Basi, bomonisa bolingo mpe limemya
Tika ete mwasi atosa [azala na limemya epai nal mobali na ye.—BAEFESE 5:33.
1. Na kotalela makanisi ndenge na ndenge na ntina na libala, mituna nini tozali kotuna?
NA MIKOLO na biso, mpo na mposa ya lipanda mpe ya “kosikwama”, lolenge ya kala ya kotalela libala ezali kobundisama makasi. Bamilió na mabota bazali lisusu na tata to mama te, mpe bato mingi bazali kofanda esika moko mobali na mwasi kozanga kobalana. Kasi ezaleli yango epesi solo kimya mingi mpo na basi mpe bamama, bakisa mpe bana na bango? Kokwea oyo ya bizaleli ebimisi limemya kati na mabota? Soki boye te, Liloba na Nzambe etindi nini?
2. Mpo na nini ebongaki te na Adam kotikala ye moko?
2 Ntango amonisaki mposa na ye ya kozalisa mwasi ya liboso, Nzambe alobaka: “Ezali malamu te ete mobali azala ye moko.” Na ntembe te Adam akanisaki mpe bongo nsima na kotalela mabota ya banyama, mibali mpe basi elongo na bana na bango. Mpamba te, atako azalaki moto ya kokoka mpe afandaki kati na paradis epai mposa na ye nyonso ekokisamaki, atako bongo Adam ayokaki mposa ya kozala na moninga lokola ye. Apesamelaki mayele mpe likoki ya koloba, kasi moto ya kolobana na ye azalaki te. Nzokande, ezalela yango elingaki koumela te, mpamba te Nzambe alobaki: “Nakosalela ye mosungi mobongi na ye.”—Genese 2:18-20.
3. (a) Mpo na nini Eva azalaki se “lolenge moko” na Adam? (b) Elimboli nini mpo na mobali “kokangana” na mwasi na ye?
3 Jéhovah azalisaki Eva, mwasi ya liboso, na mopanzi moko oyo azwaki na nzoto ya Adam. Azalaki bongo “motindo” moko na mobali, “mokwa na mikwa [na ye], mpe mosuni na mosuni na [ye], kasi nyama te, ekelamu ya nse. Na boyokani na likambo yango, Liloba na Nzambe epemami elobi boye: “Yango wana mobali akotika tata na ye mpe mama na ye mpe akokangana na mwasi na ye, mpe bongo bakozala mosuni moko.” (Genese 2:23, 24) Liloba ya hébreu oyo ebongolami ete “kokangana” elimboli mpenzampenza “kokangisa makasi biloko mibale lokola na kole”. (Lexique hébreu et chaldéen du texte de l’Ancien Testament [na Anglais], ebimisamaki na Gesenius.) Liloba yango emonisi ete babalani basengeli kozala baninga oyo bakoki kokabwana te. Engebene molimboli mosusu na maloba na nzoto na mobali mpe na mwasi, kasi etali boyokani makasi na makambo na bango nyonso”. Na yango, libala ezali liseki te, kasi nsinga ya libela. Mpe atako ntango mosusu emekami makasi, libala ekobeba te soki babalani nyonso mibale bazali kopesana limemya.—Matai 19:3-9.
4. Ndenge nini mwasi asengelaki kozala mosungi mobongi mpo na mobali?
4 Nzambe alobaki ete mwasi asengeli kozala mobali mosungi mobongi na ye. Lokola asalaki bango nyonso mibale na elilingi na ye, azalaki kozela ete bamonisa bizaleli na ye, elingi koloba boyengebene, bolingo, mayele mpe nguya, kati na boyokani na bango lokola mobali mpe mwasi. Eva asengelaki kozala mpo na Adam “mosungi mobongi na ye”, kasi mowelani te. Ebongi te ete libota ekokana na masuwa etambwisami na bakapitene mibale oyo bazali koyokana te. Mobali nde asengeli kokamba.—1 Bakolinti 11:3; Baefese 5:22-24; 1 Timote 2:12, 13.
