Sanza ya mwambe ekotika nsango na mosala ya kosakola!
Tokokabola trakte moko ya sika na mokili mobimba
1. Lokola mbula nkama (100) elingi ekoka banda Bokonzi ebotamaki, kampanye nini ya ntina mingi ekosalema na mokili mobimba?
1 Etikali moke Bokonzi ya Nzambe ekokisa mbula nkama (100) banda ebotamaki. Na yango, ebongi mpenza ete tópesa Yehova lokumu na nzela ya kampanye moko ya ntina mingi! Na sanza ya mwambe, tokosala kampanye na mokili mobimba mpo na kokabola trakte ya sika oyo ezali na motó ya likambo: “Epai wapi tokoki kozwa biyano na mituna minene etali bomoi?” Trakte yango ezali kolendisa batángi báluka biyano na mituna yango na Biblia mpe ezali kolimbola ndenge oyo site jw.org ekoki kosalisa bango.
2. Ndenge nini tokoki kopesa mabɔkɔ na “koganga moko makasi mpe kosanzola Yehova” na sanza ya mwambe?
2 Koganga moko makasi ya masanzoli: Mpo na kosalisa basakoli básakola mingi, ebongiseli moko ya sipesiale ezwami mpo na moto nyonso oyo alingi kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi na sanza ya mwambe. Na sanza yango, basakoli oyo bazwá batisimo bakoki kopesa ngonga 30 mpo na mosala ya mobongisi-nzela mosungi. Lokola sanza ya mwambe ezali na mikolo ya mitano 5, mikolo ya pɔsɔ 5, mpe mikolo ya lomingo 5, basakoli mingi oyo basalaka bakoki kozala babongisi-nzela basungi. Mpe lokola bana-kelasi bazalaka na konje na sanza yango, bakoki mpe kosala mosala ya mobongisi-nzela. Soki moto moko oyo oyekolaka na ye Biblia akokisi masɛngami mpo na kokóma mosakoli to ozali na mwana oyo alingi kokóma mosakoli, sololá na mokambi-misala ya bankulutu banda sikoyo. Bandeko yango bakolendisama mpenza ntango bakokɔta na molɔngɔ ya basakoli na sanza wana ya ntina mingi! Atako babongisi-nzela ya sanza na sanza mingi bazwaka konje na sanza ya mwambe nsima ya kokokisa bangonga oyo esɛngami na mbula, bakoki kobongola mwa moke programɛ na bango mpo bápesa mpenza mabɔkɔ na kampanye yango ya ntina mingi. Sikoyo nde ntango ya kosolola na kati ya libota mpo na ndenge ya kopesa mabɔkɔ na “koganga moko makasi mpe kosanzola Yehova” na sanza ya mwambe.—Ezr. 3:11; Mas. 15:22.
3. Elikya nini tozali na yango mpo na kampanye oyo ya ntina mingi?
3 Atako tosalá bakampanye ya ndenge wana liboso, tozali kolikya ete ya mbala oyo ekotika nsango. Tokoki nde kosala makasi mpo motángo ya bangonga, ya basakoli mpe ya babongisi-nzela basungi emata na sanza ya mwambe? Lokola tolingi kokóma na nsuka ya mobu ya mosala 2014, tiká ete Yehova apambola milende oyo basaleli na ye na mokili mobimba bakosala mpo ete, na sanza ya mwambe, litatoli epesama koleka ndenge esalemaka liboso!—Mat. 24:14.