Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 1/6 nk. 11-16
  • Libɔndisi liuti na “Nzambe na kobɔndisa nyonso”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Libɔndisi liuti na “Nzambe na kobɔndisa nyonso”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Yehova​—Nzambe ya kobɔndisa
  • Yesu mpe Paulo​—Babɔndisi oyo bayebi komonisa motema mawa
  • Lolenge nini kobɔndisa baoyo bazali na mawa
  • Nini osengeli kosala te
  • Mikapo oyo mizali kobɔndisa
  • “Bólela elongo na bato oyo bazali kolela”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • Bóbɔndisa bato oyo bazali na mpasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • ‘Tóbɔndisa baoyo bazali kolela’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Ndenge Nzambe abɔndisaka biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2016
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 1/6 nk. 11-16

Libɔndisi liuti na “Nzambe na kobɔndisa nyonso”

“Nzambe mpe Tata na Nkolo na biso Yesu Klisto akumisama, ye Tata na mawa mpe Nzambe na kobɔndisa yɔnsɔ. Ye akobɔndisa biso kati na bolɔji na biso.”​—2 BAKƆLINTI 1:3, 4.

1, 2. Bato oyo bazali na mawa bazali na mposa ya kobɔndisama ya lolenge nini?

BATO oyo bazali na mawa bazalaka na mposa ya kobɔndisama​—kasi te ya maloba oyo mazongelamaka mingi mpe oyo mazangi nguya. Biso banso toyokaka maloba lokola oyo ete ‘mpasi na yo ekosila wana ntango ekosila koleka,’ kasi nani oyo, wana auti kokufela moto, akobɔndisama na likanisi yango? Baklisto bayebi ete Nzambe asili kopesa elaka ya lisekwa, nzokande yango te ekopekisa mawa monene mpe mobulungano oyo eutaka na liwa ya mbalakaka. Mpe na ntembe te soki okufeli mwana, bana mosusu oyo batikali bakoki te kozwa esika na mwana yango ya motuya mingi oyo auti kokufa.

2 Na ntango oyo molingami moko auti kokufa, kobɔndisama ya solosolo nde ekosalisa mpenza biso, kobɔndisama oyo ezwi moboko makasi likoló ya bilaka ya Nzambe. Tozalaka mpe na mposa ete bato mosusu bámitya na esika na biso. Yango ezalaki mpenza bongo mpo na bato ya Rwanda, mpe mingimingi mpo na ebele ya mabota ya Batatoli ya Yehova oyo babungisaki balingami na bango kuna mpo ete Satana apusaki bato ya bikólo bikeseni ete bábomana. Baoyo nyonso bazali na mawa bakoki kozwa kobɔndisama epai na nani?

Yehova​—Nzambe ya kobɔndisa

3. Lolenge nini Yehova asili kopesa ndakisa mpo na oyo etali kobɔndisa?

3 Yehova asili kopesa ndakisa awa esili ye kobɔndisa biso banso. Atindaki Mwana sé moko na ye, Klisto Yesu, na mabelé mpo na kopesa biso kobɔndisama mpe elikya ya seko. Yesu ateyaki ete: “Njambe alingaki mokili na motindo boye ete apɛsi Mwana-na-likinda na ye ete moto na moto oyo akondima ye abebisama tɛ kasi ete ajala na bomɔi na seko.” (Yoane 3:16) Alobaki mpe na bayekoli na ye ete: “Moto tɛ ajali na bolingo boleki oyo ete moto asopa bomɔi na ye mpɔ na baninga na ye.” (Yoane 15:13) Mokolo mosusu alobaki ete: “Lokola Mwana na moto ayei mpɔ na kosungama tɛ kasi mpɔ na kosunga mpe kopɛsa bomɔi na ye lokola lisiko mpɔ na mingi.” (Matai 20:28) Mpe Paulo alobaki ete: “Njambe amɔnisi bolingo na ye mpɔ na biso na njela oyo: naino ejalaki biso bato na masumu, Klisto akufelaki biso.” (Baloma 5:8) Na nzela ya mikapo wana mpe mikapo misusu, tozali komona bolingo ya Nzambe mpe ya Klisto Yesu.

4. Mpo na nini ntoma Paulo azalaki mpenza na nyongo epai na Yehova?

4 Ntoma Paulo ayebaki mpenza malamu ngɔlu ya Yehova. Ye abikisamaki na ezalela ya kufa ya elimo, ye moto oyo azalaki monyokoli mabe ya bayekoli ya Klisto, akómaki ye moko moklisto oyo anyokwamaki mingi. (Baefese 2:1-5) Alobeli makambo na ye moko ete: “Jambi ngai najali nsima na Bantoma yɔnsɔ, nabɔngi kobiangama Ntoma tɛ mpɔ ete nanyɔkɔlaki Lingomba na Njambe. Nde najali oyo ejali ngai mpɔ na ngɔlu na Njambe. Mpe ngɔlu na ye epai na ngai eyaki mpamba tɛ kasi nasalaki mosala koleka bango yɔnsɔ, ata ejalaki ngai tɛ nde ngɔlu na Njambe elɔngɔ na ngai.”​—1 Bakɔlinti 15:9, 10.

5. Paulo akomaki nini na ntina na kobɔndisama oyo ezali kouta na Nzambe?

5 Bongo na lolenge lobongi, Paulo akomaki ete: “Njambe mpe Tata na Nkolo na biso Yesu Klisto akumisama, ye Tata na mawa mpe Njambe na kobɔndisa yɔnsɔ. Ye akobɔndisa biso kati na bolɔji na biso. Na bongo biso tokoki kobɔndisa bango bajali kati na bolɔji ndenge nini na motindo na libɔndi oyo Njambe abɔndisi biso na yango. Mpɔ ete pelamɔkɔ biso tokolekaka kosangana na mpasi na Klisto, bongo na njela na Klisto tokolekaka kosangana na kobɔndisama. Sɔkɔ tojali kozwa bolɔji, ejali mpɔ na kobɔndisama mpe kobika na bino. Sɔkɔ tojali kobɔndisama, ejali mpɔ na libɔndi na bino, oyo ekojuaka bino wana bokoyikela mpasi mpiko, mpasi na lolenge lojali biso mpenja kojua. Elikia na biso mpɔ na bino ejali kotɛlɛma ngwi, jambi boyebi ete pelamɔkɔ bosili kosangana na bolɔji na biso, bongo bokosangana na kobɔndisama na biso.”​—2 Bakɔlinti 1:3-7.

6. Liloba ya Greke oyo libongolami na “kobɔndisama” lizali kopesa likanisi nini?

6 Oyo nde maloba kitoko! Liloba ya Greke oyo ebongolami awa “kobɔndisama” ezali na boyokani na “libyangi mpo na kozala penepene na moto moko.” Na yango, “ezali likambo ya kozala penepene na moto moko mpo na koyikisa ye mpiko wana azali kokutana na mikakatano makasi.” (A Linguistic Key to the Greek New Testament) Nganga-mayele moko na makambo ya Biblia akomaki ete: “Liloba yango . . . epesaka ntango nyonso likanisi mingi koleka boboto oyo ekitisaka mpasi. . . . Kobɔndisama ya boklisto ezali kobɔndisama oyo epesaka mpiko, kobɔndisama oyo epesaka moto makoki ya koyika mpiko na nyonso oyo ekoki kobima kati na bomoi mpo na kotɛmɛla ye.” Yango ezali mpe kosangisa maloba oyo mazwi moboko makasi likoló na elaka mpe elikya​—oyo ya lisekwa ya bakufi.

Yesu mpe Paulo​—Babɔndisi oyo bayebi komonisa motema mawa

7. Lolenge nini Paulo azalaki kobɔndisama mpo na bandeko na ye baklisto?

7 Oyo nde ndakisa monene Paulo atikaki mpo na oyo etali kobɔndisa bato! Akomaki epai na bandeko ya Tesaloniki ete: “Kasi, tokomi bato na malɛmbɛ na kati na bino pelamɔkɔ mama oyo ajali kobɔkɔla bana na ye mpenja. Boye, awa ejalaki biso na bolingo monɛnɛ epai na bino, toselingwi kokabela bino bobɛlɛ Nsango Malamu na Njambe te kasi bomɔi na biso mpenja, mpɔ ete bosili kokoma balingami na biso. Boyebi ete lokola tata na bana na ye, tobiangi mɔkɔ na mɔkɔ na bino mpe toyikisi bino mpiko mpe totatweli bino.” Motindo moko lokola baboti ya bolingo mingi mpe ya boboto, biso banso tokoki komonisa mɔ́tɔ mpe bosepeli epai na basusu oyo bazali kati na mpasi.​—1 Batɛsalɔniki 2:7, 8, 11, 12.

8. Mpo na nini mateya ya Yesu mazali libɔndisi mpo na baoyo bazali na mawa?

8 Na komonisáká likebi mpe boboto lolenge yango, Paulo azalaki bobele komekola ye oyo azalaki Ndakisa monene mpo na ye, Yesu. Omikundola libyangi ya motema mawa oyo Yesu azali kopesa epai na bato banso lokola yango ezwami kati na Matai 11:28-30: “Boya liboso na ngai, bino yɔnsɔ bojali kolɛmba na mosala mpe kokumba bojito mpe nakopemisa bino. Bokamata ekanganeli na ngai likolo na bino mpe boyekola na ngai; jambi ngai najali na bopɔlɔ mpe na motema mosɔkɛmi; bokojua kopema mpɔ na milimo na bino.” Ee, mateya ya Yesu mazalaki kokitisa motema mpamba te mazalaki kopesa elikya mpe elaka​—elaka ya lisekwa. Yango ezali elikya mpe elaka oyo tozali kopesa na bato, na ndakisa, ntango totikeli bango mwa búku Ntango moto oyo olingaka akufi. Elikya wana ekoki kosalisa biso banso, atako tozali kooka mawa uta ntango molai.

Lolenge nini kobɔndisa baoyo bazali na mawa

9. Mpo na nini tosengeli te kozala motema likolólikoló epai na bato oyo bazali na mawa?

9 Mawa esukaka te na mwa ntango oyo elandaka kufa ya molingami na biso. Bato mosusu bakumbaka mawa na bango na boumeli ya bomoi na bango mobimba, mingimingi baoyo babungisaki bana na bango. Babalani mibale baklisto ya sembo na mboka Espagne babungisaki mwana na bango ya mobali ya mbula 11 na mobu 1963 na bokɔnɔ ya méningite. Kino lelo oyo, balelaka wana ezali bango kosolola na ntina na Paquito. Kokundola mikolo, bafɔtɔ́, biloko ya mokufi, ekoki kozongisa makanisi ya mawa. Na yango, tosengeli soko moke te kozala motema likolólikoló mpe kokanisa ete mbɛlɛ sikawa basusu basilaki kolónga mawa na bango na ntina na moto oyo babungisaki. Monganga moko oyo ayebani mingi alobaki ete: “Mpasi ya konyokwama na makanisi mpe mbongwana kati na bizaleli ekoki koumela bambula mingi.” Na yango, omikundola ete, motindo moko lokola mapipi makoki kotikala na nzoto bomoi na biso mobimba, ezali mpe bongo mpo na mapipi mingi ya maoki.

10. Tosengeli kosala nini mpo na kosunga baoyo bazali na mawa?

10 Wapi mwa makambo mosusu mabongi oyo tokoki kosala mpo na kobɔndisa baoyo bazali na mawa kati na lisangá ya boklisto? Na bosembo nyonso, tokoki mbala mosusu koloba na ndeko mobali to ndeko mwasi moko oyo azali na mposa ya kobɔndisama ete: “Soki ezali na likambo oyo nakoki kosala mpo na kosalisa yo, yebisá ngai yango.” Kasi mbala boni bato oyo bakufeli moto bayaka koloba na biso ete: “Nakanisaki na likambo moko oyo bokoki kosala mpo na kosunga ngai”? Ya solo, tosengeli kozala na mayele soki tolingi kobɔndisa ye oyo akufeli moto. Na yango, tokoki mpenza kosala nini, oyo ekoki kopesa litomba? Talá mwa makanisi oyo mabongi.

11. Lolenge nini koyokamela na biso ekoki kozala kobɔndisama epai na basusu?

11 Koyoka: Moko na makambo ya ntina oyo okoki kosala ezali bongo ya kokabola mpasi elongo na ye oyo akufeli moto, na koyokameláká ye. Okoki kotuna ye motuna ete, “Okosepela ete tósolola na ntina na yango?” Tiká ye moko azwa ekateli. Na ntina na eleko oyo tata na ye akufaki, ndeko mobali moko moklisto amikundoli ete: “Ntango bato mosusu batunaki ngai soki likambo nini lisalemaki mpe na nsima bayokamelaki mpenza ngai, yango esungaki ngai mingi.” Lokola Yakobo apesaki toli, zalá pene na koyoka. (Yakobo 1:19) Yoká na motema pɛtɛɛ nyonso mpe omimonisa moto ya motema mawa. Na Baloma 12:15, Biblia epesi toli oyo ete: “Bolelaka na baleli.” Omikundola ete Yesu alelaki elongo na Malata mpe Malia.​—Yoane 11:35.

12. Endimiseli ya lolenge nini tokoki kopesa na baoyo bazali kolela?

12 Kopesa elikya: Kobosana te ete moto oyo akufeli moto akoki libosoliboso kooka ete asili komema ngambo, kokanisáká ete mbala mosusu ezalaki na likambo mosusu oyo akokaki kosala. Monisá ye ete asalaki nyonso ekoki na ye (to lobelá makambo mosusu oyo mazali solo mpe ya kolendisa). Monisá ye ete maoki oyo azali na yango mazalaka mpe epai na bato mosusu. Lobelá ye likambo ya bato oyo oyebi ete balóngaki mawa na bango ntango babungisaki balingami na bango. Na maloba mosusu, yebá komitya na esika na ye mpe zalá na motema mawa. Lisalisi na biso ya bolingo ekoki kosunga mingi! Salomo akomaki ete: “Liloba lilobami na ntango malamu, ezali lokola pómo ya wolo na saani ya palata.”​—Masese 16:24; 25:11, NW; 1 Batesaloniki 5:11, 14.

13. Soki tosombi ntango mpo na kosunga, lolenge nini yango ekoki kopesa lisalisi?

13 Sombá ntango: Osombá ntango, bobele te na boumeli ya mikolo ya liboso oyo baninga mpe bandeko bazali wana, kasi ata basanza mingi na nsima soki yango esengeli, wana basusu basili kozongela lolenge na bango ya bomoi ya mokolo na mokolo. Boumeli ya eleko ya mawa ekeseni mingi, engebene moto na moto. Bolingo na biso mpe motema mawa na biso ekoki kozala lisungi monene na ntango nyonso wana mposa ezali. Biblia elobi ete “moninga ajali mpe oyo akotikala pɛnɛpɛnɛ koleka ndeko.” Na yango, lisese oyo, “Moninga ya solosolo ayebanaka na ntango ya mpasi,” ezali liteya litali bolingo ya bazalani oyo tosengeli kosalela.​—Masese 18:24; kokanisá na Misala 28:15.

14. Likambo nini oyo tokoki kosolola mpo na kobɔndisa ye oyo akufeli moto?

14 Kosolola na ntina na bizaleli malamu ya moto oyo akufi. Yango ezali lisalisi mosusu ya monene, soki esalemi na ntango oyo ebongi mpenza. Sololá makambo kitoko ya kosekisa oyo ozali komikundola na ntina na mokufi. Bóbanga te kotánga nkombo ya moto yango. Kosala te lokola nde molingami oyo akufi azalaki soko moke te. Ezali libɔndisi na koyeba oyo mokanda moko ya eteyelo monene Harvard Medical School eyebisaki: “Mwa kobɔndisama eyaka ntango moto oyo akufeli molingami akoki kokanisa na ntina na mokufi kozanga ete azala na mawa monene . . . Wana asosoli mpe akangi ntina ya likambo yango, mawa ekokitisama mpe ekotika esika na bokundoli ya motuya mingi.” “Bokundoli ya motuya mingi”​—oyo nde likambo ya kobɔndisa kokanisa ntango kitoko oyo tolekisaki elongo na molingami oyo asili kokufa! Motatoli moko oyo abungisaki tata na ye esili koleka mwa bambula alobaki ete: “Bokundoli ya ntina mingi oyo nazali na yango etali kotánga Biblia elongo na tata mwa moke nsima wana abandaki koyekola solo. Mpe lisusu, wana elalaki biso na libóngo ya ebale, tozalaki kosolola na ntina na mikakatano na ngai. Nazalaki komona ye bobele nsima ya bambula misato to minei, na yango mabaku wana mazalaki mpenza oyo ya motuya mingi.”

15. Lolenge nini, kozanga ete basɛnga biso, tokoki kosala likambo oyo ekoki kopesa lisalisi?

15 Zwá likanisi ya kosala eloko soki ebongi: Bamoko kati na bato oyo bazali na mawa bakoki koyika mpiko malamu koleka basusu. Na yango, na kotalela ezalela ya moko na moko, pesá lisalisi libongi. Moklisto mwasi moko oyo azalaki na mawa amikundoli ete: “Bandeko mingi ya lisangá bazalaki koloba, ‘Soki ezali na likambo oyo nakoki kosala, yebisá ngai.’ Kasi ndeko mwasi moko moklisto atunaki te. Akendaki mbala moko na ndako ya kolala, alongolaki bilamba ya mbeto, mpe asukolaki yango. Ndeko mwasi mosusu akamataki katini, mai, mpe bisaleli ya kosukola mpe asukolaki tapis na esika mobali na ngai asanzaki. Bango bazalaki mpenza baninga ya solo, mpe nakobosana bango soko moke te.” Esika mposa ya kopesa lisungi emonani polele, pesá yango, kozanga kozela ete basɛnga yo​—mbala mosusu kolamba bilei, kotya bopɛtɔ, to kosala misala misusu ya ntina. Nzokande, tokosala yango na makasi te soki moto oyo akufeli moto asepeli kozala ye moko. Na yango, tosengeli kotya likebi na maloba oyo ya Paulo: “Na bongo, lokola Bapɔnami na Njambe, babulami mpe balingami; bomilatisa mitema mawa, na boboto, na kosɔkɛma, na bopɔlɔ, na mitema pɛtɛɛ.” Boboto, motema pɛtɛɛ mpe bolingo ekozanga soko moke te.​—Bakɔlɔsɛ 3:12; 1 Bakolinti 13:4-8.

16. Mpo na nini nkomá to kaláti ekoki kopesa kobɔndisama?

16 Tindá nkomá to kaláti ya kobɔndisa: Mbala mingi bato bayebaka mpenza te motuya ya nkomá to kaláti ya kobɔndisa baoyo bazali na mawa. Yango ezali na matomba nini? Ekoki kotángama mbala na mbala. Nkomá motindo wana esengeli te kozala molai, kasi esengeli komonisa mawa oyo ozali na yango. Esengeli mpe komonisa mwa makanisi ya elimo, kasi esengeli te kozala lisukúlu. Bobele maloba ya ntina “Tozali wana mpo na kosunga yo” ekoki kozala libɔndisi.

17. Lolenge nini libondeli likoki kopesa kobɔndisama?

17 Bondelá mpo na bango: Kotyola te motuya ya mabondeli oyo ozali kosala elongo na baninga na yo baklisto to oyo ozali kosala mpo na bango. Biblia elobi na Yakobo 5:16: “Lilɔmbɔ na moyɛngɛbɛni ejali na nguya mingi.” Na ndakisa, soki baoyo bazali na mawa bayoki libondeli oyo tosali mpo na bango, yango ekosalisa bango ete balongola maoki ya mabe lokola lioki ya komema ngambo. Na ntango oyo tozali na bolɛmbu, tozangi mpiko, Satana amekaka kobulunganisa biso na “mayɛlɛ mabe,” to “miango mabe.” Yango ezali mpenza ntango oyo tozali na mposa ya kobɔndisama mpe ya kolendisama, lokola Paulo alobaki yango ete: ‘Na mabɔndɛli yɔnsɔ mpe na malɔmbɔ, bobɔndɛlaka ntango yɔnsɔ kati na [elimo, NW]. Mpɔ na yango bolongwa na mpɔngi na etingia yɔnsɔ mpe bolɔmbaka mpɔ na Babulami yɔnsɔ.’​—Baɛfɛsɛ 6:11, 18; kokanisá na Yakobo 5:13-15.

Nini osengeli kosala te

18, 19. Lolenge nini tokoki komonisa mayele kati na masoló na biso?

18 Ntango moto moko azali na mawa, ezali mpe na makambo oyo tosengeli kosala te to tosengeli koloba te. Masese 12:18 epesi likebisi oyo: “Moto ajali oyo akoloba lokola koswama na mbɛli, nde lolemo na bato na mayɛlɛ ejali na bomɔi.” Mbala mosusu, kozanga koyeba yango, tozangaka komonisa mayele. Na ndakisa, tokoki koloba, “Nayebi maoki na yo.” Kasi oyebi yango mpenza? Yo mpe osilá kozwa mpasi oyo ekokani mpenza na oyo wana? Bato bazalaka na maoki makesani. Maoki na yo makoki ntango nyonso te kozala oyo ya bato oyo bazali na mawa. Nzokande, okoki koloba ete, “Namitye mpenza na esika na yo, mpamba te mpasi motindo wana ekwelaki mpe ngai ntango . . . na ngai akufaki esili koleka mwa ntango.”

