Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w01 15/9 nk. 5-7
  • Losambo ya solo ezali kosangisa bato

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Losambo ya solo ezali kosangisa bato
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bomoko na mokili mobimba na eleko na biso
  • Basangani na kati ya losambo ya solo
  • Eloko nini ekoki mpenza kosangisa bato?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Libota ya Yehova ezongi mpe ezali kokumisa ye na mokili mobimba
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Tozala na bomoko na nzela na monoko na peto
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Monoko na peto mpo na mabota nyonso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
w01 15/9 nk. 5-7

Losambo ya solo ezali kosangisa bato

ATAKO tozali komona mingi ete mangomba ezali kokabola bato, losambo ya Nzambe kaka moko ya solo ezali na nguya ya kosangisa bato. Ntango Yisalaele ezalaki libota ya Nzambe, bato ya bikólo mosusu mingi oyo bazalaki motema sembo bakɔtaki na losambo ya solo. Na ndakisa, Luta atikaki kosambela banzambe ya mboka Moaba epai ye abotamaki, alobaki na Naomi ete: “Bato na yo bakozala bato na ngai mpe Nzambe na yo akozala Nzambe na ngai.” (Luta 1:16) Na ekeke ya liboso ya ntango na biso, bato mingi ya bikólo mosusu oyo bazalaki Bayuda te bakómaki kosambela Nzambe ya solo. (Misala 13:48; 17:4) Na nsima, ntango bayekoli ya Yesu bakómaki kokende na bamboka mosika mpo na kosakola nsango malamu, bato mosusu ya mitema sembo basanganaki na losambo ya Nzambe ya solo. Paulo akomaki ete: “Bino [bosili] kobongwana epai ya Nzambe longwa na bikeko ete bósalela Nzambe na bomoi mpe na sembo.” (1 Batesaloniki 1:9) Lelo oyo mpe losambo ya Nzambe ya solo ezali na nguya ya kosangisa bato ndenge wana?

Bato oyo batyaka ntembe balobaka ete “basambeli ya solo” bazali te to “Nzambe ya solo,” azali te. Bazali kokanisa bongo mpo bayebi te epai wapi bakoki koyekola solo. Kasi, bato ya ndenge na ndenge oyo bazalaki koluka solo bamoni ete losambo ezali te eloko moto na moto akoki kosalela yango ndenge ye moko alingi. Ezali kaka Mozalisi ya biloko nyonso, Yehova, nde azali Nzambe oyo ebongi ete tósambela. (Emoniseli 4:11) Azali Nzambe ya solo, mpe azali na lotomo ya koloba ndenge nini tosengeli kosambela ye.

Yehova azali koyebisa biso makambo na nzela ya Liloba na ye, Biblia, mpo asalisa biso tóyeba malamumalamu nini ye alingi biso tósala. Tokoki koloba ete lelo oyo na mabele mobimba moto nyonso akoki kozala na Biblia mobimba to ndambo na yango. Lisusu, Mwana ya Nzambe alobaki ete: “Soko bino bokoumela kati na liloba na ngai . . . bokoyeba solo.” (Yoane 8:31, 32) Elingi koloba ete bato bakoki koyeba solo. Bamilio ya bato ya motema sembo bauti na mangomba ndenge na ndenge bazali koyamba solo yango mpe bazali kosangana na kati ya losambo ya solo.​—Matai 28:19, 20; Emoniseli 7:9, 10.

Bomoko na mokili mobimba na eleko na biso

Esakweli moko kitoko ya Biblia oyo ezali na kati ya mokanda ya Sefania ezali kolobela koyanganisama ya bato ya bikólo ndenge na ndenge. Elobi ete: “Boye, nakobongola maloba ya bato kino liloba ya pɛto, ete bango nyonso bábyanga nkombo ya [Yehova] mpe básalela ye na motema moko.” (Sefania 3:9) Oyo nde likambo kitoko oyo ezali kolakisa bato oyo babongwani mpe bazali kosalela Nzambe na bomoko!

Likambo yango esengelaki kosalema ntango nini? Sefania 3:8 elobi: “Boye, [Yehova] alobi ete, Zilá ngai, mpo na mokolo wana ekotɛlɛma ngai lokola motatoli. Mpo ete mokano na ngai ezali ya koyanganisa mabota ete nayeisa makonzi elongo, mpo na kosopa nkɛlɛ na ngai likoló na bango, ɛɛ, moto nyonso na nkanda na ngai; zambi na mɔ́tɔ ya nkɛlɛ na ngai na zuwa mokili mobimba ekozikisama.” Ntango Yehova azali koyanganisa mabota, kasi liboso asopa nkanda na ye makasi likoló na bango, azali kobongola monɔkɔ ya bato ya komikitisa ete ekóma monɔkɔ ya pɛto. Lelo oyo, tozali nde na ntango yango mpamba te koyanganisama ya mabota nyonso na etumba ya mokolo monene ya Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso na Armagedon esili kobanda kosalema.​—Emoniseli 16:14, 16.

Mpo bato na ye bázala liboke moko, Yehova azali kopesa bango monɔkɔ ya pɛto. Monɔkɔ wana ya sika elimboli makambo mingi, moko na yango ezali kososola malamumalamu solo ya Biblia na oyo etali Nzambe mpe mikano na ye. Koloba monɔkɔ ya pɛto elimboli mpe kondimela solo yango, koteya yango epai ya bato mosusu, mpe kolanda mibeko mpe mitinda ya Nzambe. Ezali kosɛnga koboya bokabwani mpo na makambo ya politiki mpe kolongola moimi na kati ya mitema na biso, lokola kokabola mposo mpe kolinga mingi ekólo na yo, oyo ezali bizaleli ya bato ya mokili. (Yoane 17:14; Misala 10:34, 35) Bato nyonso ya motema sembo oyo balingaka solo bakoki koyekola monɔkɔ yango. Tótala ndenge bato mitano oyo tolobelaki na lisolo oyo eleki​—oyo liboso bakabwanaki na losambo​—sikoyo basangani na losambo ya Nzambe kaka moko ya solo, Yehova.

Basangani na kati ya losambo ya solo

Ntango Fidelia, Mokatolike wana ya molende, asombelaki mwana na ye ya mwasi Biblia mpo na badevuare na ye ya kelasi, atunaki sango alimbolela ye na kati ya Biblia yango soki nini ekómelaki bana na ye mitano oyo bakufaki. Fidelia alobi: “Mposa na ngai ekokanaki te!” Bongo ntango Batatoli ya Yehova bayaki kotala ye, atunaki bango kaka motuna wana. Ntango atángaki na kati ya Biblia na ye soki bato bakufá bazali mpenza wapi, amonaki ete bakosaki ye na lingomba na ye. Batatoli bayebisaki ye ete bato bakufá bayebi eloko moko te mpe bazali konyokwama na kati ya epongelo te to na esika mosusu. (Nzembo 146:4; Emoniseli 9:5) Fidelia abwakaki bikeko na ye nyonso ya losambo, alongwaki na lingomba mpe abandaki koyekola Biblia. (1 Yoane 5:21) Akokisi sikoyo mbula zomi, azali na esengo ya koteya mateya ya solo ya Makomami epai ya bato mosusu.

Tara alongwaki na mboka na ye Kathmandou mpe akendaki na mboka oyo batempelo ya Bahindu ezali mingi te. Yango wana, akendeki na ndako-nzambe moko ya Bametodiste, atyaki motema ete kuna nde akokokisa bamposa na ye na elimo. Kasi azwaki eyano na mituna na ye te mpo na ntina ya bampasi. Na nsima, Batatoli ya Yehova bayaki kokutana na ye mpe bayebisaki ye ayekola Biblia elongo na bango. Tara alobi boye: “Nayaki koyeba ete mpasi nyonso oyo ezali na mokili ekoki te kouta epai ya Nzambe ya bolingo . . . Nasepelaki na elikya ya komona mokili ya sika ya kimya mpe ya mobulu te.” (Emoniseli 21:3, 4) Tara abwakaki bikeko na ye ya Bahindu, atikaki kosala makambo ya losambo oyo basalaka na mboka na ye, mpe azwaki bolamu ya solosolo na ndenge akómaki Motatoli ya Yehova mpe abandaki kosalisa bato mosusu bákokisa bamposa na bango ya elimo.

