Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 1/12 nk. 4-7
  • Ndenge nini okoki kokesenisa malamu ná mabe?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge nini okoki kokesenisa malamu ná mabe?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Makanisi ndenge na ndenge
  • Osengeli nde kolanda makanisi ya bato?
  • Osengeli nde kolanda makanisi na yo moko?
  • Ndenge ya kozwa makasi ya kosala oyo ezali malamu
  • Likambo oyo emonanaka kaka epai ya bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Mibeko ya Nzambe na oyo etali malamu ná mabe esilá ngala?
    Makambo mosusu
  • Salelá Yehova na kolanda mitinda na ye ya sembo
    Batelá mokolo ya Yehova na makanisi na yo
  • Mabe ná malamu: Osengeli kopona
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2024
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 1/12 nk. 4-7

Ndenge nini okoki kokesenisa malamu ná mabe?

NANI azali na lotomo ya kokata oyo ezali malamu ná oyo ezali mabe? Motuna wana ebimaki banda kaka na ebandeli, na ntango ya Adama ná Eva. Mokanda ya Genese eyebisi biso ete Nzambe apesaki nzete moko oyo ezalaki na elanga ya Edene nkombo “nzete ya koyeba malamu mpe mabe.” (Genese 2:9) Nzambe alobaki na mobali ná mwasi ya liboso ete bálya mbuma ya nzete yango te. Kasi, Satana Zabolo, monguna ya Nzambe, ayebisaki Adama ná Eva ete soki balei mbuma ya nzete yango, miso na bango “makofungwama” mpe ‘bakozala lokola Nzambe, bakoyeba malamu mpe mabe.’​—Genese 2:16, 17; 3:1, 5; Emoniseli 12:9.

Adama ná Eva basengelaki kopona: kotosa mobeko oyo Nzambe atyaki na oyo etali malamu ná mabe to kolanda makanisi na bango moko. (Genese 3:6) Baponaki koboya kotosa Nzambe mpe balyaki mbuma ya nzete yango. Likambo oyo basalaki emonisaki nini? Lokola baboyaki kotosa mobeko oyo Nzambe atyelaki bango, yango emonisaki ete bakanisaki ete bango ná bana na bango bakozala malamu koleka soki bazali kolanda makanisi na bango moko mpo na kokesenisa malamu ná mabe. Bato bakómi nde malamu koleka lokola bazali koluka kokokana na nzambe, elingi koloba komityela mibeko bango moko?

Makanisi ndenge na ndenge

Nsima ya kotalela makanisi ya bato ya mayele ya bileko ndenge na ndenge banda na ntango ya kala, buku Encyclopædia Britannica elobi ete banda na ntango ya Socrate, filozofe moko ya Grɛki, tii na bambula ya 1900, “bato bapesi makanisi ndenge na ndenge na likambo etali kokesenisa malamu ná mabe.”

Na ndakisa, bafilozofe ya Grɛki oyo bazalaki kobenga Ba-Sophiste, bazalaki bateyi minene mpenza na ekeke ya mitano liboso ya ntango na biso (L.T.B.). Bazalaki koteya ete esengeli kolanda makanisi oyo bato mingi bazali kolanda mpo na kokesenisa malamu ná mabe. Moko na bafilozofe yango alobaki boye: “Makambo oyo bato ya mboka moko bazali komona malamu, ezali malamu mpo na mboka wana na ntango nyonso oyo bato bazali kotalela yango bongo.” Soki tolandi likanisi wana, boye Jodie oyo tolobelaki na lisolo eleki asengelaki kozwa mbongo oyo amonaki, mpamba te bato mingi ya mboka na ye balingaki mpe kosala bongo.

Emmanuel Kant, filozofe moko monene ya ekeke ya 18, azalaki na likanisi mosusu. Zulunalo Issues in Ethics elobi boye: “Emmanuel Kant mpe bafilozofe mosusu . . . balobaki ete moto na moto nde asengeli kopona.” Na kolanda makanisi ya Kant, soki oyo Jodie alingaki kosala ekokaki kosala moto moko mabe te, ye moko kaka nde asengelaki kokata soki ebongi asala yano to te. Asengelaki te kolanda makanisi ya bato mpo na koyeba oyo asengeli kosala.

Jodie asalaki nini? Aponaki nzela mosusu. Alandaki mateya ya Yesu Klisto, moto oyo bato nyonso, bázala baklisto to te, basepelaka mingi na mateya na ye. Yesu ateyaki boye: “Makambo nyonso oyo bolingaka ete bato básalela bino, bino mpe bosengeli kosalela bango kaka bongo.” (Matai 7:12) Mwasi oyo Jodie azalaki kosalisa akamwaki mpenza ntango Jodie apesaki ye dolare 82 000 oyo amonaki. Ntango batunaki Jodie mpo na nini azwaki mbongo yango te, Jodie ayanolaki ete azali Motatoli ya Yehova mpe abakisaki ete: “Nakokaki kozwa mbongo yango te mpo ezalaki ya ngai te.” Jodie azwaki na lisɛki te maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 19:18: “Osengeli koyiba te.”

Osengeli nde kolanda makanisi ya bato?

Bato mosusu bakoki kobenga Jodie zoba mpo na bosembo na ye. Kasi, makanisi ya bato ekoki kobungisa moto nzela. Na ndakisa, soki ozalaki kofanda na mboka moko epai bato mingi bamonaka ete kokaba bana mbeka ezali mabe te, ndenge bazalaki kosala na bamboka mosusu ya kala, olingaki kotalela likambo yango ete ezali malamu? (2 Mikonzi 16:3) Ezali boni soki obotamaki na mboka moko epai bato bamonaka ete kolya mosuni ya moto ezali likambo malamu? Olingaki nde koloba ete kolya mosuni ya moto ezali mpenza mabe te? Soki bato mingi bazali kosala likambo moko, elingi koloba kaka te ete likambo yango ezali malamu. Banda kalakala, Biblia ekebisaki biso na motambo yango na maloba oyo: “[Okolanda, NW] ebele mpo na kosala mabe te.”​—Exode 23:2.

Yesu Klisto amonisaki ntina mosusu oyo tosengeli te kolanda makanisi ya bato mpo na kokesenisa malamu ná mabe. Abengaki Satana “moyangeli ya mokili oyo.” (Yoane 14:30; Luka 4:6) Satana asalelaka bokonzi na ye mpo na kobungisa “mabelé mobimba oyo efandami nzela.” (Emoniseli 12:9) Na yango, soki olandaka kaka makanisi ya bato mpo na kokesenisa malamu ná mabe, ekoki kozala ete ozali kolanda makanisi ya Satana, mpe yango ekoki kozala likama mpo na yo.

Osengeli nde kolanda makanisi na yo moko?

Moto na moto asengeli nde kolanda makanisi na ye moko mpo na kokesenisa malamu ná mabe? Biblia elobi boye: “Ndimá bososoli na yo moko te.” (Masese 3:5) Mpo na nini? Mpamba te bato nyonso babotamá na bolɛmbu moko oyo ekoki kobungisa bango nzela. Ntango Adama ná Eva batombokelaki Nzambe, balandaki makanisi ya Satana, mokosi oyo alukaka kaka matomba na ye moko mpe baponaki ye azala tata na bango ya elimo. Na nsima, bapesaki bana na bango ezaleli yango, elingi koloba motema ya bokosi, oyo eyebaka makambo ya malamu kasi ekangamaka kaka na makambo ya mabe.​—Genese 6:5; Baloma 5:12; 7:21-24.

Na esika oyo balobeli makanisi ya bato ya mayele na likambo etali kokesenisa malamu ná mabe na buku Encyclopædia Britannica, bakomi boye: “Ezali likambo ya kokamwa te komona ete atako bato bayebi oyo ezali malamu, bazali kosala kaka makambo oyo bakoki kozwela litomba. Na mikili ya Mpoto komonisa bato ntina ya kosalaka malamu ezalaki likambo moke te.” Biblia elobi mpenza solo ete: “Motema ezali na bokosi koleka biloko nyonso mpe na mabe mingi; nani akoki koyeba yango?” (Yilimia 17:9) Soki oyebi ete moto moko azali mokosi mpe azali mabe, okotyela ye motema?

Ya solo, atako bato oyo bandimaka Nzambe te, bakoki kozala na bizaleli malamu mpe koyeba mpenza kokesenisa mabe ná malamu. Kasi, mbala mingi bizaleli malamu oyo bazalaka na yango emonisaka kaka bizaleli malamu oyo Biblia eteyaka. Ata soki bato yango bandimaka te ete Nzambe azali, makanisi na bango emonisaka ete babotamá na likoki ya komonisa bizaleli ya Nzambe. Yango emonisi ete Biblia elobi solo ete moto akelamaki “na elilingi ya Nzambe.” (Genese 1:27; Misala 17:26-28) Ntoma Paulo alobaki boye: “Bango nde bato oyo bazali komonisa ete makambo ya mibeko ekomamá na kati ya mitema na bango.”​—Baloma 2:15.