19 Ekozala mpe likambo ya mayele koboya koloba soki mokufi akosekwa to akosekwa te. Bandeko mibali mpe bandeko basi mosusu bazokisamaki mingi na motema na ntina na maloba ya kosambisa na ntina na bilikya ya mobalani na bango oyo azalaki mondimi te mpe oyo autaki kokufa. Biso tozali te mpo na kokata soki banani bakosekwisama to banani bakosekwisama te. Tokoki kobɔndisama na koyeba ete Yehova, oyo atalaka na motema, akomonisa motema mawa mingi koleka oyo biso moko tolingaki kosala.​—Nzembo 86:15; Luka 6:35-37.

Mikapo oyo mizali kobɔndisa

20, 21. Wapi mikapo misusu oyo mikoki kobɔndisa baoyo bakufeli moto?

20 Moko na biutelo bileki monene ya lisungi, soki topesi yango na ntango malamu, ezali bongo kotalela elongo na bato oyo bazali na mawa elaká oyo Yehova apesi na ntina na bakufi. Makanisi wana oyo mazwami na Biblia makopesa litomba epai na moto oyo azali na mawa, azala Motatoli to moto tokutani na ye kati na mosala ya kosakola. Wapi bamoko na mikapo yango? Toyebi ete Yehova azali Nzambe na kobɔndisa nyonso, mpamba te alobaki ete: “Ngai, ngai najali ye oyo akobɔndisa yɔ.” Alobaki mpe: “Lokola mwana oyo mama na ye ajali kobɔndisa ye, boye ngai nakobɔndisa bino.”​—Yisaya 51:12; 66:13.

21 Mokomi na Nzembo akomaki ete: “Yango ekobɔndisa ngai na ntango na mpasi, jambi liloba na yɔ epɛsi ngai bomɔi. Nakobanja mpo na bikateli na yɔ na kala, ɛ [Yehova]; bongo najui libɔndi. Najali kobɔndɛla ete, Tika ete boboto na yɔ ejala mpɔ na kobɔndisa ngai, pelamɔkɔ na liloba na yɔ.” Tóyeba ete liloba “kobɔndisa” esalelami mbala mingi kati na mikapo oyo. Ya solo, tokoki kozwa libɔndisi ya solosolo mpo na biso moko mpe mpo na basusu na komibaloláká epai na Liloba ya Yehova na ntango ya mpasi. Liloba yango, oyo ebakisami likoló na bolingo mpe motema mawa oyo euti na bandeko, ekoki kosalisa biso na kolónga mawa na biso mpe ekoki kosalisa biso na kozongela esengo na biso kati na mosala ya boklisto.​—Njembo 119:50, 52, 76.

22. Elikya nini ezali liboso na biso?

22 Tokoki mpe, na meko mosusu, kolónga mawa na biso na kosalisáká basusu kati na bampasi na bango. Wana tozali kotya likebi na biso epai na basusu oyo bazali na mposa ya kobɔndisama, tokozwa esengo ya kopesa na elimo. (Misala 20:35) Tiká ete tókabola elongo na bango emonaneli ya mokolo ya kosekwisama ntango bato ya mabota nyonso ya kala, eleko moko nsima na mosusu bakoyamba balingami na bango longwa na bakufi mpo na kokɔta na mokili ya sika. Oyo nde elikya kitoko! Na ntango wana tokolela mpo na esengo, wana tokomikundola ete Yehova azali solo Nzambe “oyo akobɔndisaka basɔkɛmi”!​—2 Bakɔlinti 7:6.

Ozali komikundola?

◻ Na ndimbola nini Yehova azali “Njambe na kobɔndisa yɔnsɔ”?

◻ Lolenge nini Yesu mpe Paulo babɔndisaki bato oyo bazalaki na mawa?

◻ Wapi makambo mosusu oyo tokoki kosala mpo na kobɔndisa bato oyo bazali na mawa?

◻ Makambo nini tosengeli kosala te wana tozali elongo na bato oyo bazali na mawa?

◻ Wapi mikapo oyo olingaka mingi mpo na kozwela kobɔndisama na ntango okufeli moto?

[Elilingi na lokasa 15]

Na mayele mpenza, zwá likanisi ya kosalisa baoyo bazali na mawa

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto