“Amemaka ngai epai ya mai ya kimia”
LOKOLA molunge ezalaka makasi na mikili ya Proche-Orient, bampate bazalaka na mposa ya komɛla mai mokolo na mokolo. Yango wana, moko ya makambo ya ntina mingi oyo mobateli ya mpate asalaka ezali koluka mai mpo na bampate na ye. Ntango mosusu babateli ya mpate bakendaka komɛlisa bibwele na bango na libulu ya mai; batokaka mai na libulu mpe basopaka yango na bilokó oyo bibwele emelelaka mai mpo bampate bámɛla. (Genese 29:1-3) Kasi, mingimingi na eleko ya mbula, pembenipembeni ya mwa miluka mpe mingala ezalaka na “bisika ya kopema oyo ezali na mai mingi.”—Nzembo 23:2, NW.
Mobateli ya mpate oyo ayebi mosala yango malamu asengeli koyeba bisika nini akoki komona mai mpe matiti ya malamu mpo na bibwele na ye. Soki ayebi bisika nyonso wana malamu, bampate na ye bakokufa na mposa ya mai te. Davidi, moto oyo asalaki mosala ya kobatela bampate na bangomba ya Yudea bambula mingi, akokanisaki litambwisi ya elimo oyo Nzambe apesaka na ndenge oyo mobateli ya mpate akendaka na bampate na ye na esika matiti malamu mpe mai ezali. Davidi alobaki ete: “Amemaka ngai epai ya mai ya kimia.”—Nzembo 23:1-3, Boyokani ya Sika pe Banzembo.
Bambula mingi na nsima, na nzela ya mosakoli Ezekiele, Yehova asalelaki ndakisa ya ndenge wana. Alakaki ete akolongola bato na ye na bikólo oyo bango bapalanganaki, ndenge mobateli ya mpate ayanganisaka bampate na ye. Alobaki boye: “Nakoya na bango . . . na mabelé na bango mpe nakoleisa bango na bangomba ya Yisalaele, mpe na pembeni ya miluka ya mai.”—Ezekiele 34:13, NW.
Yehova Nzambe azalaka mpenza na mposa ya kopesa mai ya elimo. Mokanda ya Emoniseli ezali kolobela “ebale ya mai ya bomoi” oyo ezali kobima na kiti ya bokonzi ya Nzambe. (Emoniseli 22:1) Bazali kobenga bato nyonso ete báya komɛla mai ya ebale yango. “Moto nyonso oyo alingi, [akoki] kokamata mai ya bomoi ofele.”—Emoniseli 22:17.
Yango ezali mai ya elilingi oyo elimboli makambo nyonso oyo Nzambe abongisi mpo na kopesa bomoi ya seko. Moto nyonso akoki kobanda komɛla mai yango soki azali ‘kozwa boyebi ya Nzambe kaka moko ya solosolo mpe moto oyo ye atindaki, Yesu Klisto.’—Yoane 17:3.