Manaka mpo na Likita ya Mosala
Pɔsɔ ebandi na 10 Desɛmbɛ
Min. 13: Mayebisi ya lisangá. Lobelá makambo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Lendisá bandeko nyonso ete bátala kasɛti video Jusqu’aux extrémités de la terre (Tii na nsuka ya mabele) mpo na komibongisa mpo na lisolo oyo ekosalema na Likita ya Mosala na pɔsɔ ya 24 Desɛmbɛ to bátánga buku Prédicateurs na nkasa 521-546. Salelá makanisi oyo ezali na lokasa 8, mpo na kosala elakiseli oyo ekomonisa ndenge ya kolakisa: (1) Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Desɛmbɛ mpe (2) Lamuká! ya 22 Desɛmbɛ.
Min. 12: Bamposa ya lisangá.
Min. 20: “Mapamboli oyo eutaka na komonisa botɔndi mpo na bolingo ya Yehova—Eteni 2.”a Ntango bokokóma na paragrafe 2-6, sɛngá bayangani báyebisa makambo oyo bakutanaki na yango ntango bazalaki kopesa litatoli ya libaku malamu, na nzela ya kokoma mikanda, mpe na telefone. Bokoki kobongisa elakiseli moko to bilakiseli mibale oyo ekomonisa ndenge makambo yango elekaki.
Loyembo 222 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 17 Desɛmbɛ
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lapolo ya kɔnti. Lobelá bibongiseli oyo ezwami mpo na mosala ya kosakola na mokolo ya 25 Desɛmbɛ mpe 1 Yanuali.
Min. 22: “Tósembola Liloba ya Nzambe malamumalamu.”b Bongisá mpe elakiseli moko mpo na komonisa ndenge ya kosalela makanisi oyo epesami na paragrafe 4. Na nsima, sɛngá bayangani báyebisa ntina oyo bakanisi ete soki basaleli Biblia, litatoli oyo bakopesa ekobimisa matomba mingi koleka.
Min. 13: ‘Bozalaka na Biblia na bino moko.’ Lisolo elongo na bayangani, ezwami na buku Comment raisonner, lok. 411. Soki bato bazali kolinga koyoka biso te mpo tozali kosalela Biblia Traduction du monde nouveau, tokoki koloba na bango nini? Sɛngá basakoli mosusu bámibongisa libela mpo na kopesa biyano oyo ezali na kati ya buku, kasi basengeli kolobela biyano yango na maloba na bango moko.
Loyembo 225 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 24 Desɛmbɛ
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Yebisá mikanda oyo tokolakisa na sanza ya Yanuali mpe babuku nini oyo ezali na lisangá. Salelá makanisi oyo ezali na lokasa 8 mpo na kobongisa bilakiseli mibale oyo ekomonisa ndenge ya kolakisa bazulunalo, moko ekomonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yanuali mpe mosusu ekomonisa ndenge ya kolakisa Lamuká! ya 8 Yanuali. Sɛngá elenge moko asala moko ya bilakiseli yango.
Min. 10: “Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na mobu 2002.” Lisukulu ekosalema na mokɛngɛli na eteyelo. Lendisá bandeko nyonso bázala na molende ya kosalaka mikumba oyo bazali kopesa bango na eteyelo yango.
Min. 25: “Bazali kotatola—Tii na nsuka ya mabele.” Lisolo elongo na bayangani. Lendisá bandeko nyonso bákanisa malamumalamu mpo na milende oyo bakoki kosala lisusu mpo na komemela bato mosusu nsango malamu, ezala na teritware na bango to na esika oyo mposa ya basakoli ezali makasi. Talelá mpe makanisi oyo ezali na Mosala na biso ya Bokonzi ya Yuli 2001, lok. 4. Soki bozwi kasɛti video yango naino te, lisangá ekotalela makambo oyo ezali na buku Prédicateurs nk. 521-546, mpe makambo oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yanuali 1999, lok. 6. Na sanza ya Febwali tokotala kasɛti video Noé: il marchait avec Dieu (Noa—Ye atambolaki elongo na Nzambe).
Loyembo 24 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 31 Desɛmbɛ
Liyebisi: Masangá esengeli te kosala Likita ya Mosala oyo ebongisami mpo na pɔsɔ ya 31 Desɛmbɛ liboso ya dati na yango, longola kaka soki mokɛngɛli ya zongazonga akotala lisangá na bango. Masangá nyonso esengeli kotalela siplema oyo ezali kolobela liyangani ya etúká kaka na pɔsɔ oyo yango etyami na kati ya programɛ. Soki lisangá moko ekozala na liyangani ya zongazonga na pɔsɔ yango, batambwisi ya boyekoli ya mokanda basengeli koyebisa bandeko ya etuluku na bango ya boyekoli esika mpe dati oyo liyangani ya etúká ekosalema; bakoyebisa yango ntango bakosala boyekoli na bango ya mokanda oyo ebongisami mpo na pɔsɔ yango.
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli nyonso bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Desɛmbɛ. Soki lisangá na bino ekobongola programɛ na yango ya makita na mbula ya sika, lendisá bandeko nyonso ete bálanda ntango nyonso koyangana na makita na programɛ oyo ya sika. Bosengeli mpe koyebisa programɛ yango ya sika epai ya bato nyonso oyo basepelaka na solo mpe bandeko nyonso oyo batiká kosakola.
Min. 15: Tópesa bankulutu lokumu oyo ebongi na bango. Basaleli na misala mibale to misato bazali kosolola makambo oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuni 1999, nk. 18-19. Balobeli misala mingi oyo bankulutu basengeli kokokisa, bakisa misala na bango ya mosuni, mikumba na bango na kati ya libota, mpe mikumba ya Teokrasi oyo bazali na yango. Bótalela ndenge oyo mokomoko kati na biso akoki kolendisa bango, kosala ete mokumba na bango ezala pɛpɛlɛ, mpe kolanda toli na bango. Basaleli na misala bandimi ete bankulutu basalaka mosala ya ntina mingi mpe babongi kozwa “lokumu oyo eleki mpenza.”—1 Tes. 5:12, 13, NW.
Min. 20: “‘Basakoli ya Bokonzi ya molende’: Liyangani ya etúká ya Batatoli ya Yehova na mobu 2002.”c Ekosalema na mokomeli ya lisangá, akobenda mpenza likebi ya bayangani na paragrafe 4-11. Masangá ekokende koyangana kaka na bisika oyo eyanganaki na liyangani ya etúká na mobu 2001. Soki mayebisi mosusu to mpe mbongwana ekozala, bakotindela masangá mikanda mpo na koyebisa bango yango. Pesá bayangani nyonso longonya mpo na milende oyo bazali kosala mpo na komibongisa libelalibela mpo na liyangani ya etúká.
Loyembo 219 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 7 Yanuali
Min. 10: Mayebisi ya lisangá.
Min. 20: Bósalela bomoi na bino malamu. Libota moko bazali kosolola makambo oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Augusto 1998 nk. 8-9. Tata alingi ete libota na ye elanda nzela oyo ekomemela bango esengo mingi kasi oyo ekomemela bango mawa te. Balobeli toli ya Makomami oyo ezali na lisolo yango, toli oyo ezali komonisa bango ndenge ya kozala na esengo; basengeli konyata mpenza ntina ya kozala na bososoli, koyeba kotya makambo ya ntina na esika ya liboso, mpe kotyela Yehova motema. Balobeli makambo oyo basengeli lisusu kobongisa na kati ya libota na bango.
Min. 15: Tótala Ndako ya Bokonzi na biso malamu. Lisukulu ekosalema na nkulutu moko. Akolobela ndenge oyo Ndako ya Bokonzi ya lisangá na bango ezali. Bibongiseli nini bozali kozwa mpo na kosukola malamumalamu Ndako ya Bokonzi na bino liboso ya Ekaniseli? Biloko nini ezali kosɛnga ete bóbongisa yango? Limbolá ndenge oyo lisangá ekoki kopesa mabɔkɔ mpo na yango. Lobelá ntina oyo tosengeli komindimisa ete esika na biso ya losambo ezali kitoko mpe ezali komonisa lokumu oyo ebongi mpo na ndako ya Yehova.—Nz. 84:1.
Loyembo 126 mpe libondeli ya nsuka.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
c Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.