Manaka mpo na pɔsɔ ya 29 Novɛmbɛ
PƆSƆ EBANDI NA 29 NOVƐMBƐ
□ Boyekoli ya Biblia na lisangá:
□ Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: 2 Ntango 6-9
No. 1: 2 Ntango 6:12-21
No. 2: Mpo na nini banyokolaka Batatoli ya Yehova? (rs lok. 401 par. 3-4)
No. 3: Ndenge oyo tokoki ‘kosalaka malamu mpo na kolonga mabe’ (Rom. 12:21)
□ Likita ya mosala:
Min. 5: Mayebisi.
Min. 10: “Komanyola ezali na ntina mingi mpo na kosakola na molende.” Mituna mpe biyano. Sɛngá bayangani báyebisa ntango nini bamanyolaka.
Min. 10: ‘Tiká tópesa Yehova likabo.’ Lisukulu ekosalema na nkulutu moko, ekouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Novɛmbɛ 2010, nkasa 20-21.
Min. 10: Omibongisa mpo na kokabola bazulunalo na sanza ya Desɛmbɛ. Lisolo ná bayangani. Na miniti moko to mibale, lobelá na mokuse makambo oyo ezali na bazulunalo yango. Na nsima, poná masolo mibale to misato, mpe sɛngá bayangani báyebisa mituna oyo bakotuna mpe bavɛrsɛ oyo bakotánga mpo na kokabola bazulunalo yango. Bósala bilakiseli mibale mpo na komonisa ndenge ya kokabola zulunalo mokomoko.