Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 6/98 lok. 2
  • Makita ya mosala mpo na Yúni

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makita ya mosala mpo na Yúni
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 1 Yúni
  • Pɔsɔ ebandi na 8 Yúni
  • Pɔsɔ ebandi na 15 Yúni
  • Pɔsɔ ebandi na 22 Yúni
  • Pɔsɔ ebandi na 29 Yúni
Mosala na biso ya Bokonzi—1998
km 6/98 lok. 2

Makita ya mosala mpo na Yúni

Pɔsɔ ebandi na 1 Yúni

Loyembo 10

Min. 8: Mayebisi. Mayebisi matali Mosala na biso ya Bokonzi. Nsango ya Teokrasi.

Min. 15: “Elimo ya Yehova ezali elongo na biso.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Na botaleli ya par. 3, tángá mwa makambo mabongi kati na Annuaire 1998.

Min. 22: “Tópona masolo na kotaleláká bamposa ya bato.” Lobelá na mokuse makanisi ya ntina ya lisolo. Limbolá ete na lolenge oyo, tokoki mpe kokabola bazulunalo ya kala oyo ezali naino malamu. Byangá basakoli ete bálobela masolo oyo balakisaki mpe bazwaki na yango matomba. Salá elakiseli moko na lisalisi ya makambo malakisami na par. 7.

Loyembo 212 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 8 Yúni

Loyembo 197

Min. 5: Mayebisi. Lapolo ya kɔnti.

Min. 15: Biyano na mituna na bino. Ekosalema na mituna mpe biyano. Nkulutu akolobela na mokuse makanisi ya buku Lisanga, lok. 131 par. 3 mpe lok. 132 par. 1. Salelá makanisi yango na lolenge makambo mazali koleka na lisangá na bino.

Min. 25: “‘Nzela ya Nzambe ezali nzela ya bomoi’​—Liyangani ya etúká to ya mikili mingi mpo na mobu 1998.” (par. 1-17) Ekosalema na mituna mpe biyano. Tángá par. 11, 12. Lobelá mingi ntina oyo Makomami ezali kosɛnga biso ete molato na biso mpe etamboli na biso ya boklisto ezala na bopɔlɔ mpe ntina ya kobatela malamu bana na biso.

Loyembo 48 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 15 Yúni

Loyembo 141

Min. 8: Mayebisi. Yebisá bibongiseli ya sipesiale bikamatami mpo na mosala ya kosakola na mwa 30 Yúni.

Min. 15: “Tozali nde na ‘monzube kati na nzoto’?” Ekosalema na mituna mpe biyano. Lobelá eteni oyo “Mituna ya batángi” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Novɛ́mbɛ 1987, lok. 29 (ebimeli ya Lifalanse).

Min. 22: “‘Nzela ya Nzambe ezali nzela ya bomoi’​—Liyangani ya etúká to ya mikili mingi mpo na mobu 1998.” (par. 18-22) Ekosalema na mituna mpe biyano. Tángá par. 18 mpe vɛrsɛ oyo epesami. Monisá polele ntina ya koyeba kotya makambo na molɔngɔ mpe ya kozala na limemya mpo na bazalani, mingimingi na oyo etali bisika ya kofanda. Mpo na kosukisa, lobelá na mokuse eteni oyo elobi Makambo oyo bosengeli kobosana te.

Loyembo 139 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 22 Yúni

Loyembo 137

Min. 10: Mayebisi.

Min. 15: Bamposa ya lisangá.

Min. 20: Mpo na nini nasepelaka na makita ya lisangá. Nkulutu moko azali kosolola na etuluku moko ya bato oyo bayanganaka pɔsɔ na pɔsɔ na makita mpe bato yango bazali komonisa lisangá, kati na bango tokoki kokuta mbala mosusu mobali moko na mwasi na ye, mobange moko mpe elenge moko. Bazali koyebisa mpo na nini bayanganaka ntango nyonso na makita: baninga malamu, mateya ya Nzambe mpe batoli kitoko, yango nde esalisaka bango na kolonga mikakatano ya mokolo na mokolo mpe na kozala makasi na elimo. Makambo oyo bazali koloba ezali komonisa lolenge nini mokomoko kati na biso azwaka mapamboli na koyanganáká ntango nyonso na makita.

Loyembo 222 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 29 Yúni

Lisangá ekobongisa manaka na yango moko na kotalela bamposa na yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto