likita yango, oyo kobongisama na yango esengaki mbula 12, ezalaki mpo na kopekisa mikili ya Mpoto ete batika kosala bibundeli mosusu mpo na etumba. Mingi na bafandi ya mokili bazali naino komikundola liwa ya nsomo oyo ekomelaki basoda soko milió likwa, kozanga kotanga bato bazokaki to basivile oyo bakufaki na boumeli ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba. Ata bongo bazali kotika kosala bibundeli te. Mpo na nini?
Milende mpo na kotika kosala bibundeli
Ekoki kokoma ete bakonzi batya motindo moko mpo na kotika kosala bibundeli, kasi mingimingi ezali kobimisa matomba te. Na ndakisa, na nzela na boyokani oyo esalamaki na Versailles, oyo etyamaki maboko na 1919, basengaki na Alemanye ete atika kosala minduki na “kopesanaka ndanga oyo ebongi na ntina etali kokitisa minduki ya ekolo moko na moko na motuya oyo ekozala na boyokani na libateli ya mboka.” Yango ekokani na likanisi oyo Woodrow Wilson, président ya Etats-Unis, apesaki, likanisi oyo liyaki kokotisama kati na artikle 8 oyo ezali na buku ya mikano ya Société des Nations (Lisangani ya Mabota). Kasi Hitler, ntango afandaki na kiti ya bokonzi, amonaki ntina mpenza te na kolanda motindo wana ya kosala.
Nsima ya etumba ya mibale ya mokili mobimba, O.N.U. esili nde kolonga mpenza na kotya moboko makasi mpo ete mabota bakoka kotika kosalela bibundeli? Te; kasi milende misalamaki mingi mpo na yango. Nzokande, lokola bazalaki na ebundeli ya atomike, ebundeli oyo ekobomaka ebele na bato na mbala moko, likambo ya kotika kosalela bibundeli ekomaki likambo monene koleka. Tala oyo tozali kotanga na encyclopédie moko (The New Encyclopœdia Britannica): “Liboso, bazalaki koloba ete kowelana mpo na kosala bibundeli mosusu ya sika ezali kolembisa nkita mpe ezaleli yango ezalaki kopusa na etumba; sikawa bazali koloba ete, kosalela minduki ya nikleere na motuya monene na ntango ekoya ezali likama mpo na sivilizasio yango moko.”
Na likita moko esalamaki na 1952 oyo esangisaki mikili 12, etuluku na bato moke eponamaki mpo na kosilisa matata mazalaki kati na mikili ya Est mpe oyo ya Ouest na ntina etali kosala bibundeli ya sika. Etuluku yango ebongisaki ata likambo moko te, kino ngambo oyo mibale ya mikili mizali nsima na banguya minene miyinanaki lisusu makasi. Kino lelo oyo boyokani ya ndenge na ndenge esalamaki mpe mikanda mityamaki maboko. Nzokande, kobangana, ezali kopesa bango nzela te mpo bakoka kotika kosala bibundeli nyonso. Engebene encyclopédie oyo totangaki mwa liboso, “likambo yango esimbami bobele na bato na makanisi mpamba.”
Motuya boni ebebisami
Kosala to mpe kotika kosala bibundeli: mosolo boni ekobebisama? Motuya mobebisami mokomonisama bobele na mosolo te. Mosala kati na bakompanyi oyo esalaka bibundeli ezali lisusu likambo oyo esengeli kotalelama mpenza. Na mikili mingi, mosolo ya mpako mosalelami mpo na kosomba bibundeli, mpe yango ezali kopesa nzela ete bato bazwa misala mingi. Na yango, kotika kosala bibundeli ekozangisa misala epai na bato mingi. Yango wana mikili oyo mizali kokotisa misolo mingi na nzela ya koteka bibundeli, bazali kobanga na ntina na likanisi oyo ya kotika kosala bibundeli nyonso mpenza. Mpo na bango, wana ezali ndoto mabe kasi ndoto malamu te.
Esengeli mpe kolobela ebele na mosolo oyo esalelami mpo na minduki. Mosolo oyo esalelami mpo na kosala bibundeli ezali kozwa 10% ya mosolo na mokili mobimba. Motuya wana elakisi nini? Motuya ya sikisiki ezali kobongwana soko motuya ya mbongo ekiti; nzokande, tozwa ndakisa ete mokili ezali kobimisa na minite moko, bamilió 10 ya francs français mpo na bibundeli! Soki yo ozali na mosolo wana, okosalela yango na makambo nini? Mpo na kosilisa nzala oyo ezali kati na mokili? Kosalisa bato mpo na kolongono ya nzoto? Kosalisa bana mike? Koyekola makambo matali bato mpe bikelamu mosusu? Makambo ya kosala na yango ekozala mingi!
Tozwa ndakisa ya programme moko ebongisami sika na Union soviétique oyo ebyangami “Du tank au tracteur”. Engebene programme yango, mingi na masini mpo na bibundeli, ebongolami mpo na kosala mitindo 200 ya ba “masini kitoko mpo na milona”. Mpo na nini masini wana ya milona ezali kosengama mingi? Engebene zulunalo na Angleterre Farming News, ezali mpo ete “bobele ndambo na misato ya bambuma mpe ndunda elonami na Leta nde ezali kokomela baoyo bazali na mposa na yango, mpo ete oyo etikalaka na bilanga ezali kopola to mpe oyo ezali kati na bibombelo ezali kobeba”.
Atako ekoki kozala likambo na kokumisama na kosala ba tracteurs (masini mpo na milona) na esika ya kosala ba tanks (masini mpo na bitumba), yango ezali likambo ekosalamaka mingi te, ezali mpo na yango ezali kolobelama mingi na bazulunalo mpe televizió. Lisusu ezali boye ete, matomba oyo mazali kozwama na meko yango ezali eloko mpamba soki tokokisi yango na minduki oyo mizali kosalama. Bazali kolanda kobimisa bankama ya bamilió ya mosolo mpo na kosala bibundeli kati na mokili oyo, engebene esakweli na Yesu, ‘bato bazali kosenzwa na nsomo na kotalela makambo mazali kobima kati na mikili’. Ndenge nini nsomo wana ekoki kolongwa? Kotika kosala mpenza bibundeli, ekotikala bobele ndot—Luka 21:26.