Ndenge ya kolakisa bazulunalo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Yuli
“Okanisi ete moto akoki mpenza kozala moninga ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima, tángá Misala 17:27.] Lisolo oyo emonisi ntina oyo tokoki kondima ete Nzambe alingi tópusana penepene na ye.” Lakisá lisolo oyo ebandi na lokasa 10.
Lamuká! Yuli
“Lelo oyo, masano mpe bafilme mingi ekómi kolendisa misala ya bilimo mabe. Okanisi mpenza ete komikɔtisa na misala ya bilimo mabe ezali na likama moko te? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima, tángá Deteronome 18:10-12.] Lisolo oyo emonisi oyo Biblia elobi na ntina na makama oyo ekómelaka bato oyo bamikɔtisaka na misala ya bilimo mabe.” Lakisá lisolo oyo ebandi na lokasa 10.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Aug.
“Lokola zamba, mai mpe mopɛpɛ ebebi mingi, bato ebele bakómi kobanga ete mabelé mobimba ebebisama na mikolo ezali koya. Yo okanisi nini? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima, tángá Nzembo 37:11.] Zulunalo oyo emonisi mwa bantina oyo euti na Makomami, oyo ezali kosalisa biso tóbanga te.”
Lamuká! Aug.
“Bato mingi bandimi ete molunge makasi oyo ekómi na mokili ezali kotya bomoi ya bikelamu oyo ezali awa na mabelé na likama. Okanisi ete likambo yango ekosila ndenge nini? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima, tángá Yisaya 11:9.] Zulunalo oyo elimboli ntina oyo tosengeli kotya ntembe te ete bato bakokoba kofanda awa na mabelé.”