5. Ndenge nini mibali mingi bazali kotalela basi? Nzambe andimi lolenge wana?
5 Nzokande, lisumu mpe botomboki ya mobali ya liboso mpe mwasi ya liboso, kotemelaka bokonzi oyo Nzambe azalaki kosalela likoló na bango na bolingo ebongolaki ezalela kati na yango libota na bango mpe mabota nyonso mosusu malingaki kosalema. Koyebaka libela mpasi oyo lisumu na bango elingaki kobimisa likoló na bango mpe likoló na bato nyonso, Jéhovah alobaki na Eva: “Okozala na mposa na mobali na yo, mpe ye akozala na bokonzi likoló na yo.” (Genese 3:16) Kasi na mawa, na boumeli ya bikeke mingi, mibali mingi basalelaki bokonzi na bango likoló na basi mpo na konyokola bango. Na mokili mobimba, basi mingi batalelamaki mpe bazali naino kotalelama lokola biloko mpamba. Nzokande, lokola touti komona yango na lisolo ya liboso, Biblia elongisi soko moke te monyokoli motindo wana ya mibali likoló na basi; nkutu mitinda ya Biblia mizali nde kolendisa limemya mozindo.
Komonisa limemya mozindo: ezali lokola ntembe
6, 7. (a) Ndenge nini tokoki kosala mpo ete mibali oyo bazali bandimi te bayamba la vérité? (b) Ndenge nini mwasi akoki kozanga komonisa “limemya mozindo” epai na mobali na ye oyo azali mondimi te?
6 Nsima na kolobela malamumalamu ndakisa kitoko oyo Klisto atikelaki biso na etamboli na ye, mpe nsima na kolimbola ete Yesu atikelaki biso ‘elakiseli mpo ete tolanda matambe na ye’, ntoma Petelo abakisi: “Bobele bongo bino basi, botosa babali na bino ete, ata bamosusu na bango bandimi Liloba te, bazwama na kimya mpe na bizaleli malamu na basi na bango, wana esili bango kotala bizaleli na bino bizali na mpeto mpe na limemya.” (1 Petelo 2:21 kino 3:2) Ndenge nini basi baklisto bakoki komonisa “limemya mozindo”?
7 Basi baklisto mingi bazali na mobali oyo azali mondimi te, mbala mosusu mpe motemeli mpenza. Mpo na basi motindo oyo, toli ya Petelo ezali na ntina te? Ezali boye te, mpamba te botosi mpe limemya esengami na bango, ata “bamosusu na bango bandimi Liloba te”. Mwasi moklisto oyo mobali na ye azali kotemela solo, akozala na limemya mozindo te epai na mobali na ye, soki azali kosolola polele epai na bandeko basi mosusu minyokoli nyonso oyo mobali na ye azali kosalela ye. Ekozala boni soki azali koloba bongo mpo na ndeko mobali moko to ndeko mwasi moko kati na kondima? Ekomonana ete azali moto na bilobaloba, to mpe motongi. Mwasi moklisto akozanga bongo limemya mozindo epai na mobali na ye oyo azali mondimi te soki azali kotiolaka mobali na ye. (1 Timote 3:11; 5:13) Ya solo, bamosusu kati na basi baklisto oyo mibali na bango bazali kotemela solo bazali kokutana na mikakatano makasi. Na likambo yango, bakoki kosala nini na lisosoli malamu nyonso? Koluka lisalisi mpe toli epai ya bankulutu.—Baebele 13:17.
8. Makanisi nini makoki kozala na mobali oyo azali mondimi te?
8 Bankulutu bakoki kosala nini mpo na kosolola na takte elongo na mobali oyo azali motemeli? Ya liboso, ebongi bamitia na esika na ye. Kosilika na ye ekoki kolimbolama na bapwe misato oyo: Kozanga koyeba ekobimisaka kobanga, mpe kobanga ekokamba kino na kosilika. Mpo na nini boye? Mobali azangi kondima ayebi bobele makambo moke to mpe ayebi eloko moko te na ntina na ba Témoins de Jéhovah, longola bobele masolo oyo ayokaka na baninga na ye batondi na makanisi mabe. Eloko ayebi, ezali ete liboso abanda koyekola Biblia mwasi na ye amipesaki se na kosalela ye mpe bana na bango. Atako sikawa azali mwasi moko malamu mpe mama malamu ya libota, mobali azali komiloba: ‘Mwasi na ngai abimaka mbala misato na poso mpo na koyangana na makita. Nayebi te makambo nini elekaka kuna, kasi namonaka mibali mingi kitoko, mpe . . . ’ Ee, ekoki kozala ete mpo ayebi Batemwe te, mobali wana azali na zuwa mpe azali na motema likoló, yango wana azali kotemela mwasi na ye. Lisalisi nini bankulutu bakoki kopesa na mobali oyo azali kokanisa boye?—Masese 14:30; 27:4.
9. Ndenge nini tokoki kosolola na takte elongo na mobali oyo azali mondimi te, mpe mbala mosusu ebimisaka matomba nini?
9 Mbala mosusu moko kati na bankulutu akoki koluka koyebana elongo na mobali wana oyo azali mondimi te. (1 Bakolinti 9:19-23) Soki mobali yango azali électricien, menuisier to peintre, bokoki kosenga ye, soki alingi, ete asala mosala moko ya bobongisi kati na Salle du Royaume. Yango ekopesa ye libaku ya komona salle ndenge ezali kuna na kati, na ntango oyo likita ezali te. Na meko oyo akobanda koyebana na Batemwe, ekoki kozala ete botemeli na ye epai na mwasi na ye mpe na la vérité ekolemba. Na komonaka bolingo mpe elimo ya kosalisana kati na lisangá, mbala mosusu ye moko akobanda koya kotika mwasi na ye na makita, kino mokolo mosusu akokota kati na salle na boumeli ya likita moko mpo koyoka makambo nini mazali kolobama kuna. Mpe nani ayebi, mbala mosusu akoya kosenga boyekoli ya Biblia! Nyonso wana ekoki kosalama, mpe esili kosalama. Bibele ya mibali bazali lelo bandimi mpo ete bandeko bamonisaki bolingo epai na bango mpe balobelaki bango na takte; epai mosusu, basi na bango bamonisaki “limemya mozindo” epai na bango.—Baefese 5:33.
Azali kotala malamu makambo na ndako na ye
10, 11. Mokonzi Lemuele alobaki nini na ntina na mwasi oyo abongi? (Botalela likanisi mokomoko)
10 Mokonzi Lemuele alakisamaki malamu na mama na ye mpo na bizaleli na mwasi oyo abongi. (Masese 31:1) Ezali litomba mingi na kotanga motindo alimboli bizaleli ya mwasi mpe mama mosali, ndenge ekomami na Masese 31:10 kino 31. Emonani ete mama yango azalaki ye moko kosalela mitinda ya sembo ya Nzambe mpe azalaki komonisa limemya mozindo.
11 Lemuele alobi ete “mwasi oyo abongi” azali mwasi oyo bakoki kotiela ye motema mpe azali sembo. (Versets 10 kino 12) Amipesi kolambela mobali na ye mpe bana na ye, mpe kobongisela bango biloko. (Versets 13 kino 19, 21, 24) Azali mwasi malamu mpe mokabéli na baoyo bazali kokelela (Verset 20) Na limemya na ye mpe na etamboli na ye malamu, azali kotombola lokumu ya mobali na ye. (Verset 23) Azali na bilobaloba te soki mpe motongi, kasi maloba na ye mazali kolendisa mpe mazali kokitisa motema. (Verset 26) Lokola azali na goigoi te, ndako na ye ezali peto, ebongisami malamu. (Verset 27) (Toloba ete ndako ya moklisto esengeli kozala moko na bandako eleki peto na esika bafandi.) Mobali na ye mpe bana na ye bazali na botondi epai na ye mpe bazali kokumisa ye. Mobali na ye mpe bana na ye bazali kotondo ye mpe kokumisa ye. Mpo na bapaya oyo bayaka kotala libota, bango mpe basengeli na bizaleli na ye (Versets 28, 29, 31) Kitoko na ye ezali kitoko ya libanda mpamba te, kasi kitoko ya mwasi oyo akobangaka Nzambe mpe azali kobatela bomoko boyokani na na mokano na Ye.—Verset 30.
Elimo na bopolo mpe na kimya
12. Nini ezali “na motuya mingi na miso na Nzambe”, mpe lisese nini ya baespasaonele emonisi lisusu polele likanisi oyo?
12 Petelo alandeli likanisi oyo na kopesaka toli na basi baklisto ete bapesa motuya mingi te na kitoko na bango ya libanda. Alobi na bango boye “tika kitoko na bino ezala eloko ebombami na motema, kitoko oyo ekobeba te, oyo na elimo na bopolo mpe na kimya; yango ezali na motuya monene na miso na Nzambe”. (1 Petelo 3:3, 4) Tosimbi na maloba oyo ‘elimo na kimya mpe na bopolo ezali na motuya monene na miso na Nzambe’. Na yango, mwasi mpe mama moklisto oyo azali komonisa elimo motindo oyo azali kitoko, bobele na miso na mobali na ye te, kasi oyo eleki ntina, azali kitoko na miso na Nzambe, lokola ezalaki bongo basi ya sembo na ntango ya kala. Kitoko oyo ya kati ya motema ekumisami mpe kati na lisese oyo ya baespaniole ete: “Mwasi kitoko azali elengi mpo na miso; mwasi malamu elengi mpo na motema. Soki oyo ya liboso azali liyaka, oyo ya mibale azali pauni.”
13. Ndakisa malamu ya mwasi ekoki kozala na bopusi nini likoló na bana na ye?
13 Mwasi moklisto akoki kozala liziba na elendiseli mpo na ndako na ye mobimba. (Tala Matai 11:28-30) Limemya oyo azali komonisa epai na mobali na ye ekopusa bana na ye ete balanda ndakisa na ye kati na boyokani na bango elongo na baboti na bango mpe elongo na bapaya. Bazali bongo bana malamu mpe na limemya. Oyo nde elendiseli na komona bango bazali kosala misala ya ndako na bolingo na bango moko kozanga ete bapusama mpo na yango! Bolingo na bango ya kosala misala ezali kokolisa esengo kati na libota, mpe mbano na bango kitoko ezali koseka ya mama na bango mpo na komonisa ete asepeli na bango.
14. Na ntango disipline esengeli kopesama, mituna nini mitunamaka mbala mosusu?
14 Kasi esengeli kosala nini liboso na makambo oyo masengi disipline? Bana bakosalaka mabunga, lokola mpe baboti bakosalaka yango. Mama moklisto akosala nini soki mobali na ye azali te? Akozala ntango nyonso na limemya epai na bana na ye, to akozala nde kongangela bango mpo na kotosisa bango na makasi? Tokanisa naino: Mwana akoyokela yo malamu mpo ete otomboli mongongo? To matomba malamu makozwama nde na kosolola na ye na kimya nyonso?—Baefese 4:31, 32.
15. Boyekoli moko esalemaki emonisi nini na ntina na botosi ya bana?
15 Na ntina na botosi ya bana, tala oyo ekomaki zulunalo moko (Psychology Today): “Engebene boyekoli moko esalemaki, emonanaki ete mbala mingi soki baboti batomboli mongongo mpo na kopekisa eloko to likambo na mwana, mbala mingi mwana akozanga botosi na likambo yango.” Epai mosusu, boyekoli esalemaki emonisaki ete soki bamikoló bazali koloba na bopolo to douceur, mbala mingi bana bakotiaka mindondo te mpo na kotosa. Nyonso emonisi ete eleki malamu kosolola na kimya nyonso elongo na mwana na esika ete ongangelaka ye ntango nyonso wana ozali kopesa ye bitinda.—Baefese 6:4;1 Petelo 4:8.
Limemya na kosangana na nzoto
16. Ndenge nini mwasi akoki kotalela bamposa ya mayoki ya mobali na ye, mpe bolamu nini ekozwama na ezalela na ye?
16 Tomonaki ete mobali asengeli kosalela mwasi na ye makambo na makasi te mpo ete mwasi azali petepete; nde epai mosusu, mwasi asengeli mpe kotalela mposa ya mayoki mpe ya nzoto ya mobali na ye. Biblia elobi ete mobali mpe mwasi na ye basengeli kosepelisana mpe kokokisana mposa. Mpo na yango, esengeli ete mobalani mokomoko asosolaka bamposa mpe mayoki ya moninga. Kokokisana mposa ekosunga bango mpo ete moko te kati na bango mibale abanda kotambwisa miso epai na epai, mpamba te yango ekoki kokweisa bango na ekobo.—Masese 5:15-20.
17. Motindo nini babalani basengeli kotalela mokumba na bango ya kokokisa bamposa?
17 Kati na libala oyo babalani bazali kopesana limemya, moko te kati na babalani akopimela mosusu kosangana mpo na kopesa ye etumbu. Mokomoko akopesa na mobalani na ye oyo ekoki na ye; bobele soki bayokani ete na eleko boye to na eleko boye bakosangana te. (1 Bakolinti 7:1-5) Na ndakisa, soki mobali azali na mobembo mpo na mosala ya Bokonzi, ebongi ayokana malamu na mwasi na ye mpo na likambo yango. Kokabwana motindo wana ekoki kozwela matomba mingi ya elimo na basangani nyonso ya libota, mpamba te na bozongi na ye mobali akozala na mosala kitoko mpo na koyebisa bango, makoki koyikisa bango mpiko.