Panya, moto ya lingomba ya Boudda azalaki koyebisa bato makambo ekoya ntango Batatoli ya Yehova bakutanaki na ye mpo na mbala ya liboso na Bangkok. Yango wana, bisakweli ya Biblia esepelisaki ye mingi. Alobi boye: “Ntango bayebisaki ngai mpo na nini makambo ya lelo ekeseni na oyo Mozalisi akanaki na ebandeli mpe nini oyo asalaki mpo na kolongola mpasi oyo bato baboyaki ye mpe baboyaki bokonzi na ye bakɔtisaki awa na mokili, ezalaki lokola nde balongoli ngai elamba moko oyo ezalaki kozipa ngai miso. Nsango ya Biblia ezalaki na bongolabongola ata moke te. Nakómaki kolinga Yehova lokola moto ya solo mpenza; yango epusaki ngai nasalela makambo oyo nayebaki ete ezali sembo. Nazalaki na mposa makasi ya kosalisa bato bámona bokeseni oyo ezali na kati ya mayele ya bato mpe mayele ya Nzambe. Mayele ya solosolo ebongoli ngai mpenza.”

Nsukansuka, Virgil akómaki komituna mituna mingi mpo na mateya ya mangomba. Na esika asambela Nzambe ete alakisa ye ndenge oyo akoki kosalisa baindo mpe asalisa lingomba na bango ya koponapona loposo oyo ye amonaki ete ezalaki kopusa bato báyina mindele, asɛngaki Nzambe alakisa ye solo, ata soki solo ezalaki ndenge nini to esika nini. Virgil alobi: “Nsima ya kosambela Nzambe makasi, mokolo oyo elandaki, ntango nalamukaki , namonaki Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na ndako. . . . Ekoki kozala ete moto moko akɔtisaki yango na nse ya ekuke.” Eumelaki te, abandaki koyekola Biblia mingi elongo na Batatoli ya Yehova. Abakisi: “Ezalaki mbala ya liboso na bomoi na ngai nayoká esengo boye. . . . Elikya ebandaki kobotama na motema na ngai.” Eumelaki te, Virgil asanganaki na baoyo bapesaka bato elikya kaka moko oyo ezali na kati ya Liloba ya Nzambe, Biblia.

Charo, moto ya Amerika ya Sudi, akamwaki ntango Motatoli moko nkombo na ye Gladys amonaki ye azali komitungisa mingi mpo na mwana na ye ya moke mpe abandaki komema ye na zando. Na nsima, Gladys ayebisaki Charo ayekolisa ye Biblia na ndako, Charo andimaki. Ntango Charo atángaki na kati ya Biblia na ye moko ete bato malamu nyonso te nde bakokende na likoló kasi ete Yehova akopesa mpe bato bomoi ya seko awa na mabele, akamwaki mingi. (Nzembo 37:11, 29) Charo ye moko abandaki kosakola elikya yango epai ya bato mosusu eleki sikoyo mbula 15.

Kanisá soki mokili mobimba etondi na bato ya sembo oyo basangani na kati ya losambo ya Yehova, Nzambe kaka moko ya solo! Wana ezali makanisi mpamba te. Ezali likambo oyo Yehova alaki. Na nzela ya mosakoli na ye Sefania, Nzambe alobaki ete: “Nakotika kati na yo bato batutami mpe basɔkɛmi; bakotalela nkombo na [Yehova]; . . . Bakosala mabe te, bakoloba [lokuta] te; kati na monɔkɔ na bango lolemo na bokosi ekozwama te. Zambi bakolya mpe bakolala na nse, moko akobangisa bango te.” (Sefania 3:12, 13) Soki elaka wana esepelisi yo, talelá na likebi nyonso elendiseli oyo ya Biblia: “Bóluka [Yehova], bino basɔkɛmi nyonso ya mokili, baoyo bakosalaka malako na ye; bóluka boyengebene, bóluka bopɔlɔ, soko nde bokobombama na mokolo ya nkanda ya [Yehova].”​—Sefania 2:3.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto