Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 1/05 lok. 7
  • Biyano na mituna na bino

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biyano na mituna na bino
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Masolo mosusu
  • Makambo ya kosala mpo na kopesa mabɔkɔ nsima ya likama
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
  • Ndenge nini tokoki kosalisa?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Nini esalemaka na biro ya filiale?
    Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
  • Kopesa mabɔkɔ na mosala ya Bokonzi na esika tozali mpe na mokili mobimba
    Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2005
km 1/05 lok. 7

Biyano na mituna na bino

◼ Wapi lolenge ya malamu koleka ya kopesa makabo mpo na kosalisa bandeko ya bikólo mosusu oyo bazali na bosɛnga?

Toyokaka ntango mosusu ete bandeko na biso na bikólo mosusu bakómi na bosɛnga mpo bazali konyokola bango, bakweli likama to mikakatano mosusu. Bandeko mosusu bamonaki malamu kotinda mbongo mbala moko na Babetele ya bikólo wana, mpe basɛngaki ete básalela yango mpo na kosalisa moto moko, lisangá moko boye to na mosala ya kotonga.—2 Kol. 8:​1-4.

Atako ezali malamu komonisa ete tolingaka bandeko na biso ndenge wana, mbala mingi ezalaka na makambo mosusu oyo esɛngaka kosilisa yango nokinoki koleka makambo moto oyo apesi likabo azali kokanisa. Na bantango mosusu, mbongo oyo batindi ekómaka na ntango oyo mposa na yango esilaki kokokisama. Ntembe ezali te ete ntango totindi mbongo na Betele ya mboka oyo tofandi mpo na mosala ya kosakola na mokili mobimba, mpo na kotonga Bandako ya Bokonzi, to kosalisa bandeko oyo bazwi makama, tóyeba ete basalelaka yango kaka na makambo wana.

Bandeko ya Babetele nyonso babongisami mpo na kosalisa bandeko nokinoki na makama oyo ebimaka mbalakaka. Ata likambo nini ebimi, Betele eyebisaka yango na Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Soki mposa mosusu ezali, Lisangani ya Mikóló-Bakambi bakoki kosɛnga na Babetele oyo ezali pembeni na bango esalisa bango to mpe bakoki kotindela bango mbongo mbala moko.—2 Kol. 8:14, 15.

Yango wana, esengeli kotinda makabo nyonso, ezala ya mosala ya kosakola na mokili mobimba, mosala ya kotonga na bikólo mosusu, to kosalisa bandeko oyo bazwi likama, na Betele ya mboka oyo ofandi, ezala na nzela ya lisangá to mbala moko na Betele. Na ndenge yango, “moombo ya sembo mpe ya mayele,” na nzela ya bibongiseli oyo Lisangani ya Mikóló-Bakambi bazwi, akokokisa bamposa ya bandeko na biso ya mokili mobimba kozanga mobulu.—Mat. 24:45-47; 1 Kol. 14:33, 40.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto