Nsango ya Teokrasi
Angola: Na Desɛ́mbɛ, motángo ya sika ya basakoli ezalaki bongo 35 034.
Bangladesh: Liyangani ya etúká “Kondima kati na Liloba ya Nzambe” oyo esalemaki na Dacca eyanganisaki bato 142, mpe baoyo bazwaki batisimo bazalaki bato 14. Yango emonisi koleka mbala mibale motángo ya bato oyo basilá kozwa batisimo na mbala moko na Bangladesh.
Bénin: Motángo ya bato bayanganaki na mayangani ya etúká “Kondima kati na Liloba ya Nzambe” ezalaki bongo 15 633, mpe bato 403 bazwaki batisimo. Lapolo ya Desɛ́mbɛ emonisi motángo oyo emonanaki naino te, basakoli 5 351.
Liberia: Na Desɛ́mbɛ, liyangani moko kitoko esalemaki na Monrovia, bato 5 158 bayanganaki. Bobele na sanza wana basakoli 2 127 bapesaki lapolo, yango emonisi motángo moko monene.
Madagascar: Bokoli ya 11 % ya motángo ya basakoli mozwamaki na Desɛ́mbɛ soki tokokanisi yango na mbula eleki, bato 9 226 basanganaki na mosala ya kosakola.
Saint-Martin: Motángo monene mpenza ya basakoli 265 na Desɛ́mbɛ, elingi koloba bokoli ya 10 % soki tokokanisi yango na mwayene ya mbula eleki. Batambwisaki boyekoli ya Biblia 310 na bandako.