Mokumba monene ya basi baklisto
18. Mpo na nini mwasi ya nkulutu azali na mokumba monene?
18 Mwasi moklisto oyo mobali na ye azali nkulutu azali na mokumba monene. Ya liboso, mobali na ye asengeli kokokisa makambo mingi masengami na ye. Akozongisa monoko liboso na Jéhovah mpo na ezalela ya elimo ya lisangá. (Baebele 13:17) Epai mosusu, lokola azali mwasi ya nkulutu mpe mbala mosusu azali mwasi akomeli, esengeli mpe ete apesa ndakisa mpo na oyo etali komonisa limemya. (Tala 1 Timote 5:9, 10; Tito 2:3-5) Ntalo monene ya basi ya bankulutu bazali kopesa ndakisa malamu mingi na kosungaka mibali na bango! Mbala mingi mobali akobimaka mpo na kotalela makambo ya lisangá, mpe mwasi akoki koluka koyeba auti wapi, bazalaki na nani, kosala nini. Nzokande mwasi oyo akobangaka Nzambe akomonisa bosembo na ye na ndenge ete akoluka te komikotisa na makambo ya nkuku ya lisangá.—1 Petelo 4:15.
19. Nkulutu akosengela mbala mosusu kosala nini mpo na ‘kokamba ndako na ye na lolenge malamu mpenza’?
19 Nzokande ntango mosusu nkulutu akopesa toli na mwasi na ye mpo ete azali na ezaleli ya kolendisa te to azali kopesa ndakisa malamu te na bandeko basi mosusu. Mpamba te, mpo na ‘kokamba ndako na ye na lolenge malamu mpenza’, esengeli na ye ete asenzela, bobele likoló na bana na ye te, kasi mpe likoló na mwasi na ye. Lisengami oyo ya Biblia ekoki kozala komekama mpo na basi baklisto mosusu.—1 Timote 3:4, 5, 11; Baebele 12:11.
20. Tanga nkombo ya basi baklisto minzemba to babala, oyo bapesaki ndakisa malamu mingi na ntango ya kala mpe na ntango na biso. (Tala lndex des publications de la Société Watch Tower, na nse ya motó ya likambo “Récits de la vie de Témoins de Jéhovah”)
20 Mpo na bandeko basi oyo bazali minzemba, ebongi batalela malamu limemya oyo bandeko basi babálá bazali kobatela kati na lisangá. Bandakisa ezali mingi ya bandeko basi ya sembo, kati na Makomami mpe kati na masangá na ntango na biso! Doloka, emonani ete azalaki monzemba, akumisamaki mpo na “misala na ye malamu.” (Misala 9:36-42) Pilisika mpe Febe bazalaki mpe koboma nzoto na molende nyonso mpo na solo. (Baloma 16:1-4) Bobele bongo, na mikoló na biso, bandeko basi mingi, minzembo to oyo basili kobala, bazali bamisionere, ba pionniers mpe basakoli malamu mingi. Epai mosusu, bazali mpe kobongisa malamu ndako na bango mpe kokokisa mikumba na bango kati na libota. Mpo ete bazali mingi mpe bazali na ntango mingi, mbala mingi basi nde bazali kosala ngonga mingi kati na mosala ya kosakola.—Nzembo 68:11.
21. Na nini bandeko basi ya sembo bazali elendiseli mpo na bandeko na bango kati na kondima?
21 Basi baklisto oyo bazali sembo bazali kosala mingi mpo na kolendisa lisangá. Molende na bango mpe ndakisa na bango ezali koyikisa mpiko na bandeko na bango kati na kondima mpe lisangá ya boklisto na mobimba. Bazali solo basungi mpo na bango mpe ebongi solo ete tozala na bolingo epai na bango mpe limemya. (Tala Genese 2:18) Na ntembe te, babalani baklisto bakosala malamu na kolanda toli oyo ya Paulo: “Tika ete moko na moko na bino alinga mwasi na ye lokola ye moko mpe tika ete mwasi atosa [azala na limemya na] mobali na ye.”—Baefese 5:33.
Bozongeli
◻ Mokumba nini Nzambe apesaki na mobali ya liboso mpe na mwasi ya liboso?
◻ Ndenge nini tokoki kosala mpo ete mobali oyo azali mondimi te ayamba la vérité?
◻ Mwasi oyo abongi amonisaka bizaleli nini?
◻ Ndenge nini mwasi moklisto oyo asili kobala akoki komonisa “elimo na kimya mpe na bopolo”?
◻ Ezaleli nini ya bokatikati babalani basengeli kozala na yango mpo na oyo etali kokokisana mposa na bango ya nzoto?
[Elilingi na lokasa 16]
Libota ekoki kozala te lokola masuwa etambwisami na bakapitene mibale oyo bazali kowelana.
[Elilingi na lokasa 14]
Ntango mosusu mobali oyo azali mondimi te akomi na zuwa, to mpe komibanzabanza, mpo ete mwasi na ye azali koyangana na makita to azali kosangana na misala misusu ya boklisto. Ndenge nini tokoki kosalisa ye?