Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 1/12 nk. 9-12
  • Babomaki bato na eteyelo Libondisi oyo epesamaki na nsima

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Babomaki bato na eteyelo Libondisi oyo epesamaki na nsima
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bayaki noki
  • Bazalaka kaka na nsɔmɔ ya likambo yango
  • Ndenge basalisaki basusu báyika mpiko
  • Mosika te bampasi ekozala lisusu te
  • Bóbɔndisa bato oyo bazali na mpasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Koboma bato na masasi na mokili mobimba—Biblia elobi nini?
    Makambo mosusu
  • Kobɛta bato masasi na biteyelo​—Biblia elobi nini mpo na makambo ya boye?
    Makambo mosusu
  • Libɔndisi liuti na “Nzambe na kobɔndisa nyonso”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 1/12 nk. 9-12

Babomaki bato na eteyelo Libɔndisi oyo epesamaki na nsima

LOKASA ya liboso ya zulunalo ezalaki nyonso moindo. Na lokasa yango bakomaki boye na monene: “Mpo na nini?” Yango ezali motuna oyo etunamaki mbala na mbala nsima ya ntango oyo elenge mobali moko ya mbula 17, abɛtabɛtaki masasi na engumba Winnenden, na sudi ya Allemagne, mpe abomaki bato 15 mpe na nsima amibɛtaki masasi. Na Allemagne mobimba bakitisaki badrapɔ nyonso, mpe nsango ya likambo wana ya nsɔmɔ epanzanaki mokili mobimba.

Winnenden, ezali engumba moko ya bozwi mpe kitoko, oyo ezali na banzete ya vinyo mpe ya vergers. Na mokolo ya 11 Marsi 2009, bana babandaki kotánga kaka ndenge bamesaná kotánga na eteyelo ya ntei na engumba ya Albertville. Na mbala moko, na ngonga ya 9:30 ya ntɔngɔ, mobulu ekɔtaki mpe makambo nyonso ebebaki.

Elenge mobali moko akɔtaki na nkanda nyonso na eteyelo oyo azalaki kotánga liboso, azalaki na mondoki oyo azwaki na shambre ya baboti na ye. Akɔtaki mbangu mpe abomaki bana-kelasi libwa mpe balakisi misato oyo bazalaki na bakelasi misato, mpe na kulware azokisaki bato mingi. Nsima ya mwa miniti, bapolisi bayaki. Elenge yango akimaki na lopitalo moko ya bato ya maladi ya motó oyo ezalaki pene wana. Kuna abomaki lisusu mosali moko. Na nsima, alakisaki sofɛlɛ moko mondoki mpe abɔtɔlaki ye motuka. Sofɛlɛ yango akimaki nsima ya ntaka ya kilomɛtrɛ 40. Na izini moko ya kosala mituka, elenge yango abomaki motɛki ná mosombi moko mpe azokisaki makasi bapolisi mibale oyo balukaki kokanga ye. Ntango bapolisi bakangaki ye, amibɛtaki masasi na motó.

Bato oyo bayebi elenge yango balobaki ete azalaki elenge moko oyo azalaki kolinga bato bálinga ye mpe azala na baninga. Kasi, ebandaki boni asala likambo ya ndenge wana? Ekoki kozala ete azalaki kotungisama na makanisi, mpe azalaki na momeseno ya kosakana na mindoki ya kopale mpe kotala masano mosusu ya mobulu oyo bato mingi babɛtaka na ordinatɛrɛ. Kasi, bato mosusu bakoki koloba ete bilenge mingi basalaka yango. Bongo bato oyo babomamaki? Aponaki bato oyo akoboma to abɛtaki masasi kaka bongo? Bato bazalaki komituna mpo na nini abomaki bilenge basi mwambe mpe elenge mobali kaka moko. Moto moko te akokaki kopesa ndimbola oyo ebongi.

Bayaki noki

Heike, moboti ya elenge moko alobaki boye: “Ntango mwana na biso abengaki mpe ayebisaki ngai ete babɛti masasi na eteyelo na bango, nandimaki te. Kasi, ntango nayokaki mituka ya bapolisi mpe baambilansi ezali koleka nokinoki, nabangaki makasi.” Ndenge oyo bapolisi bayaki noki epekisaki elenge mobali yango aboma bato ebele na eteyelo. Na nsima babimisaki bato nyonso na eteyelo, minganga, bapesi-toli, mpe basango ya basoda, bayaki mpe basalisaki bana-kelasi mingi mpenza, tii balɛmbaki mpenza.

Bapanzi-nsango batɔndaki na eteyelo, bazalaki koluka kosolola na bana-kelasi, oyo mingi bazalaki naino na nsɔmɔ ya likambo oyo eutaki kosalema. Mwana-kelasi moko alobaki ete amonaki mituka 28 ya bapanzi-nsango ya bashɛnɛ 26 ya batelevizyo ndenge na ndenge etɛlɛmi liboso ya eteyelo. Kowelana ezalaki makasi na kati ya bapanzi-nsango mpe yango esalaki ete bábanda kopanza bansango ya lokuta. Kutu, kaka mokolo wana, mopanzi-nsango moko akendaki na ndako ya baboti oyo mwana na bango ya mwasi autaki kobomama mpo na kosɛnga bafɔtɔ, mpe bamosusu bafutaki bana-kelasi mbongo mpo bákanga bango bafɔtɔ. Lokola kobendana ezalaki kati na bango, bapanzi-nsango mosusu bazalaki koluka kaka bázwa bansango ya solo liboso ya baninga mpe yango esalaki ete bázanga kutu limemya mpo na bato oyo bazwaki likama.

Ndenge kaka ezalaka mbala mingi, ntango likama esalemi, bato balukaki lingomba ebɔndisa bango mpe elimbola bango ntina ya likambo oyo esalemi. Na mokolo oyo elenge mobali wana abomaki bato, mangomba mingi esanganaki mpo na kosambela. Bato mingi basepelaki na likambo yango. Kasi, baoyo balukaka lisalisi ya Liloba ya Nzambe to baoyo balukaka biyano na mituna oyo etungisaka bango balɛmbaki nzoto. Libota moko ekendaki esika bazalaki kolela moninga ya kelasi ya mwana na bango. Mama alobi boye: “Episkɔpɔ moko alobelaki bampasi ya Yobo. Nazalaki kozela apesa liteya oyo tokoki kozwa na likambo yango, mpe abɔndisa biso ata moke, kasi esalemaki bongo te. Amonisaki ata ntina moko te oyo Yobo anyokwamaki mpe amonisaki te ndenge makambo esukaki.”

Mobali moko mpe alɛmbaki mpenza nzoto na maloba ezangá ntina oyo ayokaki. Mobali yango ayekolaki Biblia na Batatoli ya Yehova eleki mbula soki 30, mpe atikaki koyekola. Sikoyo azongelaki koyangana na makita.

Valisa, elenge mwasi moko ya mbula 14 oyo ayekolaka Biblia na Batatoli ya Yehova, azalaki na kelasi pene ya esika oyo babomaki bato. Ntango kaka ayokaki lokito ya masasi abandaki kobondela Yehova. Na nsima, ntango batunaki ye soki asalaki nini mpo na kolonga, alobaki ete makambo wana emonisaki mpenza bosolo ya makambo oyo ayekolaki na Biblia na ntina na mikolo ya nsuka mpe ya mpasi. (2 Timote 3:1-5) Batatoli mibale bazalaki kosakola mpo na kobɔndisa bato ya kartye na bango. Mwasi moko ya mobange ayaki epai na bango mpe alobaki boye: “Esengeli bato mingi básala likambo oyo bozali kosala.” Lokola bato mingi bazalaki na mawa mpe komitungisa, yango etindaki bamosusu bátya litoi mpo na koyoka elikya mpe makambo ya kobɔndisa oyo ezali na Liloba ya Nzambe.

Bazalaka kaka na nsɔmɔ ya likambo yango

Ya solo, ata soki babɔndisi moto ndenge nini ekoki te kosilisa mpasi nyonso ya moto oyo akutani na likama. Ata liloba moko te ekoki kokitisa mpasi ya moboti oyo abungisi mwana to ya polisi oyo akendaki mbangu na eteyelo mpe amonaki ete mwasi na ye mpe azalaki na kati ya bato oyo bakufaki.

Bana-kelasi oyo babikaki na likama wana, ná mabota na bango bazalaki na nsɔmɔ makasi, moto na moto na ndenge na ye. Vassilios, abimaki mbangu na mwa porte moko ntango elenge mobali yango abandi kobɛta masasi. Alobi boye: “Ntango nabimaki libándá, nabondelaki Yehova. Nakanisaki ete nazali kokufa. Namonaki ete yango ezali libondeli na ngai ya nsuka.” Na bapɔsɔ oyo elandaki, azalaki komona bililingi ya likambo yango ntango alali, mpe azalaki kolinga kosolola ata na moto te. Likambo oyo esilikisaki ye makasi ezalaki ndenge bapanzi-nsango bazalaki kowelana mpo na kopanza nsango ya likama yango mpe ndenge bazalaki komikɔtisa ata na makambo ya mikemike ya likambo yango. Na nsima, amonaki ete asengeli kobosana mpe kotalela yango lokola likambo mosusu nyonso.

Jonas, azalaki na kelasi moko ná Vassilios mpe amonaki ndenge babomaki baninga na ye mitano ya kelasi. Alobi boye: “Nsima ya likambo yango, nazalaki kokakatana te kobɛta lisolo yango, ezalaki lokola filme moko ya nsɔmɔ. Kasi sikoyo, ezalaka mpasi nalobela ndenge nazali komiyoka. Ezalaka na ntango mosusu oyo nalingaka te kobɛta lisolo yango, mpe ntango mosusu nasepelaka kobɛta lisolo yango mingi.” Ye mpe amonaka bililingi yango mingi soki alali mpe ekataka ye mpɔngi.

Nsima ya mwa mikolo, bazongiselaki bana-kelasi biloko na bango. Bato oyo basalisaka bato oyo bazali konyokwama na makanisi nsima ya likama balobaki ete soki bana-kelasi bazali kotala biloko yango ekoki kozongisa na makanisi na bango makambo wana ya nsɔmɔ oyo esalemaki. Na ebandeli, Jonas azalaki kolinga te kosimba jakɛti, sakosi mpe ekɔti oyo balataka ntango moto amati na tukutuku. Azalaki mpe kobanga ntango nyonso soki amoni moto moko oyo azali lokola elenge wana oyo abɛtaki bato masasi to oyo atye sakosi na mokɔngɔ lokola elenge wana. Soki baboti na ye bazali kotala filme moko oyo bazali kobɛta masasi, akómaka nkandankanda. Minganga bamekaki kosalisa bato bábosana makambo ya nsɔmɔ oyo bakutani na yango.

Jürgen, tata ya Jonas asalaka na lopitalo epai babomaki moto moko ya mosala. Alobaki ete baboti mingi mpe baninga ya mosala bazalaki komituna mituna lokola, mpo na nini? mpe elingaki kozala boni soki babɛtaki nde ngai masasi? Na ndakisa, mosali moko ya lopitalo yango oyo amonaki ndenge elenge yango azali kotambola, azalaki kobanga ete elenge yango abɛta ye mpe masasi mpe bamemaki ye epai ya minganga ya maladi ya motó.

Ndenge basalisaki basusu báyika mpiko

Nini esalisaki bato mosusu báyika mpiko na makambo ya nsɔmɔ lokola oyo? Jürgen alobi boye: “Atako ezalaka mpasi ntango mosusu, kasi ezalaka malamu kozala na basusu. Koyeba ete basusu bakoki kosalisa mpe ete ozali yo moko te, esalisaka mpenza.”

Mpo na komonisa ete basusu mpe bakoki kosalisa, Jonas alobi boye: “Bato mingi batindaka bakarte mpe mikanda. Bamosusu batyaka bavɛrsɛ ya Biblia oyo natángaka. Nasepelaka na yango mingi.” Likambo nini mosusu esalisaka ye? Alobi boye: “Soki nalamuki na butu mpe namoni ete nakokoka lisusu te, nabondelaka. Ntango mosusu nayokaka miziki to bakasɛti ya masolo ya Lamuká!”a Abakisi ete Biblia emonisi biso ntina oyo makambo nyonso wana esalemaki: Satana azali koyangela mokili, mpe tozali na mikolo ya nsuka. Tata na ye alobi ete koyeba makambo nyonso wana esalisaka bango báyika mpiko.

Mosika te bampasi ekozala lisusu te

Nsima ya mwa mikolo, babuji, bafololo, mpe mikanda etondaki liboso ya eteyelo yango. Kerstin amonaki ete bato mingi bakomaki mikanda mpe bazalaki komituna mpo na nini likambo ya ndenge wana esalemi mpe mpo na nini Nzambe atikaki ete esalema. Amonaki ete esengeli kopesa biyano na mituna yango, ye ná Batatoli mosusu mibale bakomaki mokanda mpe batyaki yango na kati ya mikanda mosusu.

Na mokolo oyo bakanisaki bato oyo babomamaki, bapanzi-nsango ya televizyo moko balakisaki mokanda ya ndeko mwasi wana, mpe batángaki fraze ya ebandeli: “Mpo na nini? Na mikolo oyo ya nsuka, motuna wana ezali kotunama mbala na mbala mpe mingimingi mituna lokola: Nzambe azalaki wapi? Mpo na nini atikaki likambo yango esalema?” Likambo ya mawa, basukaki kaka wana.

Mpo na nini tolobi bongo? Mpo mokanda yango elimbolaki ndenge bampasi nyonso ebandá mpe emonisaki ete Nzambe “azwi bibongiseli mpo ete bampasi nyonso oyo bato babimisi elongolama.” Na nsima mokanda yango ebakisaki boye: “Na mokanda ya nsuka ya Biblia, Nzambe alobi ete akolongola mpisoli nyonso na miso ya bato mpe liwa ekozala lisusu te, mawa mpe kolela mpe mpasi ekozala lisusu te. Makambo ya kala ekoleka.” Kutu, Yehova Nzambe akosekwisa ata bato oyo bakufá. Na nzela ya Bokonzi na ye oyo ekoya mosika te, makama, koboma bato to bampasi ekozala lisusu te. Nzambe alaki ete: “Talá! Nazali kosala biloko nyonso biloko ya sika.”​—Emoniseli 21:4, 5.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Batatoli ya Yehova babimisaka mpe zulunalo Lamuká! na kasɛti.

[Elilingi na lokasa 12]

Batindelaki Jonas karte moko oyo ezalaki na maloba oyo: “Tozali kokanisa yo”

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 9]

Focus Agency/​WPN

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 9]

© imagebroker/​Alamy

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 10]

Fɔtɔ: picture alliance

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 11]

Fɔtɔ: picture alliance

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto