Manaka mpo na likita ya mosala
Pɔsɔ ebandi na 9 Desɛmbɛ
Min. 12: Mayebisi ya lisangá. Lobelá makambo oyo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Salá bilakiseli oyo ekomonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Desɛmbɛ mpe Lamuká! ya 22 Desɛmbɛ na kotalela makanisi oyo ezali na lokasa 8.
Min. 15: “Sakolá nsango ya Bokonzi.”a Na paragrafe 3, pesá makanisi etali ndenge ya kotánga mpenza Biblia na mosala ya kosakola nsango malamu.—km 12/01 lok. 1 par. 3.
Min. 18: Botá mbuma na misala nyonso ya malamu. Lisukulu, mpe lisolo elongo na bayangani. Ekosalema na nkulutu moko. Lobelá ebandeli mpe bokoli ya lisangá na bino, mpe milende oyo esalemaki mpo lisangá ebotama. Bongisá liboso mpo ete bandeko mosusu oyo bazalaki na ntango wana bálobela makambo ya kolendisa oyo bamonaki. Lobelá elikya ya bokoli na mikolo oyo ezali koya, mpe lendisá bato nyonso básanganaka na bibongiseli ya lisangá na molende mpenza.
Loyembo 119 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 16 Desɛmbɛ
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lapolo ya kɔnti. Lobelá bibongiseli mpo na mosala ya kosakola na mokolo ya 25 Desɛmbɛ mpe ya 1 Yanuali.
Min. 15: Bato ya bososoli bakokanga ntina. (Dan. 12:3, 10) Elakiseli. Moto oyo asepelaka na solo akotuna boye: “Ndenge nini nakoki koyeba mpenza soki ndenge bolimbolaka mateya ya Biblia ezali malamu mpenza?” Mosakoli alimboli ndenge ya kosalela mitó ya masolo na kosaláká bolukiluki na kati ya Biblia. (w96 15/5 nk. 19-20) Na nzela ya ndakisa moko to mibale oyo euti na buku Comment raisonner, nkasa 403-408, akolakisa ndenge oyo tokómaki na likoki ya koyeba mokano ya Nzambe mpo na mabele na kotaleláká malamumalamu bavɛrsɛ ya Makomami. Mosakoli akolimbola ndenge ya kosalela yango mpo na kososola malamumalamu mateya mosusu ya Biblia, mpe akosɛnga ayekola na ye Biblia.
Min. 20: “Kanisaká mibange oyo bazali sembo.”b Kɔtisá mpe makanisi oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Augusto 1994, na lokasa 29. Lobelá ebongiseli oyo epesi baoyo bazali nzoto kolɔngɔnɔ te nzela ya kopesa lapolo ya mosala ya kosakola ata miniti 15, 30, 45. Bongisá mpo ete bandeko mosusu bámonisa ndenge oyo kozala elongo na bato ya ndenge wana ememelaki bango nyonso mapamboli.
Loyembo 154 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 23 Desɛmbɛ
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Salá elakiseli mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yanuali mpe Lamuká! ya 8 Yanuali na kotalela makanisi oyo ezali na lokasa 8. Lendisá moto nyonso azongela “Mituna ya batángi” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuni 2000, nkasa 29-31 mpe oyo ya 15 Ɔkɔtɔbɛ 2000, nkasa 30-31 mpe mwabuku Comment le sang peut-il vous sauver la vie? mpo na komibongisa na lisolo ya Likita ya Mosala ya pɔsɔ ya 6 Yanuali.
Min. 15: Bamposa ya lisangá.
Min. 20: “Osalaka oyo ekoki na yo mpo lapolo ya mosala ya kosakola ezala sikisiki?”c Na paragrafe 2, lobelá mpe makanisi oyo ezali na buku Lisanga na nkasa 107-109.
Loyembo 165 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 30 Desɛmbɛ
Liyebisi: Masangá esengeli te kosala Likita ya Mosala oyo ebongisami mpo na pɔsɔ ya 30 Desɛmbɛ liboso ya dati na yango, longola kaka soki mokɛngɛli ya zongazonga akotala lisangá na bango. Masangá nyonso esengeli kotalela siplema oyo ezali kolobela liyangani ya etúká kaka na pɔsɔ oyo yango etyami na programɛ.
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli nyonso bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Desɛmbɛ. Soki lisangá na bino ekobongola programɛ na yango ya makita na mbula ya sika, lendisá bandeko nyonso ete bálanda ntango nyonso koyangana na makita na programɛ oyo ya sika. Lobelá mikanda oyo tokolakisa na Yanuali, mingimingi babuku oyo ezali na libombo ya lisangá.
Min. 15: Bótalela buku Tósambela Nzambe. Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani. Limbolá ebongiseli ya kosalela buku yango ya sika lokola buku ya mibale mpo na koyekola na bato. (km 6/00 lok. 4 par. 5-6) Sɛngá bayangani bálobela makambo ya buku yango oyo basepelaka na yango. Monisá ete biteni mosusu ya buku ezali na mituna mpe bavɛrsɛ mpo na kotinda moyekoli amanyola mpenza likoló ya Liloba ya Nzambe. Lakisá ndakisa oyo ezali na nkasa 47-49, paragrafe 13.
Min. 20: “‘Pesá Nzambe nkembo’—Liyangani ya etúká ya Batatoli ya Yehova na mobu 2003.”d Ekosalema na mokomeli ya lisangá. Liboso ya kotalela siplema oyo, tángá naino mokanda ya biro ya 15 Desɛmbɛ 2002 oyo etali esika lisangá na bino ekokende liyangani ya etúká. Lobelá mingimingi mokumba ya mokomeli ya kobongisa makambo oyo etali liyangani mpo na lisangá. Pesá bayangani nyonso longonya mpo na milende oyo bazali kosala ya komibongisa libelalibela mpo na liyangani ya etúká.
Loyembo 147 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 6 Yanuali
Min. 5: Mayebisi ya lisangá.
Min. 23: Lisalisi mpo na kotosa mobeko ya Nzambe oyo etali makila. Lisukulu ekosalema na nkulutu moko ya makoki, ezwami na malako mpe mokanda oyo euti na biro. Mokomeli asengeli kozala na biloko oyo, mingi mpenza na ntango ya kokabola yango mpo moto nyonso azwa yango: bakalati ya “Instructions médicales prévionnelles,” Document d’identité médical. Na nsima ya likita, basakoli nyonso bakozwa kalati yango, kasi basengeli TE kotondisa yango bobele lelo na mpokwa. Sinyatire ya nkolo kalati, mpe kotya dati na bakalati, nyonso ekosalema na nsuka ya boyekoli ya mokanda ya pɔsɔ oyo ekolanda, na litambwisi ya mokɛngɛli ya boyekoli ya mokanda, soki yango esengeli. Na nsima ya likita, baboti bakozwa Document d’identité médical mpo na bana na bango. Basakoli oyo bazwi naino batisimo te bakoki kokoma malako mpo na bango mpe mpo na bana na bango, bakoyokanisa makambo oyo ezali na kati ya kalati na ezalela na bango mpenza mpe na komindimisa na bango moko.
Min. 17: “Osengeli kotala video No Blood—Medecine Meets the Challenge.” Ekosalema na nkulutu ya makoki. Bandá mbala moko na lisolo elongo na bayangani na likambo etali video No Blood, salelá mituna oyo epesami na etanda na lokasa 7. Na nsima, tángá paragrafe ya nsuka ya etanda. Soki video yango ezali te, bokoki kosalela mwabuku Comment le sang peut-il vous sauver la vie?, nkasa 5-17, 19, 29.
Loyembo 79 mpe libondeli ya nsuka.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
c Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
d Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.