Likama oyo esalemaki na Bisanga Salomon
Mwayambo, 2 Aprili 2007, mabelé eninganaki makasi na Bisanga Salomon, na nɔrdi-ɛsti ya ekólo Australie. Na boumeli ya mwa miniti moke, mbonge minene ya mai, oyo mosusu balobaki ete ezalaki na bolai ya mɛtrɛ 10, esopanaki na bisanga ya Province occidentale; bato 52 bakufaki mpe bandako ya bato 6 000 ebebaki.
Moko ya bisika oyo ebebisamaki makasi ezali Gizo, engumba ya bato soki 7 000 oyo ezali na bokula ya Esanga Ghizo; engumba yango ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ 45 mpamba longwa na esika oyo koningana ya mabelé ebandaki. Batatoli ya Yehova ya lisangá ya Gizo bazalaki komilɛngɛla mpo na Ekaniseli ya liwa ya Yesu na mpokwa ya mokolo yango. (1 Bakolinti 11:23–26) Mokolo yango ebandaki malamu, moi ebimaki mpe mbu ezalaki kimya. Mbala moko, na ngonga ya 7, miniti 39, mabelé eninganaki.
Mabelé eningani!
Ron Parkinson, oyo azali nkulutu na lisangá moko ya Batatoli, ná mwasi na ye Dorothy, bazalaki komilɛngɛla mpo na komɛla ti ntango mabelé eninganaki. Ron alobi boye: “Ndako na biso eninganaki lokola nzete ya kokoti, kasi ekweaki te. Makɛlɛlɛ ezalaki makasi mpenza. Biloko ya ndako, bakɔpɔ mpe basaani ya mbɛlɛ, ná piano moko ekweaki na nse. Tosalaki makasi mpe tobimaki libándá. Dorothy azokaki makasi mpo atambolaki makolo-ngulu likoló ya milangi oyo epasukaki.”
Tony Shaw ná mwasi na ye Christine, bamisionɛrɛ oyo ndako na bango ezali mosika te na oyo ya Ron Parkinson babimaki mpe libándá. Christine alobi boye: “Mabelé eninganaki makasi mpenza na boye ete nakweaki na nse mpe nazalaki kokoka kotɛlɛma te. Mbonge moko makasi eyaki kobɛta na bandako mpe epikolaki yango; tomonaki bandako ezali kotepa na mai. Bato mosusu bamataki na babwato mpo na koluka bato oyo bazalaki naino na bomoi na kati ya ebele ya biloko wana. Na nsima, mabelé eninganaki lisusu mbala mibale. Na boumeli ya mikolo mitano oyo elandaki, mabelé ekobaki koningana mokemoke. Ezalaki nsɔmɔ mpenza!”
Na nsima, tsunami esalemaki
Patson Baea afandaka na Esanga Sepo Hite, oyo ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ 6 longwa na Gizo. Nini ekómelaki ye ná libota na ye ntango likama yango esalemaki?
Patson alobi boye: “Napotaki mbangu na mbu epai mwasi na ngai Naomi azalaki elongo na bana na biso minei. Bango nyonso bakweaki na nse, kasi bazwaki likama te. Bana bazalaki kolɛnga, bamosusu bazalaki kolela. Ngai ná Naomi toyebisaki bango ete bátika kobanga.
“Namonaki ete mai ya mbu ezalaki koningana na ndenge oyo ezalaka liboso te. Emonanaki polele ete tsunami elingi kosalema. Mwa esanga na biso mobimba ekokaki kozinga na mai. Mama na ngai, Evalyn, oyo azalaki kofanda na esanga mosusu ya moke oyo ezali mosika te, azalaki mpe na likama. Nayebisaki mwasi na ngai ná bana ete bákɔta nokinoki na mwa bwato na biso oyo ezali na motɛrɛ mpe tokendaki koluka mama.
“Nsima ya kotambola mwa moke, mbonge moko monene etombolaki bwato na biso. Mai ya mbu ezalaki komata mpe kokita. Ntango tokómaki epai mama azalaki, tokutaki ye abulungani mpe azalaki kobanga kokita na mai. Naomi ná Jeremy, mwana na biso ya mbula 15, bakitaki na kati ya mai mpe basalisaki mama abɛta mai tii esika oyo bwato ezalaki. Na nsima, napelisaki motɛrɛ mpe totambolaki na vitɛsi nyonso na kati ya mbu.
“Na ntango yango, mai ya mbu ekitaki mingi na ndenge oyo namoná naino te; mabanga oyo ezalaka pembenipembeni ya mbu ekómaki komonana. Mbala moko, ebele ya mai ezongaki na mokili mpe ezindisaki bisanga nyonso mibale. Mai ebɛtaki ndako na biso oyo tobongisá mpo na bapaya, oyo ezalaki pembeni ya libongo, mpe ebebisaki yango nyonso. Mai ekɔtaki na ndako oyo tozalaki kofanda mpe ebebisaki biloko mingi. Ntango mai ekitaki, tolɔkɔtaki Babiblia ná mikanda na biso ya nzembo mpe tokendaki na Gizo.”
Bato ebele bakufaki mpe biloko mingi pembenipembeni ya mbu ebebaki. Ngámbo ya wɛsti ya Esanga Ghizo nde ebebaki mingi koleka. Mbonge oyo balobaki ete ekómaki na bolai ya mɛtrɛ 5 ebebisaki bamboka soki 13 ya esanga yango!
Na mpokwa yango, bato 22 bayanganaki na Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova na Gizo mpo na Ekaniseli ya liwa ya Yesu. Ata moko te kati na bango azwaki likama makasi. Ron, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Kura ezalaki te, mpe miinda na biso ya petrole ebebaki. Ndeko Shaw asalaki lisukulu na torche. Na kati ya molili wana, toyembaki banzembo na mongongo makasi mpo na kotɔnda Yehova.”
Lisungi ya bandeko
Ntango nsango ya likama oyo esalemaki na bisanga na biso ekómaki na Honiara, engumba-mokonzi, biro ya Batatoli ya Yehova ezwaki bibongiseli nokinoki mpo na kotinda lisungi. Nsima ya kobenga bandeko na telefone, toyebaki ete Batatoli mingi bazwaki likama te. Bandeko batindamaki mpo na koluka Motatoli moko oyo afandaka na Esanga Choiseul. Bakutaki ye azali malamu. Biro ya Batatoli ya Yehova etindaki mpe mbongo na Gizo mpo na kosomba biloko oyo bandeko basengeli kozala na yango.
Bandeko oyo bautaki na biro ya filiale bakómaki na Gizo mokolo ya minei na mpɛpɔ ya liboso. Craig Tucker, oyo azali na komite ya filiale, alobi boye: “Tomemaki bakartɔ mingi ya biloko. Biloko ya bato mosusu oyo bamataki na mpɛpɔ etikalaki mpo kilo elekaki mingi, kasi tosepelaki na komona ete bakartɔ na biso nyonso ekómaki. Yango ezalaki na kati ya biloko ya liboso oyo ekómaki na esika oyo likama esalemaki. Biloko mosusu eyaki na masuwa mikolo mibale na nsima.”
Na ntango yango, Tony Shaw, Patson Baea, ná Batatoli mosusu ya Gizo, basalaki mobembo ya ngonga mibale na bwato mpo na kosalisa Batatoli oyo bafandaka na Esanga Ranongga. Lokola mabelé eninganaki makasi, esanga yango oyo ezali na kilomɛtrɛ 32 na molai mpe kilomɛtrɛ 8 na monene, etombwanaki na mɛtrɛ 2 likoló ya mbu! Emonani ete koningana ya mai zingazinga ya esanga yango nde ememaki tsunami na bisanga oyo ezalaki pembenipembeni.
Tony alobi boye: “Bandeko basepelaki mingi ntango bamonaki biso. Bazwaki likama te, kasi bazalaki kolala libándá mpo bazalaki kobanga mpamba te mabelé ezalaki kaka koningana mokemoke. Bwato na biso nde bwato ya liboso oyo ememaki biloko na esanga yango. Liboso ya kozonga, tobondelaki elongo mpo na kotɔnda Yehova.”
Patson alobi boye: “Mwa mikolo na nsima, tozongaki na Ranongga mpo na kotika biloko mosusu mpe koluka libota moko ya Batatoli oyo bazalaki kofanda na nsuka mpenza ya esanga yango. Nsukansuka, tomonaki Matthew Itu ná libota na ye na kati ya zamba. Balelaki na esengo na komona ete tobosanaki bango te! Ndako na bango mpe bandako mosusu mingi ya mboka na bango ekweaki ntango mabelé eninganaki. Kasi, mposa na bango ya liboso ezalaki ya kozwa Babiblia mosusu mpamba te Babiblia na bango ebungaki.”
Bato mosusu bapesi biso longonya
Bato mosusu mpe bamonaki bolingo ya boklisto oyo tomonisaki. Ndeko Craig Tucker alobi boye: “Mopanzi-nsango moko oyo azalaki komona lokola nde likambo moko ezalaki kosalema te mpo na kosunga bato oyo bazwaki likama, akamwaki ntango ayokaki ete Batatoli ya Yehova batindelaki bandeko na bango bilei, bakapo, mpe biloko mosusu ya ntina nsima ya mwa mikolo moke.” Patson abakisi boye: “Na Esanga Ranongga, bato ya mboka bakumisaki biso ndenge tosalaki makambo nokinoki mpo na komema biloko mpe bazalaki koimaima na ndenge lingomba na bango esalaki eloko te mpo na kosunga bango.” Mwasi moko alobaki boye: “Lingomba na bino esali makambo nokinoki mpo na kosalisa bino!”
Batatoli basalisaki mpe bato mosusu. Christine Shaw alobi boye: “Ntango tokendaki kotala esika oyo babongisaki mpo na kosalisa bato ya maladi na Gizo, tomonaki mobali moko ná mwasi na ye oyo tokutanaki na bango na mosala ya kosakola mwa mikolo liboso. Bango mibale bazwaki mpasi mpe bazalaki na nsɔmɔ. Mwasi yango azalaki na nkɔkɔ na ye na mabɔkɔ; mai ememaki mwana mpe akufaki. Tozongaki noki na ndako mpo na kolukela bango bilei mpe bilamba. Batɔndaki biso mingi mpenza.”
Kasi, bato oyo bazwi makama bazalaka kaka na mposa ya biloko te. Bazalaka mingimingi na mposa ya libɔndisi oyo kaka Biblia, Liloba ya Nzambe, ekoki kopesa. Ron alobi boye: “Basango ná bapastɛrɛ mosusu bazalaki koloba ete Nzambe apesaki bato etumbu mpo na masumu na bango. Kasi, biso tomonisaki bango na lisalisi ya Biblia ete Nzambe atindelaka bato makambo ya mabe te. Bato mingi batɔndaki biso ndenge tobɔndisaki bango na mateya wana.”—2 Bakolinti 1:3, 4; Yakobo 1:13.a
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá lisolo “‘Pourquoi?’ Réponse à la plus difficile des questions,” na Lamuká! ya Novɛmbɛ 2006, nkasa 3-9 (ebimeli ya Lifalanse). Bandeko bakabolaki zulunalo yango mingi na Gizo nsima ya likama wana.
[Etanda/Karte na lokasa 13]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Choiseul
Ghizo
Gizo
Ranongga
HONIARA
AUSTRALIE
[Elilingi na lokasa 15]
Libota ya Baea na kati ya bwato na bango
[Elilingi na lokasa 15]
Ndenge oyo tsunami ebebisaki engumba Gizo
[Elilingi na lokasa 15]
Ndako ya Bokonzi oyo ezali ndako kaka moko oyo ekweaki te na Lale, na Esanga Ranongga