Ya solo, koyeba oyo ezali malamu ná kosala yango ezali makambo mibale ekeseni. Ndenge nini moto akómaka na makasi ya kosala oyo ezali malamu? Lokola makambo oyo tosalaka eutaka na motema, boye soki moto aloni bolingo ya Yehova Nzambe, Mobandisi ya Biblia, akoki kozwa makasi yango.​—Nzembo 25:4, 5. 

Ndenge ya kozwa makasi ya kosala oyo ezali malamu

Likambo ya liboso oyo moto akoki kosala mpo na koyekola kolinga Nzambe ezali koyeba ete mibeko na ye ezali makasi te mpe ezali malamu mingi. Ntoma Yoane alobaki boye: “Bolingo ya Nzambe elakisi boye, ete tótosaka bakomandema na ye; kutu bakomandema na ye ezali kilo te.” (1 Yoane 5:3) Na ndakisa, Biblia ezali na batoli ya malamu mpenza oyo ekoki kosalisa bilenge báyeba kokesenisa malamu ná mabe ntango balingi kozwa ekateli mpo na koyeba soki basengeli komɛla masanga, komɛla bangi to kosangisa nzoto ntango babali naino te. Biblia ekoki kosalisa bato oyo babalá báyeba ndenge ya kosilisa matata na kati ya libala, ekoki mpe kopesa baboti toli na ndenge ya kobɔkɔla bana.a Mikóló mpe bilenge, bato minene to bato mpamba, baoyo batángá kelasi mingi to baoyo batángá te, mindɛlɛ to baindo, soki balandi mitinda ya malamu oyo ezali na Biblia, bakoki kozwela yango litomba.

Kaka ndenge kolya bilei ya vitamini epesaka makasi ya kosala mosala, kotánga Liloba ya Nzambe mpe ekopesa moto makasi ya kotosa mitinda ya Nzambe. Yesu akokanisaki maloba ya Nzambe na bilei. (Matai 4:4) Alobaki mpe boye: “Bilei na ngai ezali nde kosala mokano ya moto oyo atindaki ngai.” (Yoane 4:34) Lokola Yesu azalaki kotánga Liloba ya Nzambe, yango esalisaki ye akwea te na komekama mpe azwa bikateli ya malamu.​—Luka 4:1-13.

Na ebandeli, ekoki kozala mpasi kotángaka Liloba ya Nzambe mpe kondima mitinda na yango. Kasi, kobosana te ete ntango ozalaki mwana moke, ozalaki ntango mosusu mpe kolinga te bilei oyo ezalaki malamu mpo na nzoto na yo. Kasi, mpo okola malamu, esengelaki obanda kolinga bilei yango mokemoke. Ndenge moko mpe, ekoki kosɛnga mwa ntango mpo okóma kosepela na mitinda ya Nzambe. Soki olɛmbi te, okolinga yango mpe okokóma makasi na elimo. (Nzembo 34:8; 2 Timote 3:15-17) Okoyekola kotyela Yehova motema mpe yango ekopesa yo mposa ya ‘kosala malamu.’​—Nzembo 37:3.

Ntango mosusu okokutana te na likambo oyo Jodie akutanaki na yango. Atako bongo, mokolo na mokolo, ozwaka bikateli, ya mike mpe ya minene. Yango wana, Biblia epesi yo toli oyo: “Talelá Yehova na motema na yo mobimba mpe ndimá bososoli na yo moko te. Na nzela nyonso na yo, ndimá ye mpe ye akotambolisa yo.” (Masese 3:5, 6) Soki oyekoli kotyela Yehova motema, okozwa matomba lelo oyo mpe, na mikolo ezali koya, okozala na bomoi libela na libela, mpamba te kotosa Yehova ememaka na bomoi.​—Matai 7:13, 14.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Batoli malamu ya Biblia oyo etali makambo wana mpe makambo mosusu ezali na buku Mituna oyo bilenge batunaka​—Biyano bibongi mpe buku Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 6]

Makanisi ya bato ekoki kouta na banguya oyo emonanaka te

[Bililingi na lokasa 5]

Banda kalakala, bato ya mayele bapesaki makanisi ndenge na ndenge na likambo etali kokesenisa malamu ná mabe

SOCRATE

KANT

CONFUCIUS

[Eutelo ya bafɔtɔs]

Kant: Euti na buku The Historian’s History of the World; Socrate: Euti na buku A General History for Colleges and High Schools; Confucius: Iniversite Sung Kyun Kwan, na Séoul, Corée

[Bililingi na lokasa 7]

Biblia esalisaka biso na kokesenisa malamu ná mabe mpe elendisaka biso tósala oyo ezali malamu

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto