Tómekola ndakisa ya basakoli—Yona
1. Bizaleli nini ya malamu Yona azalaki na yango?
1 Nini eyaka na makanisi na yo ntango okanisaka mosakoli Yona? Bato mosusu bakoki kotalela ye lokola moto ya bibangabanga to ya motema makasi. Nzokande, Yona amonisaki polele ete azali na komikitisa, na mpiko, mpe na elimo ya komipimela. Ndenge nini tokoki komekola “ndakisa” ya bizaleli na ye ya malamu?—Yak. 5:10.
2. Ndenge nini tokoki komekola ezaleli ya komikitisa ya Yona?
2 Komikitisa: Na ebandeli, Yona akimaki teritware oyo bapesaki ye. Tokokamwa te mpamba te bato ya Asiri bayebanaki ete bazali bato ya mobulu makasi mpe ya nkanza, mpe Ninive ekómaki kobengama “engumba oyo esopaka makila.” (Nah. 3:1-3) Atako bongo, Yehova apesaki Yona disiplini mpe Yona amonisaki ezaleli ya komikitisa na ndenge andimaki kokende ntango Yehova atindaki ye mpo na mbala ya mibale. (Mas. 24:32; Yona 3:1-3) Atako aboyaki na ebandeli, na mbala oyo asalaki mokano ya Yehova. (Mat. 21:28-31) Biso mpe, tozali na ekateli makasi ya kosakola nsango malamu, ata soki tozwi disiplini to bapesi biso teritware moko oyo ezali mpasi?
3. Ntango nini ozalaka na mposa ya komonisa mpiko mpe ezaleli ya komipimela na mosala na yo ya kosakola?
3 Mpiko mpe ezaleli ya komipimela: Ntango Yona amonaki ete ekateli na ye ya mabe etyaki bomoi ya bato ya masuwa na likama, andimaki ete ye moko akufa. (Yona 1:3, 4, 12) Na nsima, ntango azalaki kokokisa mokumba na ye na Ninive, atambolaki mingi na kati ya engumba yango, ntango mosusu mpo na koluka esika ebongi mpo abanda kosakola lisambisi ya Yehova. Kosala bongo emonisi ete azalaki moto ya bibangabanga te, kasi nde mosakoli ya mpiko ya Nzambe! (Yona 3:3, 4) Bongo biso lelo oyo? Tozali na mposa ya mpiko oyo euti na Nzambe mpo tópesa litatoli na mpiko nyonso ntango bazali kotɛmɛla biso. (Mis. 4:29, 31) Tosengeli komonisa ezaleli ya komipimela mpo tósalela ntango mpe biloko na biso na mosala ya kosakola.—Mis. 20:24.
4. Mpo na nini tosengeli kozwa ntango ya komanyola na ndakisa oyo basakoli ya Yehova batikelá biso?
4 Mbala nyonso oyo ozali kotánga masolo ya basakoli ya Yehova, okozwa litomba soki ozali komona lokola nde ezalaki yo. Omituna boye: ‘Soki ngai, nalingaki kosala nini? Ndenge nini nakoki komekola bizaleli na ye ya malamu?’ (Ebr. 6:11, 12) Masolo oyo ekobima na Mosala na biso ya Bokonzi na mikolo ekoya, ekolobela mateya oyo tokoki kozwa epai ya basakoli mosusu ya sembo ya Yehova.