Manaka mpo na pɔsɔ ya 15 sanza ya 4
PƆSƆ EBANDI NA 15 SANZA YA 4
Loyembo 6 mpe libondeli
Boyekoli ya Biblia na lisangá:
jr mok. 8 par. 1-7 (Min. 30)
Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Luka 13-17 (Min. 10)
No. 1: Luka 16:16-31 (Eleka min. 4 te)
No. 2: Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, yango elimboli nde ete tozali na valɛrɛ te na miso ya Nzambe?—Nz. 103:8, 9, 14; Gal. 6:9 (Min. 5)
No. 3: Bato nyonso bazali bana ya Nzambe?—rs lok. 386 par. 1–5 (Min. 5)
Likita ya mosala:
Min. 10: Biyano na mituna na bino. Lisolo na bayangani.
Min. 10: Ndenge ya kosala mingi na mosala ya Nzambe—Eteni 2. Diskur ekouta na buku Tobongisami, lokasa 112, paragrafe 3 tii lokasa 114, paragrafe 1. Sololá na mobongisi-nzela moko to babongisi-nzela mibale bálobela ndenge oyo babongolaki makambo na bango mosusu mpo bákoma babongisi-nzela.
Min. 10: Opesaka litatoli na esika na yo ya mosala? Lisolo na bayangani na mituna oyo elandi. (1) Mpo na nini ezali malamu baninga na yo ya mosala báyeba ete ozali Motatoli ya Yehova? (2) Okoki kosala nini mpo báyeba yango? (3) Makambo nini ebimisaka mabaku ya kopesa litatoli na esika ya mosala? (4) Mpo na nini ezali malamu ozalaka na Biblia mpe mikanda mosusu na esika na yo ya mosala, soki likoki ezali? (5) Mpo na nini ezali malamu obendaka lisolo molai te ntango ozali kopesa litatoli na ngonga ya mosala? (6) Makambo nini ya malamu okutanaki na yango ntango opesaki litatoli na esika ya mosala?
Loyembo 45 mpe libondeli