Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 12/01 lok. 1
  • Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na mobu 2002

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na mobu 2002
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Masolo mosusu
  • Eteyelo moko oyo ezali kobongisa biso mpo na makambo oyo eleki ntina
    Mosala na biso ya Bokonzi—2002
  • Bolamu bozali kozwama na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na 1998
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Eteyelo ya mosala ya Teokrasi mpo na mobu 2000
    Mosala na biso ya Bokonzi—1999
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2001
km 12/01 lok. 1

Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na mobu 2002

1 Bato mingi batalelaka likoki ya koloba lokola likambo ya lisɛki. Nzokande, yango ezali likabo oyo euti na Yehova. Esalisaka biso tósolola na bato mosusu mpe tóyebisa bango makanisi na biso mpe ndenge tozali koyoka na motema na biso. Likambo oyo eleki ntina ezali ete, ekoki kosalisa biso tókumisa Nzambe.​—Nz. 22:22; 1 Kol. 1:4-7, NW.

2 Eteyelo ya mosala ya Teokrasi ezali koteya mibali, basi, mpe bana ndenge ya kosakola nkombo ya Yehova. (Nz. 148:12, 13) Programɛ ya Eteyelo mpo na mobu 2002 ekolobela masolo ndenge na ndenge oyo euti na Biblia, mokomoko na biso akozwela masolo yango litomba mpe tokoki kosalela yango na mosala na biso ya kosakola. Soki tozali komibongisa mpe kosala masolo na eteyelo yango, lokola tozali bateyi ya Liloba ya Nzambe, boyebi mpe mayele na biso ekobakisama.​—Nz. 45:1.

3 Tótánga Biblia mokolo na mokolo: Soki ntango nyonso Biblia ezali pene na biso, tokoki kotángaka yango ntango tozali na mosala te. Mikolo nyonso mokomoko kati na biso azangaka te mwa miniti oyo likambo ya kosala ezalaka te; tokoki kosalela mwa ntango yango mpo na kotánga Biblia. Soki tozali kotánga ata lokasa moko mokolo na mokolo, yango ekosalisa biso tólanda malamu programɛ ya botángi ya Biblia oyo etyami na kati ya programɛ ya eteyelo; yango ezali mpenza likambo ya malamu!​—Nz. 1:1-3.

4 Koyeba kotánga Biblia malamu ekoki kosalisa biso tósimba mitema ya bato oyo bazali koyoka biso mpe yango etindaka bango bákumisa Yehova. Bandeko mibali oyo bakosala lisolo No. 2 na eteyelo, basengeli komeka yango naino bango moko na mongongo makasi mbala na mbala. Mokɛngɛli na eteyelo akopesa bango longonya mpe toli mpo na kobongisa lisusu ndenge na bango ya kotánga.

5 Tósalela buku Comment raisonner: Lisolo No. 3 mpe lisolo No. 4 ekouta na buku Comment raisonner. Biso nyonso tosengeli kosala makasi mpo na kosalela buku yango mingi na mosala ya kosakola mpamba te ezali esaleli oyo ebongi mpenza. Bandeko basi basengeli kopona bakadre oyo ebongi na teritware na bango. Mokɛngɛli na eteyelo asengeli kotya mpenza likebi na ndenge oyo bazali koteya mpe kosalela bavɛrsɛ ya Biblia.

6 Tiká ete Eteyelo ya mosala ya Teokrasi esalisa biso nyonso tólanda kosalela malamu likoki ya koloba, likabo oyo Nzambe apesá biso, mpo na kosakola nsango malamu mpe kokumisa Nzambe na biso monene, Yehova.​—Nz. 34:1; Ef. 6:19, NW.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto