Tozali na biloko ya motuya ya kokabela basusu
1 Liloba ya Nzambe etondi na biloko ya motuya ya elimo, oyo tosepelaka na yango. (Nz. 12:6; 119:11, 14) Na libaku moko, Yesu apesaki bandakisa oyo akokanisaki Bokonzi ya Nzambe na biloko ndenge na ndenge, na nsima atunaki bayekoli na ye boye: “Bokangi ntina ya makambo nyonso wana?” Bandimaki; na nsima, ayebisaki bango ete: “Lokola ezali bongo, molakisi nyonso ya bato, ntango ateyami na ntina etali bokonzi ya likoló, azali lokola moto moko, nkolo-ndako moko, oyo azali kobimisa uta na ebombelo na ye ya biloko ya motuya biloko ya sika mpe ya kala.”—Mat. 13:1-52.
2 Mateya ya solo oyo bateyaki biso ntango tobandaki koyekola Biblia ekokani na bikolo ya kala. Soki tozali koyekola biso moko makambo mozindo ya Liloba ya Nzambe, tokoyeba mateya mosusu ya Biblia, oyo ezali lokola biloko ya sika. (1 Kol. 2:7) Longola yango, “moombo ya sembo mpe ya mayele” asalisaka biso tókanga ntina ya mateya ya sika.—Mat. 24:45.
3 Tosepelaka mingi na biloko wana ya motuya ya elimo, ezala ya kala to ya sika. Yango etindaka biso tóluka kozwa formasyo mpo tókóma na mayele ya koteya Liloba ya Nzambe mpe tólakisaka basusu mateya ya motuya oyo tozwi.
4 Zwá liteya na ndakisa ya Yesu: Yesu amonisaki ete azalaki kosepela mingi na biloko wana ya motuya, na ndenge asalaki makasi mpo na koyebisa yango na basusu. Ata ntango alɛmbaki, azalaki kotika te kobimisa biloko ya motuya na ‘ndako na ye ya kobomba biloko.’—Yoa. 4:6-14.
5 Bolingo oyo Yesu azalaki na yango mpo na bato oyo bazalaki babola na elimo etindaki ye apesa bango biloko ya motuya ya Liloba ya Nzambe oyo epesaka bomoi. (Nz. 72:13) Ayokaki mawa mpo na baoyo bazalaki na nzala ya elimo, mpe ‘ateyaki bango makambo mingi.’—Mko. 6:34.
6 Landá ndakisa ya Yesu: Soki tozali kosepela mingi na biloko ya motuya oyo tozali na yango, na ndakisa ya Yesu, tokozala na mposa makasi ya kolakisa bato biloko yango mbala moko na kati ya Biblia. (Mas. 2:1-5) Ata soki tolɛmbi, toyebisaka bato mateya ya solo ya Biblia na esengo mpenza. (Mko. 6:34) Soki tosepelaka mpenza na biloko ya motuya oyo tozali na yango, tokomipesa mingi na mosala ya kosakola, mpe tokoluka mabaku ya kosangana mingi na mosala yango.