BOMOI YA BAKRISTO
Ndenge nini bandeko basi bakoki lisusu kosala mingi na mosala ya Nzambe?
Bandeko basi bapesaka mpenza mabɔkɔ na mosala ya Bokonzi. (Nz 68:11) Batambwisaka boyekoli ya Biblia mingi na bandako mpe mingi ya babongisi-nzela ya sanza na sanza ezali bandeko basi. Bankóto ya bandeko basi basalaka mosala makasi na Babetele, na mosala ya misionɛrɛ, na mosala ya botongi mpe na ekipi ya babongoli. Bandeko basi ya makoki basalisaka masangá mpe mabota na bango. (Mas 14:1) Atako bandeko basi bakoki te kokóma bankulutu to basaleli na misala, kasi bakoki komityela mikano ya elimo na lisangá. Soki ozali ndeko mwasi, makambo nini okoki kosala mpo na komonisa ete olingi kosala mingi na mosala ya Nzambe?
Salisá bandeko basi oyo bazali na makoki mingi te na lisangá na bino.—Tit 2:3-5
Salá makasi osakolaka mingi mpe okóma na mayele ya koteya
Yekolá monɔkɔ mosusu
Kende esika mposa ya basakoli ezali mingi
Tondisá formilɛrɛ mpo na kosala na Betele to mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala ya kotonga bandako ya Teokrasi
Tondisá formilɛrɛ mpo na kokɔta na Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi
TALÁ VIDEO “BASI OYO BAZALI KOSALA MOSALA MAKASI NA KATI YA NKOLO,” MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MOTUNA OYO:
Makanisi ya bandeko basi oyo elendisi yo na nini?