Tokoki kosala ete sanza ya Aprili 2000, ezala sanza oyo eleki basanza nyonso?
1 Likambo oyo eleki ntina na mobu na biso mobimba ya mosala ekosalema na mpokwa ya mokolo ya misato mwa 19 Aprili. Mokolo yango, wana moi ekobanda kolala malembemalembe na mabele mobimba, masangá nyonso mpe bisika nyonso oyo Batatoli ya Yehova bazali na mokili mobimba, bakosala Ekaniseli ya liwa ya Klisto. Ata esika nini oyo tofandaka, Ekaniseli ya liwa ya Yesu Klisto ekozala likambo oyo eleki ntina mingi na mbula mobimba. Dati ya Ekaniseli etyami na Calendrier des Témoins de Jéhovah 2000, na sanza ya Aprili.
2 Sanza mobimba ya Aprili ezali kopesa biso libaku ya komonisa na molimo na biso mobimba, botɔndi na biso epai ya Yehova mpo na ngɔlu oyo amonisaki na ndenge apesaki mwana na ye lokola mbeka mpo na biso. Ndenge nini? Ntoma Paulo akomaki ete: “Bolingo na Klisto ekangi biso awa ekati biso ntina ete moko akufeli bato nyonso mpe bongo bato nyonso basili kokufa. Akufeli bato nyonso ete baoyo bazali na bomoi bábika lisusu mpo na bango mpenza te kasi mpo na ye oyo akufeli bango mpe asekwi.” (2 Kol. 5:14, 15) Na ntembe te, na boumeli ya sanza ya Aprili tokoki komonisa ete tozali na bomoi, mpo na biso moko te, kasi mpo na ye oyo akufelaki biso, tokosala ete sanza yango ezala sanza oyo tokosala mingi koleka na mosala na biso lokola baministre ya Bokonzi!
3 Salá nyonso mpo ozala mobongisi-nzela mosungi na sanza ya Aprili: Ntoma Paulo apesi biso ndakisa ya kolendisa ntango alobi ete: “Kasi na miso na ngai bomoi na ngai ezali mpo monene te, bobele soko nakoka kosilisa nzela na ngai mpe lotomo lozwi ngai epai na Nkolo Yesu, ete natatola mpo na Nsango Malamu na ngɔlu na Nzambe.” (Misala 20:24) Tozali na libaku ndenge moko ya kopesa litatoli malamumalamu mpo na Yehova Nzambe. Mpo na yango, tolingi sanza ya Aprili ezala sanza oyo bandeko mingi mpenza bakosɛnga mosala ya mobongisi-nzela mosungi!
4 Sanza ya Aprili 2000 ekozala sanza ya malamu mpo ete bato mingi bázala babongisi-nzela, mpamba te ezali na pɔsɔ mitano. Na sanza ya Yuni 1997, ntango tozwaki motángo moleki monene ya babongisi-nzela basungi na République démocratique du Congo, bandeko 8 260 basalaki mosala yango, elingi koloba bandeko 9 likoló na monkama kati na basakoli nyonso. Mbula mibale na nsima, motángo ya basakoli oyo bapesaki lapolo na bango na 1999 ebakisamaki (6 %). Yango emonisi ete tozali na likoki mpenza ya koleka motángo oyo eleki monene ya babongisi-nzela basungi oyo tozwaki liboso. Lisusu, lokola bakitisi ngonga oyo esɛngami, basakoli mingi na lisangá bakozala na likoki ya kosala mosala yango. Mosakoli nyonso oyo azwá batisimo asengeli komitalela malamumalamu soki akoki kosala mosala ya mobongisi-nzela na sanza oyo ya Aprili.
5 Salelá Calendrier des Témoins de Jéhovah 2000, na sanza ya Aprili. Uta sikoyo, bandá kobongisa programɛ na yo ya sanza oyo ekoya. Poná mikolo oyo omoni ete okokoka kobima na mosala ya kosakola, mpe bakisá ngonga mosusu nyonso oyo omoni ete okoki kolekisa na mosala ya kosakola na boumeli ya sanza yango. Bakisá mpe ntango oyo okoki kolekisa mpo na kopesa bato mosusu litatoli ezala na lolenge ebongisami to na libaku malamu. Soki osangisi bangonga wana nyonso, okómi pene ya ngonga 50 oyo esɛngami mpo na mosala ya mobongisi-nzela mosungi? Soki ngonga mosusu ezangi, okoki kobongisa lisusu programɛ na yo mpo na kozwa ntango ya kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi? Esengeli osala bobele ngonga moko na miniti 40 mokolo na mokolo mpo na kokokisa ngonga 50 na sanza mobimba.
6 Lokola bakitisi mpe ngonga oyo esɛngami mpo na babongisi-nzela ya sanza na sanza, ozali kokana kobanda mosala ya ntango nyonso? Mpo na nini ozali kozela tii na sanza ya Yuli? Sanza ya Aprili ekozala sanza malamu mpo na kobanda mosala yango! Tóloba ete oyebi mpenza te soki okokokisa ngonga 70 oyo esɛngami na babongisi-nzela ya sanza na sanza, boye mpo na nini te kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi na sanza ya Aprili mpe komityela mokano ya kokokisa ngonga 70? Soki omoni ete okoki kosala yango, okoki kosɛnga okɔta na molɔngɔ ya babongisi-nzela ya sanza na sanza.—Talá buku Lisanga, lokasa 114 kino 115.
7 Omipesa mobimba lokola mosakoli ya nsango malamu: Bolingo na biso mpo na Nzambe mpe mpo na bazalani na biso, ezali kotinda biso nyonso, basakoli mpe babongisi-nzela ete tómipesa mobimba mpo na kosala nyonso oyo tokoki na mosala ya Yehova ndenge ezalela ya mokomoko epesi nzela. (Luka 10:27) Na yango tozali komonisa ete “tozali kosalaka mosala mpe tosili kolikya epai na Nzambe ya bomoi, ye oyo azali Mobikisi ya bato nyonso mpe na koleka na baoyo bazali kondima.” (1 Tim. 4:10) Yango wana, tozali kolikya ete basakoli nyonso, nyonso mpenza, bakosala mingi na mosala ya Bokonzi na sanza ya Aprili.
8 Tóbosana te toli ya Yesu ete: “Mbuma na elanga eteli mingi mpenza nde basali bazali mingi te. Bóbondela Nkolo na elanga ete atinda basali kati na elanga na mbuma na ye.” Nsima kaka ya koloba maloba oyo, Yesu abengaki bantoma na ye 12 mpe atindaki bango bákende kosakola. (Mat. 9:37, 38; 10:1, 5, 7) Pene na mbula moko na nsima, ntango bantoma 12 babongisamaki malamu mpo na mosala ya kosakola, Yesu “aponaki mpe bamosusu ntuku nsambo, mpe atindaki bango . . . liboso na ye,” apesaki bango lilako bobele moko wana: “Mbuma mingi eteli solo . . . Na bongo bóbondela Nkolo na bilanga ete atinda basali kobukela ye mbuma.” (Luka 10:1, 2) Na Biblia, mokanda ya Misala emonisi ndenge oyo Yehova ayanolaki na mabondeli yango. Na eleko ya Pantekote ya mobu 33 T.B., bayekoli bakómaki 120. Na nsima, bakómaki na motángo ya bato 3 000 mpe na nsima bakómaki lisusu mingi koleka, bayekoli 5 000. (Mis. 1:15; 2:41; 4:4) Nsima na yango, “motuya ya bayekoli . . . etondanaki mingi mpenza.” (Mis. 6:7) Ezali ndenge moko mpe lelo oyo, tosengeli ntango nyonso kobondela Nkolo mpo atinda basakoli ya Bokonzi mingi! Na boyokani na mabondeli na biso, mosakoli mokomoko ya lisangá asengeli kozwa bibongiseli mpo na kosakola sanza na sanza.
9 Tolɔmbi yo otalela malamumalamu sanza ya Aprili na Calendrier des Témoins de Jéhovah 2000. Lokola mikolo mibale ya liboso ya sanza ya Aprili ezali mokolo ya pɔsɔ mpe ya lomingo, okoki komibongisa mpo na kosakola na wikende yango, mpo okoka kosakola uta ebandeli ya sanza yango, boye te? Okoki kosangana na ebongiseli ya “mokolo ya bazulunalo” oyo ebongisami na etuluku na yo ya boyekoli ya mokanda? Ezali boni mpo na oyo etali kolekisa ngonga moko to ngonga mingi mokolo nyonso ya lomingo na mosala ya kosakola? Okoki komibongisa mikolo mosusu mpo na kopesa litatoli na mpokwa? Mpe kobosana te kopesa litatoli ya libaku malamu na mosala, na eteyelo to ntango ozali na misala na yo mosusu ya mokolo na mokolo. Poná mikolo oyo omoni ete okoki kobima na mosala ya kosakola, mpe salelá Calendrier mpo na kokoma ngonga oyo okosala na mosala ya kosakola na boumeli ya sanza yango.
10 Sanza ya Aprili ekopesa nzela epai ya baoyo nyonso bakokisi masɛngami mpe bandimami epai ya bankulutu ete bákóma basakoli oyo bazwi naino batisimo te. Soki ozali koyekola Biblia na moto moko, mpe soki moto yango azali kokola malamu na elimo, akoki koyebisa mokɛngɛli mokambi mposa na ye ya kokóma mosakoli ya nsango malamu? Soki ozali na bana oyo bazwi naino batisimo te, osili kosolola na bankulutu mpo na bokoli na bango ya elimo? Sanza ya Aprili ekozala libaku malamu mpo na bango ete bábanda kosakola, boye te?—Talá buku Lisanga, lokasa 98 kino 100.
11 Lokola tozali kosala makasi mpo na kosala ete sanza ya Aprili 2000, ezala sanza moko ya ntina mingi, biso nyonso tosengeli kosakola mpe kopesa lapolo na biso ya mosala ya kosakola na nsuka ya sanza. (Talá Malako 6:30.) Basakoli oyo babandi kosakola sika, baoyo bazali kobima na mosala ya kosakola mpo na mbala ya liboso, esengeli kolendisa bango bápesa noki lapolo na bango ya mosala ya kosakola. Soki tokokisi mokumba na biso, tokoki kopesa mabɔkɔ na lapolo ya mosala ya sanza ya Aprili mpe na lokito monene ya masanzoli oyo ekopesama na Yehova mpo na milende na biso.
12 Bengá bato na Ekaniseli: Ekozala esengo monene te na komona bato mingi koleka bayangani na Ekaniseli ya liwa ya Klisto na mobu 2000? Ezali bongo! Boye yango ekozala mbala ya liboso oyo bato mingi koleka bakosangana esika moko mpo na komonisa botɔndi na bango na bolingo eleki monene oyo Yehova Nzambe na Yesu Klisto bamonisaki mpo na biso! (Yoa. 3:16; 15:13) Zwá bibongiseli nyonso oyo ekoki mpo ete eloko moko te epekisa yo mpe libota na yo koyangana na Ekaniseli.
13 Tosengeli mpe kobanda uta sikoyo kobenga bato na Ekaniseli. Komá nkombo ya moto nyonso oyo olingi kobengisa. Ata bato oyo bayekolaki Biblia kala, baoyo bazali koyekola Biblia sikoyo, mpe bato nyonso oyo ozongelaka bango mpo na kosolola na bango na Biblia. Na kati ya bato yango, okoki mpe kobakisa baninga na yo ya mosala, ya eteyelo, mpe bato oyo bafandaka pene na yo, ata mpe moto nyonso oyo osalaka na ye mombongo. Kobosana te kobengisa bayebani na yo mosusu mpe bandeko na yo. Soki osilisi kokoma bankombo yango, bandá kokabola na molende lokasa ya libyangi epai ya moto mokomoko. Yebisá bango malamu ngonga mpe esika oyo Ekaniseli ekosalema. Soki tokomi pene ya mokolo ya 19 Aprili, kundwelá bato oyo okomaki bankombo na bango dati yango. Okoki kokende yo moko koyebisa bango to kobenga bango na telefone. Yebisá bango ete okosepela kozala na bango na mpokwa yango mpo na komema bango na Ekaniseli.
14 Na boyokani na malako oyo la Société apesaki, lisangani ya bankulutu bakosala makasi mpo na kolendisa bato nyonso oyo batika kosakola mpe bazali na teritware ya lisangá na bango ete báyangana na Ekaniseli. (Mat. 18:12-14) Bankulutu basengeli kotalela lisusu mokanda ya la Société ya 2 Febwali 1999. Mokomeli ya lisangá asengeli kokoma nkombo ya bato nyonso oyo batiká kosakola, mpe mokɛngɛli na mosala akokabolela bankulutu mokumba ya kokende kotala bango mpe kobengisa bango na Ekaniseli. Mbala mosusu soki bankulutu bakei nokinoki kotala bango, bato yango oyo batiká kosakola kala bakoki kozwa lisalisi mpo bázongela kobima na mosala ya kosakola, ata na boumeli ya sanza ya Aprili. Soki babimi na mosala ya kosakola elongo na basakoli mosusu oyo bakɔmeli, bakolendisama.
15 Bólendisa bato mosusu bámipesa na mosala ya kosakola na sanza ya Aprili! Ekozala malamu soki bankulutu nyonso, basaleli na misala nyonso mpe batata ya mabota nyonso bazwi bibongiseli malamu mpo na kosala ete sanza ya Aprili 2000, ezala sanza moko ya ntina mingi. Bankulutu basengeli kosala makasi mpo na kobongisa makambo nyonso malamu mpe kopesa ndakisa. (Ebe. 13:7) Esengeli kozwa bibongiseli malamu mpo na makita ya mosala ya kosakola mikolo nyonso mpe na bawikende. Bakoki kozwa bibongiseli mosusu mpo ete likita ya mosala ya kosakola esalemaka na nsima ya midi mpe na mpokwa. Programɛ mobimba ya lisangá mpo na makambo nyonso oyo ekosalema na sanza ya Aprili esengeli kotyama na etanda na esika batyaka mayebisi. Esengeli kopona ndeko moko mpo na kotambwisa likita nyonso ya mosala ya kosakola. Esengeli kobongisa bateritware mingi mpo ete etuluku nyonso ezala na teritware mpo na kosakola.
16 Na boumeli ya sanza ya Aprili tokolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Tokolakisa mwa buku Azali kosɛnga epai ya bato oyo bakosepela, na mokano ya kobanda koyekola na bango Biblia. Yango wana, esengeli kosɛnga bazulunalo mingi mpe mwa babuku mingi.
17 Na nsuka ya sanza, bandeko nyonso oyo batambwisaka boyekoli ya mokanda mpe basungi na bango, basengeli kolendisa moto nyonso oyo azali na etuluku na bango ya boyekoli ya mokanda ete apesa lapolo na ye mbala moko ntango sanza esili. Mbala mosusu bakoki kosala yango na mokolo ya lomingo mwa 30 Aprili. Na nsima, ntango mokomeli ya lisangá akosangisa balapolo nyonso, soki amoni ete basakoli mosusu bapesi naino lapolo na bango te, akoki na boboto nyonso koyebisa bango básala yango liboso ya mokolo ya 6 Mai, liboso ete atinda lapolo ya lisangá na Biro. Akoki kosɛnga na bandeko oyo batambwisaka boyekoli ya mokanda ete básalisa ye mpo na kozwa lapolo ya mosakoli mokomoko.
18 Sanza ya Ekaniseli ezali eleko moko ya ntina mingi na kati ya mbula mpo na libota ya Nzambe. Esengeli kozala sanza oyo biso nyonso tokosala mingi na mosala ya Yehova. Ekozala bongo soki mosakoli nyonso ya nsango malamu asali oyo ekoki na ye, soki baoyo bazali na makoki ya kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi basali yango, mpe soki tosali molende mpo na kobenga bato mosusu na Ekaniseli ya liwa ya Klisto. Tiká tóbondela makasi mpo na kozwa mapamboli ya Yehova wana tozali kosala ete sanza ya Aprili 2000, ezala mpenza sanza moko ya ntina mingi, mpo na lokumu mpe nkembo ya Nzambe!—Ebe. 13:15.
[Etanda na lokasa 3]
Babongisi-nzela basungi
Motángo oyo eleki monene:
Congo-Kinshasa: 8 260 (Yuni 1997)
Congo-Brazzaville: 472 (1995)
[Etanda na lokasa 4]
Motángo mobimba ya basakoli
Motángo oyo eleki monene:
Congo-Kinshasa: 114 071 (Sɛtɛmbɛ 1999)
Congo-Brazzaville: 4 001
(Ɔkɔtɔbɛ 1998)
[Etanda na lokasa 5]
Bayangani na Ekaniseli
Motángo oyo eleki monene:
Congo-Kinshasa: 574 736 (1997)
Congo-Brazzaville: 20 144 (1997)