Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb21 Juillet lok. 9
  • Simbáká mitema

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Simbáká mitema
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2021
  • Masolo mosusu
  • Tunáká mituna
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2021
  • Bakisá esengo na yo na mosala ya kosakola​—Saleláká Liloba ya Nzambe
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2021
  • Ndimá lisalisi oyo Yehova apesi na nzela ya libondeli
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2021
  • Salisá bato oyo oyekolaka na bango Biblia bátika bizaleli mabe
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2022
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2021
mwb21 Juillet lok. 9

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA | BAKISÁ ESENGO NA YO NA MOSALA YA KOSAKOLA

Simbáká mitema

Kotosa Nzambe eutaka na motema. (Mas 3:1) Yango wana, ntango tozali koteya, tosengeli kosala makasi mpo tósimba mitema ya bayoki na biso. Ndenge nini tokoki kosala yango?

Kosuka kaka te na koteya moyekoli na yo solo ya Biblia, kasi salisá ye ayokanisa bomoi na ye na solo yango, mpe na boyokani na ye ná Yehova. Salisá ye amona ete mitinda ya Biblia emonisaka bolingo, bolamu, mpe boyengebene ya Nzambe. Na mayele nyonso, tuná ye motuna oyo ekosalisa ye amitalela mpe aloba ndenge azali komiyoka mpo na makambo oyo azali koyekola. Salisá ye akanisa na matomba oyo akoki kozwa soki atiki etamboli mpe mimeseno ya mabe. Ntango omoni moyekoli na yo ya Biblia azali kolinga Yehova na motema na ye mobimba, yango ekobakisa esengo na yo.

TALÁ VIDEO OKOKI KOYOKA ESENGO YA KOKÓMISA BATO BAYEKOLI​—KOLISÁ MAKOKI NA YO​—SIMBÁKÁ MITEMA, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Elilingi euti na video ‘Okoki koyoka esengo ya kokómisa bato bayekoli​—Kolisá makoki na yo​—Simbáká mitema.’ Neeta azali kotuna Rose motuna ntango bazali koyekola Biblia.

    Mpo na nini Neeta atunaki Rose: “Okanisaki na makambo tosololaki lundi?”

  • Elilingi euti na video ‘Okoki koyoka esengo ya kokómisa bato bayekoli​—Kolisá makoki na yo​—Simbáká mitema.’ Neeta azali kokanisa elongo na Rose na Makomami.

    Ndenge nini Neeta asalisaki Rose amona ete mitinda ya Biblia emonisaka ete Yehova alingaka ye?

  • Elilingi euti na video ‘Okoki koyoka esengo ya kokómisa bato bayekoli​—Kolisá makoki na yo​—Simbáká mitema.’ Rose azali kolanda Neeta na likebi.

    Soki tozali kosimba motema ya moyekoli na biso, yango ekolendisa ye akola na elimo

    Ndenge nini Neeta asalisaki Rose akanisa ndenge akoki komonisa ete alingaka Nzambe?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto