Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 11/10 nk. 5-6
  • Okoki kosalisa molongani oyo azali Motatoli te?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Okoki kosalisa molongani oyo azali Motatoli te?
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2010
  • Masolo mosusu
  • Okoki kofanda malamu ná bandeko oyo bazali Batatoli te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Solo ememaka “kimya te, kasi mopanga”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • Bokangana na ekanganeli na bokesene te elongo na bato bazangi kondima
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Tózala na mokano ya kopesa mibali litatoli
    Mosala na biso ya Bokonzi—2009
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2010
km 11/10 nk. 5-6

Okoki kosalisa molongani oyo azali Motatoli te?

1. Mpo na nini ezali kaka te bakristo oyo balongani na bango bazali Batatoli te nde balingaka kosalisa balongani yango bándima solo?

1 Basakoli mosusu na lisangá na bino bazali na balongani oyo bazali Batatoli te? Soki ezali bongo, na ntembe te, basakoli yango bazalaka na mposa ete balongani na bango básangana na bango na losambo ya solo. Kasi, kaka bango moko te nde bazalaka na mposa yango. Ndenge moko na Nzambe, lisangá mobimba elingaka ete “bato ya ndenge nyonso bábika mpe bázwa boyebi ya sikisiki ya solo.” (1 Tim. 2:4) Ndenge nini tokoki kosalisa balongani ya basakoli ya lisangá na biso oyo bazali Batatoli te?

2. Ndenge nini kozala na bososoli ekosunga biso tósalisa molongani oyo azali Motatoli te?

2 Ya liboso, tosengeli komeka kotalela makambo ndenge bato oyo bazali Batatoli te batalelaka yango. Babalani oyo bazali Batatoli te balingaka mabota na bango mpe basalaka makasi bázala balongani malamu mpe baboti malamu, kasi mingi na bango bakangamá nde na bindimeli oyo ekeseni na oyo ya biso. Mbala mosusu bayebi makambo mingi te oyo etali Batatoli ya Yehova; mpe mwa moke oyo bayebi, bayoká yango epai ya bato oyo bayebi biso malamu te to baoyo bakaniselaka biso mabe. Bamosusu basepelaka te ndenge bamonaka babalani na bango bakómá kolekisa ntango mingi na makambo ya losambo, nzokande kala bazalaki kolekisa ntango yango elongo na libota. Soki tozali na bosololi, tokoyeba ndenge ya komonisela molongani oyo azali Motatoli te boboto mpe limemya mpe tokozala motema likoló te ntango tozali elongo na ye.​—Mas. 16:20-23.

3. Nini ekoki kozala lolenge eleki malamu ya kobenda molongani oyo azali Motatoli te?

3 Kotyela ye likebi: Lolenge oyo eleki malamu ya kobenda molongani oyo azali Motatoli te na losambo ya solo, mingimingi na ebandeli, ezali na nzela ya misala na biso, kasi te na nzela ya lisolo ya Biblia. (1 Pe. 3:1, 2) Na likambo yango, kotyela ye likebi ezali na ntina mingi. Na lisangá, bandeko basi bakoki kotyela mwasi oyo azali Motatoli te likebi, mpe bandeko mibali bakoki kosala bongo mpo na mobali oyo azali Motatoli te. Ndenge nini?

4. Ndenge nini tokoki kotyela mobalani oyo azali Motatoli te likebi?

4 Soki oyebani naino na molongani yango te, okoki kosala yango nsima ya kosolola na mobalani na ye oyo azali mokristo. Kolɛmba nzoto te soki na ebandeli molongani yango azali naino malilimalili. Komonisela ye boboto mpe kotyela ye likebi ekoki kotinda ye abanda kotalela Batatoli ya Yehova na liso ya malamu. (Rom. 12:20) Ezali na bakristo mosusu oyo bakɔmeli, oyo babengisaki molongani moko oyo azali Motatoli te elongo na libota na ye mpo na kolya, mpo báyebana malamu mpe básalisa ye alongola makanisi mabe oyo akokaki kozala na yango mpo na Batatoli. Basololaki na ye masolo etali makambo oyo ye alingaka, na esika bábongola lisolo na makambo ya elimo. Ekoki kozala ete na nsima, ntango molongani yango amesani na bino, bokoki kosolola na ye na Biblia. To akoki kondima soki bobengi ye aya na likita moko mpo na komona makambo nini mwasi na ye ayekolaka, mingi mpenza soki asili koyebana na bandeko mosusu ya lisangá. Ata soki ayoki naino mposa ya koyekola solo te, asengeli kozwa longonya mpo na ndenge oyo asungaka mwasi na ye.

5. Ndenge nini bankulutu bakoki kosalisa mobalani oyo azali Motatoli te?

5 Bankulutu nde basengeli kozala bato ya liboso ya kosalisa balongani oyo bazali Batatoli te mpe kozala ekɛngɛ mpo bálekisa te mabaku ya kopesa bango litatoli. Ata soki moto oyo azali Motatoli te azalaki koboya kosolola na Biblia, akoki mbala mosusu koyoka elendiseli oyo euti na Makomami ntango azali na mbeto ya lopitalo to ntango abɛli makasi. Soki libota oyo bato mosusu bazali Batatoli te bakweli makambo, na ndakisa soki ndeko na bango moko akufi, bankulutu bakoki kosɛnga molongani oyo azali Motatoli te azala wana ntango bayei kobɔndisa libota yango.

6. Mpo na bantina nini tosengeli kosalisa balongani oyo bazali Batatoli te?

6 Kanisá esengo oyo mokristo moko ya lisangá na biso akoyoka soki mobalani na ye andimi koyekola solo mpe akómi Motatoli! Likambo ya esengo ndenge wana ekosepelisa mpenza Yehova, baanzelu, mpe bandeko mosusu nyonso ya lisangá. (Luka 15:7, 10) Kasi, ata soki na ebandeli mobalani oyo azali Motatoli te aboyi koyoka, tokoki kaka kozala na esengo mpo ete milende na biso ezali kosepelisa Yehova, oyo alingi “moto ata moko te abomama kasi alingi nde bato nyonso bábongola motema.”​—2 Pe. 3:9.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 6]

Lolenge oyo eleki malamu ya kobenda molongani oyo azali Motatoli te na losambo ya solo, mingimingi na ebandeli, ezali na nzela ya misala na biso, kasi te na nzela ya lisolo ya Biblia

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto