Manaka mpo na pɔsɔ ya 9 sanza ya 6
PƆSƆ EBANDI NA 9 SANZA YA 6
Loyembo 24 mpe libondeli
Boyekoli ya Biblia na lisangá:
cl mok. 8 par. 9-16 (Min. 30)
Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Balevi 1-5 (Min. 10)
No. 1: Balevi 4:16-31 (Eleka min. 4 te)
No. 2: Bato oyo Biblia ebengi “Basantu”—rs lok. 72 par. 2–lok. 73 par. 1 (Min. 5)
No. 3: Abisalome (Absalom)—Kitoko ya nzoto, lolendo mpe bokosi ememaka na makambo ya mabe—it-1-F nk. 31-32 par. 1 (Min. 5)
Likita ya mosala:
Min. 15: Omekaki kosalela yango? Lisolo na bayangani. Salá diskur oyo ekozongela na mokuse makanisi oyo eutaki kobima na Mosala na biso ya Bokonzi: “Lolenge ya sika ya kopesa litatoli na bisika ya bato nyonso” (km 07/13), “Ndenge ya kosalisa baoyo bakómi naino pene te ya koyekola Biblia eteyaka” (km 12/13), mpe “Kotikela bato bazulunalo mbala na mbala esalisaka mpo na kobanda koyekola na bango Biblia” (km 01/14). Sɛngá bayangani bálobela matomba oyo bazwaki na ndenge basalelaki makanisi ya masolo yango.
Min. 15: “Sanza ya mwambe ekotika nsango na mosala ya kosakola!” Mituna mpe biyano ekosalema na mokɛngɛli na mosala ya kosakola. Soki bosili kozwa trakte ya sika oyo elobi: Epai wapi tokoki kozwa biyano na mituna minene etali bomoi?, bópesa bayangani nyonso trakte mokomoko mpe bólobela makambo ezali na kati. Yebisá bibongiseli oyo lisangá ezwi mpo na kokabola yango na teritware mobimba.
Loyembo 107 mpe libondeli