Mituna ya batángi
• Na Biblia, babengi mpe Satana na nkombo Lucifer?
Na kati ya Makomami, nkombo Lucifer ezali kaka na esika moko mpe kutu, ezali kaka na mwa ndambo ya mabongoli ya Biblia. Na ndakisa, na Yisaya 14:12, King James Version elobi boye: “Talá ndenge oyo olongwe na likoló mpe okwei, Ee Lucifer, mwana ya ntɔngɔ!”
Liloba ya Liebele oyo ebongolami “Lucifer” elimboli “oyo azali kongɛnga.” Na libongoli ya Septante, basaleli liloba ya Grɛki oyo elimboli “oyo atanisaka ntɔngɔ.” Yango wana, Babiblia mosusu ebongoli liloba yango ya Liebele na “monzoto ya ntɔngɔ.” Kasi, na Vulgate, libongoli oyo Jérôme asalaki na lokota ya Latin, asalelaki “Lucifer” (momemi ya pole), mpe yango nde esalaki ete na mabongoli mingi ya Biblia básalela liloba wana.
Lucifer yango ezali nani? Maloba “oyo azali kongɛnga,” to “Lucifer,” ezali na kati ya maloba oyo Yisaya asakolaki mpe atindaki Bayisalaele báloba yango lokola ‘lisese mpo na kotyola mokonzi ya Babilone.’ Na bongo, maloba yango ezali na kati ya makambo oyo Yisaya alobaki yango mpenzampenza mpo na bakonzi nyonso ya Babilone. Likambo mosusu oyo ezali komonisa ete “oyo azali kongɛnga” ezali moto, kasi ezali ekelamu ya elimo te, ezali maloba oyo elandi: “Okitisami na nse kino [na sheole, NW].” Satana Zabolo afandaka na sheole te mpamba te sheole ezali lilita epai moto nyonso akundamaka. Longola nyonso wana, bato oyo bazali komona ndenge oyo Lucifer akitisami na esika yango bazali koloba ete: “Oyo nde moto oyo aningisaki mokili?” Ezali polele ete “Lucifer” azali moto, kasi azali ekelamu ya elimo te.—Yisaya 14:4, 15, 16, NW.
Mpo na nini balobaki makambo wana mpo na bakonzi ya Babilone? Tóyeba ete basengelaki kobenga mokonzi ya Babilone ete oyo azali kongɛnga nsima ya kokitisama na ye mpe bakobenga ye bongo mpo na kotyola ye. (Yisaya 14:3) Bakonzi ya Babilone bazalaki na lolendo; yango wana bamitombolaki likoló ya bato nyonso oyo bazalaki zingazinga na bango. Bakonzi yango bapusaki mpenza lofundo, yango wana Biblia elobi ete bazalaki koloba na lolendo ete: “Nakobuta na likoló. Nakotombola kiti ya bokonzi na ngai likoló ya minzoto ya Nzambe, mpe nakofanda likoló ya ngomba ya koyangana, na nsuka mpenza ya nɔrdi. . . . Nakomikómisa lokola Oyo-Aleki-Likoló.”—Yisaya 14:13, 14, NW.
“Minzoto ya Nzambe” ezali nde bakonzi oyo bazalaki kouta na libota ya Mokonzi Davidi. (Mituya 24:17) “Minzoto” yango, banda na Davidi ye moko, ezalaki koyangela na Ngomba Siona. Na nsima, ntango Salomo atongaki tempelo na Yelusaleme, mboka yango mobimba ekómaki kobengama Siona. Na ntango bazalaki na kondimana ya Mibeko, basɛngaki mibali nyonso ya Yisalaele ete bákendaka na Siona mbala misato na mbula. Ezali na ndenge wana nde ekómaki “ngomba ya koyangana.” Lokola Nebukadanesala azwaki ekateli ya kolonga bakonzi ya Yuda mpe kolongola bango na ngomba wana, amonisaki ete mposa na ye ezalaki amitombola likoló ya “minzoto” wana. Na esika amonisa ete Yehova nde alingaki ete ye alonga bango, na lofundo mpenza, ye amityaki na esika ya Yehova. Yango wana, babengaki bakonzi ya Babilone ete, “oyo azali kongɛnga” nsima ya kokitisa bango na mabele mpe babengaki bango bongo mpo na kotyola bango.
Lolendo ya bakonzi ya Babilone ezalaki mpenza komonisa elimo ya Satana Zabolo, “nzambe ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo.” (2 Bakolinti 4:4) Ye mpe azalaka na mposa makasi ya kozwa nguya mpe alukaka komitombola likoló ya Yehova Nzambe. Kasi, Makomami ebengi Satana na nkombo Lucifer te.
• Mpo na nini 1 Ntango 2:13-15 elobi ete Davidi azalaki mwana ya nsambo ya Yisai, nzokande 1 Samwele 16:10, 11 elobi ete azalaki mwana ya mwambe?
Ntango Saulo, mokonzi ya Yisalaele ya kala, atikaki losambo ya solo, Yehova Nzambe atindaki mosakoli Samwele akende kopakola mwana moko ya Yisai mpo akóma mokonzi. Lisolo oyo elobeli likambo yango na Biblia, oyo Samwele ye moko akomaki yango na ekeke ya 11 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), elobi ete Davidi azalaki mwana ya mwambe ya Yisai. (1 Samwele 16:10-13) Nzokande, lisolo oyo nganga-nzambe Ezela akomaki, soki mbula 600 na nsima, elobi ete: “Yisai abotaki mwana ya liboso na ye, Eliaba mpe ya mibale Abinadaba mpe ya misato Sima; Netanele ya minei, Ladai ya mitano; Osɛmɛ ya motoba, Davidi ya nsambo.” (1 Ntango 2:13-15) Likambo nini ekómelaki ndeko moko ya Davidi, mpe mpo na nini Ezela akomaki nkombo na ye te?
Makomami elobi ete Yisai azalaki na “bana mwambe.” (1 Samwele 17:12) Ekoki mpenza kozala ete mwana na ye moko akufaki liboso akóma mokóló, abala mpe abota bana. Lokola atikaki bana te, akokaki kozala na libula ya libota te to na esika te na molɔngɔ ya bakitani ya Yisai.
Sikoyo, tótalela naino ndenge oyo makambo ezalaki ntango Ezela akomaki mikanda ya Ntango. Mbula soki 77 elekaki banda boombo na Babilone esilaki, mpe Bayuda bakómaki kofanda lisusu na mboka na bango. Mokonzi ya Perse apesaki Ezela ndingisa ya kopona bazuzi mpe balakisi ya Mibeko ya Nzambe mpe kobongisa ndako ya Yehova. Basengelaki na milɔngɔ ya sikisiki mpo ete libota na libota ezwa mpenza libula na yango mpe esengelaki komindimisa ete kaka bato oyo bazalaki mpenza bato ya libota ya banganga nde bazalaki kosala mosala ya bonganga-nzambe. Yango wana, Ezela akomaki lisolo ya ekólo, mpe akomaki na bosikisiki bankombo ya bato ya libota ya Yuda ndenge balandanaki tii na Davidi mpe nsima na ye. Nkombo ya Mwana ya Yisai oyo akufaki mpe atikaki bana te ekokaki kozala na ntina te. Yango wana, Ezela akomaki nkombo na ye te.