Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb21 Septembre lok. 7
  • Saleláká bisaleli ya bolukiluki

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Saleláká bisaleli ya bolukiluki
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2021
  • Masolo mosusu
  • Tunáká mituna
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2021
  • Simbáká mitema
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2021
  • Ndimá lisalisi oyo Yehova apesi na nzela ya libondeli
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2021
  • Bakisá esengo na yo na mosala ya kosakola​—Saleláká Liloba ya Nzambe
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2021
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2021
mwb21 Septembre lok. 7

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA | BAKISÁ ESENGO NA YO NA MOSALA YA KOSAKOLA

Saleláká bisaleli ya bolukiluki

Yehova azali kopesa biso bisaleli mpo tózala na makoki ya koteya malamu, na ndakisa bavideo, batrakte, bazulunalo, mwa babuku, babuku, mpe Biblia, oyo ezali esaleli na biso ya libosoliboso. (2Ti 3:16) Apesi biso mpe bisaleli ya bolukiluki oyo esalisaka biso mpo na kolimbola bavɛrsɛ ya Biblia malamu. Na ndakisa, Watchtower Library, Watchtower​—MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET™, JW Library®, mpe Buku ya bolukiluki mpo na Batatoli ya Yehova.

Okozala mpenza na esengo soki ozali kosalela bisaleli nyonso wana oyo ebongiseli ya Yehova ebimisá mpo na kosalisa biso tókɔta na mozindo ntango tozali koyekola Biblia. Lakisá bayekoli na yo ya Biblia ndenge ya kosalela bisaleli yango. Na nsima, bango mpe bakozala na esengo ntango bazali kozwa bango moko biyano ya Biblia na mituna na bango.

TALÁ VIDEO OKOKI KOYOKA ESENGO YA KOKÓMISA BATO BAYEKOLI​—NDIMÁ LISALISI OYO YEHOVA APESI​—BISALELI YA BOLUKILUKI, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Bililingi euti na video “Okoki koyoka esengo ya kokómisa bato bayekoli​—Ndimá lisalisi oyo yehova apesi​—Bisaleli ya bolukiluki.” Rose azali koyebisa Neeta makambo ya evolisyo oyo andimaka.

    Ntembe nini Rose abimisaki na oyo etali bozalisi?

  • Bililingi euti na video “Okoki koyoka esengo ya kokómisa bato bayekoli​—Ndimá lisalisi oyo yehova apesi​—Bisaleli ya bolukiluki.” Neeta azali kosalela “Buku ya bolukiluki” mpo na koluka makambo etali bozalisi.

    Neeta azwaki makanisi wapi mpo na lisolo yango?

  • Bililingi euti na video “Okoki koyoka esengo ya kokómisa bato bayekoli​—Ndimá lisalisi oyo yehova apesi​—Bisaleli ya bolukiluki.” Neeta azali koyebisa Rose na esengo mpenza makambo oyo amoni na bolukiluki na ye.

    Kozwa biloko ya motuya na Biblia mpe koyebisa yango bato epesaka biso esengo

    Ndenge nini aponaki makambo oyo ebongaki mpenza mpo na Rose?

  • Matomba nini Neeta azwaki ndenge asalelaki bisaleli ya bolukiluki?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto