“Basi oyo bazali kosala mosala mingi kati na Nkolo”
1 Na maloba oyo, Paulo alobelaki Tulufaina na Tulufosa, bandeko basi mibale oyo bazalaki kosala mosala makasi na lisangá ya Loma. Mpo na ndeko mwasi mosusu Pelesisi, Paulo alobaki ete: “Asalaki misala mingi kati na Nkolo.” Ndenge moko mpe alobelaki Foibe lokola “mosungi na bato mingi.” (Lom. 16:2, 12) Makomami ezali komonisa Doloka lokola mwasi na “misala malamu mpe na makabo na mawa mingi.” (Mis. 9:36) Basi ya elimo bazali mpenza lipamboli mpo na lisangá, boye te?
2 Tosepelaka na bandeko basi oyo basalaka mosala mingi na lisangá na biso? Bango nde bazali kosala mingi na mosala ya kosakola, bazali koyekola Biblia na bato mingi, mpe bazali kosalisa bato mingi oyo bazali koya sika na solo. Balekisaka mpe ntango mingi na bana mpo na kosalisa bango ete bákola na elimo. Basi baklisto bazali kosalisa mingi mpo na kotonga elimo ya bolingo, ya esengo, ya kimya, mpe ya molende na kati ya lisangá. Basalisaka mibali na bango mpe bato mosusu ya mabota na bango na makambo ndenge na ndenge mpo na kopesa bango nzela ete básala mingi na mosala ya Yehova.
3 Bandeko basi oyo bazali na kati ya mosala ya ntango nyonso: Kati na bandeko basi oyo bazali kosala mosala mingi kati na Nkolo tokotánga bamisionɛrɛ, oyo mingi na bango basalaki mosala monene oyo epesi nzela ete mosala ya kosakola epalangana na mikili ya bapaya. Basi ya bakɛngɛli ya zongazonga basalaka mingi kati na mosala ya kosakola ntango mibali na bango batalaka masangá oyo ezali na zongazonga na bango, balendisaka bandeko basi mingi. Tóbosana te bandeko basi oyo bazali kosala na Betele, baoyo bazali kosala mosala mosantu na molende mpo na kosimba ebongiseli ya Yehova. Mpe bandeko na biso ya basi oyo bazali kosala lokola babongisi-nzela ya sanza na sanza, na milende ya solosolo oyo bazali kosala mpo na kokumisa Nzambe, bazali kosalisa bato mingi ete báyekola mateya ya solo.
4 Basi oyo ya sembo bazali kozwa esengo mingi na bomoi na bango ya komipesa. (1 Tim. 6:6, 8) Babongi kozwa lokumu, bilendiseli mpe lisungi nyonso oyo tokoki kopesa bango.
5 Basi baklisto bazali na ntina mingi na ebongiseli ya Yehova, bazali kosala mosala ya sembo oyo ezali lipamboli mpo na bato nyonso. Tiká tólanda kosepela na basi motindo wana mpe tóbondela ete lipamboli ya Yehova ezala likoló na bango awa bazali kokoba “kosala mosala makasi na kati ya Nkolo.”