Likambo oyo emonanaka kaka epai ya bato
Jodie asalisaka bato oyo ndeko na bango akufi na kotánga motuya ya biloko oyo atiki mpo na kotɛka yango. Mokolo moko, azalaki kosalisa mwasi moko na koyeba motuya ya biloko oyo ndeko na ye atikaki mpo bákoka kotɛka yango. Ntango azalaki kolukaluka pembeni ya esika bapelisaka mɔtɔ, amonaki mwa bakɛsi mibale ya kala. Ntango atalaki na kɛsi moko, amonaki liboke ya mbongo elingami na papye—ezalaki dolare 82 000! Jodie azalaki kaka ye moko na ndako. Asengelaki kosala nini? Abomba kɛsi yango to nde ayebisa mwasi yango ete amoni mbongo?
MITUNA oyo Jodie amitunaki na motema emonisi mpenza likambo moko oyo ekesenisaka bato ná banyama. Buku The World Book Encyclopedia elobi boye: “Likambo moko oyo ekesenisaka bato ná banyama ezali ete bato bakoki komituna nini basengeli kosala mpe nini basengeli kosala te.” Na ndakisa, mbwa oyo azali na nzala, soki amoni mosuni na mesa, akomituna te soki asengeli kolya yango to te. Kasi, Jodie akoki komituna soki likambo oyo alingi kosala ezali malamu to mabe. Soki abombi mbongo yango, ekozala moyibi, kasi ekozala mwa mpasi bákanga ye. Mbongo yango ezali ya ye te; kasi mwasi wana mpe ayebi te ete mbongo yango ezali. Lisusu, soki apesi mwasi yango mbongo yango, bato bakomona ye zoba mpenza.
Soki yo ozalaki na esika ya Jodie, olingaki kosala nini? Eyano na yo na motuna wana ekomonisa ndenge na yo ya kotalela malamu ná mabe.
Ndenge ya kotalela malamu ná mabe
Ndenge oyo bato batalelaka malamu ná mabe etalelaka ndenge lisosoli na bango eteyamá, ezala na makambo oyo bato basalaka na esika bafandi to na bonkɔkɔ na bango.
Banda kala, mangomba nde ezalaki kolakisa bato makambo nini ezali malamu to mabe. Biblia, Liloba ya Nzambe, ezalaki kotambwisa bato na bisika mingi. Nzokande, lelo oyo bato mingi na mokili mobimba bazali kolinga lisusu mateya ya mangomba te, mpo bazali komona ete ezali lisusu na ntina te mpe bazali koloba ete mitinda ya Biblia esilá ngala. Mateya nini bakómi kolanda? Buku Ethics in Business Life elobi boye: “Makanisi ya bato ya mayele ya mokili oyo . . . ezwi esika ya mateya ya mangomba.” Bato mingi, na esika bálanda mateya ya mangomba, bakómi nde koluka makanisi ya bato ya mayele na oyo etali malamu ná mabe. Profesɛrɛ Paul McNeill alobi boye: “Ngai namoni ete bato ya mayele nde bazwi esika ya basango ná bapastɛrɛ na oyo etali kolakisa bato makambo nini ezali malamu to mabe. . . . Lelo oyo, na oyo etali malamu ná mabe, bato bakómi nde kolanda makanisi ya bato na esika bálanda mateya ya Nzambe to ya mangomba.”
Ntango ozali kotalela makambo, ndenge nini okoki kokesenisa malamu ná mabe? Olandaka mitinda ya Nzambe to nde oyo ya yo moko mpo na koyeba kokesenisa malamu ná mabe?