Basi baklisto ya sembo—Basambeli oyo bazali na motuya na miso ya Nzambe
“Bonzenga ekozimbisa mpe kitoko ezali mpamba, nde mwasi oyo akotosa [Yehova], ye akosanzolama.”—MASESE 31:30.
1. Wapi bokeseni oyo ezali na kati ya ndenge oyo Yehova atalelaka kitoko ná ndenge oyo bato ya mokili batalelaka yango?
BATO ya mokili bapesaka motuya mingi na kitoko ya nzoto, mingimingi kitoko ya basi. Nzokande, Yehova atalaka libosoliboso bomoto ya kati, oyo ekoki kokóma kitoko lisusu ntango moto azali kokola. (Masese 16:31) Yango wana, Biblia epesi basi toli oyo: “Monzɛlɛ na bino ezala oyo ya libándá te na kokanga nsuki mpe na kolata biloko kitoko ya wolo to kolata bilamba ya likoló, kasi ezala nde bomoto ebombaná ya motema na kati ya molato oyo epɔlaka te ya elimo ya kimya mpe ya boboto, oyo ezali na motuya monene na miso ya Nzambe.”—1 Petelo 3:3, 4.
2, 3. Ndenge nini basi bapesaki mabɔkɔ na mosala ya kopalanganisa nsango malamu na ekeke ya liboso, mpe ndenge nini Biblia esakolaki likambo yango?
2 Basi mingi oyo Biblia elobeli bamonisaki elimo yango ya malamu. Na ekeke ya liboso, bamosusu bazwaki libaku malamu ya kosalela Yesu ná bantoma na ye. (Luka 8:1-3) Na nsima, basi baklisto bakómaki bapalanganisi ya molende ya nsango malamu; bamosusu basungaki mpenza mibali baklisto oyo bazalaki kotambwisa lisangá, lokola ntoma Paulo; mpe bamosusu bamonisaki ezaleli ya koyamba bapaya, kutu bandimaki ete makita ya lisangá esalemaka na bandako na bango.
3 Biblia esakolá banda kala ete Yehova akosalela mpe basi mingi mpo na kokokisa mokano na ye. Na ndakisa, Yoele 2:28, 29 esakolaki ete mibali mpe basi, bilenge mpe mikóló, bakozwa elimo santu mpe bakosakola nsango malamu ya Bokonzi. Esakweli yango ebandaki kokokisama na Pantekote ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.). (Misala 2:1-4, 16-18) Basi mosusu oyo bazalaki bapakolami bazwaki makabo ya elimo, lokola likabo ya kosakola makambo ekoya. (Misala 21:8, 9) Na molende na bango, ebele ya bandeko-basi wana ya sembo bapesaki mabɔkɔ mpo na kopalanganisa lingomba ya boklisto nokinoki na ekeke ya liboso. Kutu, soki na mobu 60 T.B., ntoma Paulo akomaki ete nsango malamu “esakolamaki na kati ya bozalisi nyonso oyo ezali na nse ya likoló.”—Bakolose 1:23.
Bazwaki longonya mpo na mpiko, molende, mpe elimo ya koyamba bapaya
4. Mpo na nini ebongaki mpenza ete Paulo apesa basi mingi ya lisangá ya ekeke ya liboso longonya?
4 Na ndakisa, ntoma Paulo azalaki kosepela na mosala oyo basi mosusu basalaki, kaka ndenge bakɛngɛli baklisto basepelaka na mosala ya basi ya molende lelo oyo. Na kati ya basi oyo Paulo atángaki, ezali na “Tilifene mpe Tilifoze, basi oyo bazali kosala mosala makasi na kati ya Nkolo,” mpe “Pelesisi molingami na biso, mpo asalaki misala ya makasi mingi na kati ya Nkolo.” (Baloma 16:12) Ntoma Paulo akomaki ete Evodi ná Sɛntisi “babomaki nzoto elongo na [ye] na kati ya nsango malamu.” (Bafilipi 4:2, 3) Pilisika ná mobali na ye Akila basalaki mpe elongo na Paulo. Ye ná Akila “batyaki bomoi na bango na likama” mpo na Paulo; yango wana akomaki ete: “Kaka ngai moko te kasi mpe masangá nyonso ya bikólo mosusu tozali kopesa bango matɔndi.”—Baloma 16:3, 4; Misala 18:2.
5, 6. Na makambo nini Pilisila atikaki ndakisa mpo na bandeko-basi ya lelo oyo?
5 Molende mpe mpiko ya Pilisila eutaki wapi? Lisolo ya Misala 18:24-26 ezali kopesa biso mwa likanisi; kuna tozali kotánga ete apesaki mobali na ye mabɔkɔ mpo na kosalisa Apolosi, molobi moko malamu, ayeba solo malamumalamu. Emonani mpenza ete Pilisila azalaki moyekoli ya solosolo ya Liloba ya Nzambe mpe ya mateya ya bantoma. Yango wana, alonaki bizaleli malamu mpenza oyo esepelisaki Nzambe mpe mobali na ye mpe esalaki ete azala na ntina mingi na lisangá ya ekeke ya liboso. Lelo oyo mpe, basi baklisto ya molende oyo bazali koyekola mpenza Biblia mpe bazali kolya bilei ya elimo oyo Yehova azali kopesa na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele” bazali na ntina mingi.—Luka 12:42.
6 Akila ná Pilisila bayebaki mpenza koyamba bapaya. Paulo afandaki na ndako na bango ntango azalaki kosala na bango mosala ya kotonga bahema na Kolinti. (Misala 18:1-3) Ntango mwasi yango ná mobali na ye bakómaki kofanda na Efese mpe na nsima na Loma, bazalaki kaka koyamba bapaya, kutu bandimaki ete makita ya lisangá esalemaka na ndako na bango. (Misala 18:18, 19; 1 Bakolinti 16:8, 19) Nimifa ná Malia mama ya Yoane Malako bandimaki mpe ete makita esalemaka na bandako na bango.—Misala 12:12; Bakolose 4:15.
Bazali na motuya mingi lelo oyo
7, 8. Mosala nini ya bosantu ebele ya basi baklisto bazali kosala, mpe elikya nini bakoki kozala na yango?
7 Lokola na ekeke ya liboso, basi baklisto ya sembo lelo oyo bazali kosala mingi mpo na kokokisama ya mokano ya Nzambe, mingimingi na mosala ya kopalanganisa nsango malamu. Basi yango basali mpenza mosala monene! Tózwa ndakisa ya Gwen, oyo asalelaki Yehova na bosembo mbula koleka 60 tii liwa na ye na 2002. Mobali na ye alobaki boye: “Gwen ayebanaki na engumba na biso mobimba ete azalaki na molende na mosala ya kopalanganisa nsango malamu. Mpo na ye, Yehova akoki kolinga moto nyonso mpe kokokisela ye bilaka na ye. Bosembo na ye epai ya Nzambe, na ebongiseli na ye, mpe na libota na biso—ata mpe bilendiseli na ye ntango tozalaki kolɛmba nzoto—esalisaki ngai ná bana na biso mingi na boumeli ya bomoi ya esengo oyo tolekisaki elongo. Tokobosana ye ata mokolo moko te.” Gwen ná mobali na ye bafandaki libala mbula 61.
8 Bankóto na bankóto ya basi baklisto, ezala minzemba to oyo babalá, bazali babongisi-nzela mpe bamisionɛrɛ, baboyi kozala na bomoi ya mindɔndɔ mpe bamipesi na mosala ya kopalanganisa nsango ya Bokonzi, ezala na bingumba minene to na bamboka ya mikemike. (Misala 1:8) Mingi babosani likanisi ya kozala na ndako na bango moko to kobota bana mpo na komipesa mobimba na mosala ya Yehova. Bamosusu basungaka mibali na bango oyo bazali bakɛngɛli-batamboli, mpe bamosusu basalaka na Babetele ya mokili mobimba. Na ntembe te, basi yango oyo bazali na elimo ya komipimela bazali na kati ya “biloko kitoko ya mabota nyonso” oyo ezali kotondisa ndako ya Yehova na nkembo.—Hagai 2:7, NW.
9, 10. Ndenge nini bato mosusu na kati ya libota bamonisaki ete basepelaka na ndakisa malamu ya basi mpe bamama baklisto?
9 Ezali solo ete basi baklisto mingi bazali na mikumba ya mabota, kasi bazali kotya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso. (Matai 6:33) Ndeko-mwasi moko monzemba oyo azali mobongisi-nzela akomaki boye: “Kondima makasi mpe ndakisa malamu ya mama na ngai esalisaki ngai mingi mpo nakóma mobongisi-nzela. Kutu, ye nde mobongisi-nzela oyo nazalaki kobima na ye mingi.” Mobali moko alobaki mpo na mwasi na ye oyo akolisá bana mitano ya basi ete: “Ndako na biso ezalaki ntango nyonso pɛto mpe na molɔngɔ. Bonnie azalaki kolinga te tózala na ebele ya biloko ya ndako mpo libota mobimba tótyaka makanisi na makambo ya elimo. Lokola ayebaki kosalela mbongo malamu, yango epesaki ngai nzela nasalaka kaka mosala ya ndambo ya mokolo na boumeli ya mbula 32, mpe na ndenge yango nazalaki kolekisa ntango mingi na libota mpe na makambo ya elimo. Mwasi na ngai azalaki mpe komonisa bana ntina ya mosala. Nasengeli mpenza kokumisa ye.” Lelo oyo, mobali yango ná mwasi na ye basalaka na biro monene ya Batatoli ya Yehova.
10 Mobali moko akomaki na ntina na mwasi na ye, oyo akolisá bana, ete: “Nasepelaka na Susan mingi mpo alingaka Nzambe mpe alingaka bato; ayebi mpe komitya na esika ya basusu, azalaka na motema mawa mpe na bosembo. Azalaki ntango nyonso koloba ete ebongi kopesa Yehova oyo eleki malamu mpe ye moko azalaki kosala yango na mosala ya Nzambe mpe na mokumba na ye ya mama.” Na lisalisi ya mwasi na ye, mobali yango andimaki ebele ya mikumba ya elimo, lokola nkulutu na lisangá, mobongisi-nzela, kosala ntango mosusu na esika ya mokɛngɛli ya zongazonga, mpe azalaki na Komite ya boyokani elongo na minganga. Basi ya ndenge wana bazali mpenza na motuya mingi na miso ya mibali na bango, na miso ya baklisto mosusu, mpe oyo eleki, na miso ya Yehova!—Masese 31:28, 30.
Basi oyo bazali na mibali te kasi bazali na motuya
11. (a) Ndenge nini Yehova amonisaki ete amibanzabanzaka mpo na basi ya sembo, mingimingi basi oyo bakufelá mibali? (b) Basi oyo bakufelá mibali mpe bandeko basi ya sembo oyo bazali na mibali te basengeli koyeba likambo nini?
11 Yehova azalaki mbala na mbala komonisa ete amibanzabanzaka mpo na basi oyo bakufelá mibali. (Deteronome 27:19; Nzembo 68:5; Yisaya 10:1, 2) Likanisi na ye ebongwani te. Ata na moi ya lelo amibanzabanzaka mingi mpo na basi oyo bakufelá mibali, mpo na bamama oyo bazali kobɔkɔla bana bango moko mpe mpo na minzemba oyo baponi kotikala bongo to mpe mpo bazwi te baklisto oyo babongi kobala bango. (Malaki 3:6; Yakobo 1:27) Soki ozali moko ya bato oyo bazali kosalela Yehova na bosembo atako ozali na molongani oyo azali moklisto te, yebá ete ozali na motuya na miso ya Nzambe.
12. (a) Ndenge nini ebele ya bandeko-basi baklisto bamonisaka ete bazali sembo epai ya Yehova? (b) Bandeko na biso mosusu ya basi bazali kobunda na likambo nini?
12 Na ndakisa, tótalela bandeko na biso ya basi oyo bazali na mabala te mpo bazali kotosa etinda ya Yehova ya kobala “na kati ya Nkolo kaka.” (1 Bakolinti 7:39; Masese 3:1) Liloba ya Nzambe elobi na bango boye: “Epai na ye oyo azali sembo [Yehova] akomimonisa sembo.” (2 Samwele 22:26, NW) Kasi, mpo na mingi kati na bango, kotikala monzemba ezali etumba. Ndeko-mwasi moko alobaki boye: “Nazwaki ekateli ya kobala kaka na kati ya Nkolo, kasi nazalaki kolela mingi ntango nazalaki komona baninga na ngai bazali kobala baklisto ya malamu, kasi ngai nazali kotikala kaka monzemba.” Ndeko-mwasi mosusu alobaki boye: “Nakokisi mbula 25 na mosala ya Yehova. Nazali na ekateli ya kotikala sembo epai na ye, kasi mbala mingi nayokaka mawa ndenge nazali na mobali te.” Mpe abakisaki ete: “Bandeko-basi lokola ngai bazalaka mpenza na mposa ya kolendisama.” Ndenge nini tokoki kosalisa bandeko wana ya sembo?
13. (a) Ndakisa ya bato oyo bazalaki kokende kotala mwana-mwasi ya Yefeta ezali koteya biso nini? (b) Wapi ndenge mosusu tokoki komonisa ete tozali komibanzabanza mpo na bandeko-basi ya lisangá na biso oyo bazali minzemba?
13 Ndakisa moko ya kala ezali komonisa ndenge moko oyo tokoki kosala yango. Ntango mwana-mwasi ya Yefeta andimaki kotikala monzemba bomoi na ye mobimba, bato mosusu bamonaki ete andimi komipimela likambo moko monene. Basalaki nini mpo na kolendisa ye? “Bana basi ya Yisalaele bakendaki mbula na mbula [kopesa longonya, “NW”] na mwana mwasi ya Yefeta Mogilada mikolo minei na kati ya mbula.” (Basambisi 11:30-40) Ndenge moko mpe, tosengeli kopesa longonya na bandeko-basi oyo bazali minzemba mpo bazali kotosa mobeko ya Nzambe na bosembo.a Wapi ndenge mosusu oyo tokoki komonisa ete tozali komibanzabanza mpo na bango? Na mabondeli na biso tosengeli kosɛngaka Yehova asunga bandeko basi yango ya bolingo oyo bazali kokoba kosalela ye na bosembo. Ebongi bámonaka mpenza ete Yehova mpe lisangá mobimba balingaka mpe basepelaka na bango.—Nzembo 37:28.
Ndenge oyo baboti oyo bazali kobɔkɔla bana bango moko bazali kolonga
14, 15. (a) Mpo na nini basi baklisto oyo babɔkɔlaka bana bango moko basengeli kosɛngaka Yehova lisalisi? (b) Ndenge nini bamama yango bakoki kosala makambo oyo eyokani na mabondeli na bango?
14 Basi baklisto oyo bazali kobɔkɔla bana bango moko bakutanaka na mikakatano ebele. Kasi, bakoki kosɛnga Yehova asalisa bango na kolanda mitinda ya Biblia mpo na kobɔkɔla bana na bango. Soki obɔkɔlaka bana na yo yo moko, okoki te kozala mbala moko mama mpe tata na bango na makambo nyonso. Kasi, Yehova akosalisa yo okokisa mikumba na yo soki ozali kobelela ye na kondima. Tózwa ndakisa: Kanisá ete omemi mokumba moko ya kilo mpe ozali kokende mosika. Okolinga konyokola nzoto na komema yango na motó soki moninga moko azali na motuka mpe alobi amema yo? Te! Ndenge moko mpe, koluka te komema mitungisi yo moko na ntango okoki kosɛnga Yehova lisalisi. Kutu, azali kosɛnga yo obelela ye. Nzembo 68:19 (NW) elobi ete: “Yehova apambolama, ye oyo amemelaka biso mikumba mokolo na mokolo.” Ndenge moko mpe, 1 Petelo 5:7 ezali kolendisa yo obwaka mitungisi na yo epai ya Yehova, “mpamba te ye atyelaka [yo] likebi.” Na yango, soki ozali na mikakatano mpe na mitungisi, kitisá mokumba na yo epai ya Tata na yo ya likoló, mpe saláká yango “ntango nyonso.”—1 Batesaloniki 5:17; Nzembo 18:6; 55:22.
15 Na ndakisa, soki ozali mama ya bana, na ntembe te omitungisaka ete bana na yo bakoki kolanda makambo mabe ya baninga na bango na kelasi to ete bosembo na bango ekomekama. (1 Bakolinti 15:33) Komitungisa mpo na makambo ya ndenge wana ezali mabe te. Kasi, esengeli mpe kobondela mpo na yango. Kutu, ezali malamu kobondela mpo na makambo ya ndenge wana elongo na bana liboso bákende kelasi, mbala mosusu nsima ya kotánga mokapo ya mokolo. Mabondeli ya sikisiki oyo euti mpenza na motema ekoki kosimba mitema ya bana. Oyo eleki nyonso, okozwa mapamboli ya Yehova soki ozali kosala makasi mpo na koteya bana na yo Liloba ya Nzambe. (Deteronome 6:6, 7; Masese 22:6) Kobosana te ete “miso ya Yehova ezali likoló ya bayengebene, mpe matoi na ye ezali epai ya lilɔmbɔ na bango.”—1 Petelo 3:12; Bafilipi 4:6, 7.
16, 17. (a) Mwana moko alobaki nini mpo na bolingo oyo mama na ye amonisaki? (b) Lokola mama yango azalaki kosepela na makambo ya elimo, yango esalaki nini epai ya bana na ye?
16 Tótalela ndakisa ya Olivia, mama ya bana motoba. Mobali na ye oyo azali mondimi te asundolaki ye ná bana ntango kaka abotaki mwana ya nsuka, kasi Olivia azwaki mokumba ya kolakisa bana na ye banzela ya Nzambe. Darren, mwana na ye ya mobali oyo azali sikoyo na mbula 31 mpe azali nkulutu mpe mobongisi-nzela, azalaki na mbula mitano na ntango wana. Mitungisi ya Olivia ebakisamaki ntango Darren akómaki na maladi moko ya makasi, oyo etungisaka ye tii lelo oyo. Darren akomaki boye: “Nabosanaka te ndenge nazalaki kofanda na mbeto ya lopitalo mpo na kozela Mama. Mokolo na mokolo, soki ayei, azalaki kofanda penepene na ngai mpe azalaki kotángela ngai Biblia. Na nsima azalaki koyembela ngai nzembo ya Bokonzi ‘Totɔndi yo, Yehova.’b Tii lelo oyo, yango ezali nzembo ya Bokonzi oyo nalingaka mingi.”
17 Lokola Olivia atyelaki Yehova motema mpe alingaki ye mingi, alongaki kobɔkɔla bana na ye ye moko. (Masese 3:5, 6) Lokola azalaki na makanisi malamu, azalaki kolendisa bana na ye bámityela mikano ya malamu. Darren alobi ete: “Mama azalaki ntango nyonso kolendisa biso tósala mosala ya ntango nyonso. Yango wana, na kati ya bana motoba, mitano (ngai na bandeko na ngai ya basi minei), toponaki mosala ya ntango nyonso. Kasi, ata mokolo moko te Mama amikumisaki mpo na yango na miso ya bato. Nasalaka makasi mpo na kolanda bizaleli malamu na ye.” Ya solo, bana nyonso te nde basalelaka Yehova ntango bakoli, lokola bana ya Olivia. Kasi, soki mama azali kosala makasi mpo na kolanda mitinda ya Biblia, akoki kolikya ete Yehova akotambwisa mpe akosunga ye.—Nzembo 32:8.
18. Ndenge nini tokoki komonisa ete tosepelaka na lisangá ya boklisto, oyo ezali ebongiseli ya Yehova?
18 Nzambe asungaka mingimingi na nzela ya lisangá, epai bilei ya elimo ebongisamaka pɔsɔ na pɔsɔ, na nzela ya bandeko baklisto, mpe na nzela ya bandeko oyo bakɔmeli na elimo oyo bazali “makabo oyo ezali bato.” (Baefese 4:8) Bankulutu ya sembo basalaka mosala makasi mpo na kolendisa bato nyonso na kati ya lisangá, mpe batyaka likebi mingi epai ya “bitike ná basi bakufelá mibali na kati ya bolɔzi na bango.” (Yakobo 1:27) Yango wana, kangamá na libota ya Nzambe, komikabola na yango te.—Masese 18:1; Baloma 14:7.
Botosi ezali ezaleli malamu
19. Mpo na nini botosi ya mwasi elingi koloba te ete azali na nse, mpe ndakisa nini ya Biblia ezali kondimisa likambo yango?
19 Yehova akelaki mwasi mpo azala mosungi ya mobali. (Genese 2:18) Na bongo, soki basɛngi na mwasi atosa mobali, yango elingi koloba te ete mwasi azali na nse. Botosi epesaka nde mwasi lokumu, epesaka ye likoki ya kosalela ebele ya makabo mpe makoki na ye na boyokani na mokano ya Nzambe. Masese mokapo 31 etángi ebele ya misala oyo mwasi ya makoki azalaki kosala na Yisalaele ya kala. Azalaki kosalisa babola, kolona bilanga ya vinyo, mpe kosomba mabelé. ‘Motema ya mobali na ye ezalaki kondima ye libela mpe azalaki kozanga biloko lisusu te.’—Vɛrsɛ 11, 16, 20.
20. (a) Ndenge nini mwasi moklisto asengeli kotalela makoki oyo Nzambe apesi ye? (b) Bizaleli malamu nini Esetele amonisaki, mpe mpo na yango, ndenge nini Yehova asalelaki ye?
20 Mwasi oyo azali na komikitisa mpe abangaka Nzambe, amitombolaka te to mpe awelaka bokonzi na mobali na ye te. (Masese 16:18) Mpo na kozala na esengo, atyaka mikano ya mokili na esika ya liboso te, kasi asalelaka makoki oyo Nzambe apesi ye mingimingi mpo na kosalela basusu—libota na ye, baninga na ye baklisto, bazalani na ye, mpe oyo eleki nyonso, Yehova. (Bagalatia 6:10; Tito 2:3-5) Tótalela ndakisa ya Esetele, oyo azalaki mwasi ya mokonzi. Atako azalaki kitoko mingi, azalaki komitombola te mpe azalaki na botosi. (Esetele 2:13, 15) Ntango Mokonzi Asierise abalaki ye, azalaki komemya ye mingi; nzokande Vaseti, mwasi ya liboso ya mokonzi azalaki na limemya te. (Esetele 1:10-12; 2:16, 17) Lisusu, Esetele azalaki koyokela Moledekai, ndeko na ye ya mokóló, na makambo oyo ebongi, ata ntango akómaki mwasi ya mokonzi. Azalaki kokanga miso na mabe te! Na mpiko nyonso, afundaki Hamana, moto monene mpe ya motema mabe oyo azalaki na mokano mabe ya kobomisa Bayuda nyonso. Yehova asalelaki Esetele na ndenge ya kokamwa mpo na kobikisa bato na ye.—Esetele 3:8–4:17; 7:1-10; 9:13.
21. Ndenge nini mwasi moklisto akoki kokóma na motuya mingi na miso ya Yehova?
21 Tomoni mpenza ete ezala na ntango ya kala to na moi ya lelo, basi ya sembo bamipesi mobimba na Yehova mpe na losambo na ye. Na yango, basi oyo babangaka Nzambe bazali na motuya mingi na miso ya Yehova. Bandeko-basi baklisto, bótika ete Yehova, na nzela ya elimo na ye, abongisa bino mokemoke mpo bókóma “mbɛki” ya motuya, oyo “ebongisami mpo na mosala nyonso ya malamu.” (2 Timote 2:21; Baloma 12:2) Mpo na basambeli wana ya motuya mingi, Liloba ya Nzambe elobi ete: “Pesá ye mbuma ya mabɔkɔ na ye; mpe ete misala na ye mpenza esanzola ye na bikuke.” (Masese 31:31, NW) Tiká ete ezala bongo mpo na mokomoko na bino.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ndenge ya kopesa longonya motindo wana elobelami na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Marsi 2002, nkasa 26-28.
b Nzembo 212 na mokanda Nzembo mpo na kokumisa Yehova, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
Ozali koyeba lisusu?
• Ndenge nini basi baklisto mosusu ya ekeke ya liboso bakómaki na motuya na miso ya Yehova?
• Na ntango na biso, bandeko-basi mingi basalaki nini mpo bázala na motuya na miso ya Nzambe?
• Ndenge nini Yehova asalisaka basi oyo babɔkɔlaka bana bango moko mpe bandeko-basi oyo bazali na mibali te?
• Ndenge nini mwasi akoki komonisa ete andimaka ete mobali na ye azali mokonzi na ye?
[Etanda na lokasa 17]
BANDAKISA OYO OKOKI KOMANYOLA LIKOLÓ NA YANGO
Okosepela kotalela mwa bandakisa mosusu ya basi ya sembo oyo Biblia elobeli? Boye, tángá bavɛrsɛ oyo epesami awa na nse. Ntango ozali komanyola na ndakisa ya moto mokomoko oyo batángi, luká koyeba mitinda oyo okoki kosalela mingi lisusu na bomoi na yo.—Baloma 15:4.
◆ Sala: Genese 12:1, 5; 13:18a; 21:9-12; 1 Petelo 3:5, 6.
◆ Basi ya Yisalaele oyo bazalaki kokaba: Exode 35:5, 22, 25, 26; 36:3-7; Luka 21:1-4.
◆ Debola: Basambisi 4:1–5:31.
◆ Luta: Luta 1:4, 5, 16, 17; 2:2, 3, 11-13; 4:15.
◆ Mwasi ya Suneme: 2 Mikonzi 4:8-37.
◆ Mwasi Mofenisia: Matai 15:22-28.
◆ Malata ná Malia: Malako 14:3-9; Luka 10:38-42; Yoane 11:17-29; 12:1-8.
◆ Tabita: Misala 9:36-41.
◆ Bana basi minei ya Filipo: Misala 21:9.
◆ Foebe: Baloma 16:1, 2.
[Elilingi na lokasa 15]
Opesaka longonya na bandeko-basi oyo babalá te mpe bazali kotosa mobeko ya Nzambe na bosembo?
[Elilingi na lokasa 16]
Makambo nini okoki kosɛnga na libondeli liboso bana bákende kelasi?