Eloko nini ekoki mpenza kosangisa bato?
ATA soki ozali moto ya lingomba nini, na ntembe te ondimaka ete na kati ya mangomba nyonso, tokokuta bato oyo balingaka solo. Ata na kati ya Lingomba ya Hindu, ya Katolike, ya Bayuda, mpe na kati ya mangomba mosusu tokoki kokuta bato oyo balingi mpenza solo mpe bazali koluka yango. Kasi, tozali komona lokola ete mangomba ezali nde kokabola bato. Bato mosusu kutu basalaka makambo ya mabe na nkombo ya mangomba. Ekoki mpenza kosalema ete mokolo mosusu bato ya mitema sembo ya mangomba nyonso, oyo balingaka makambo ya malamu mpe ya solo, bázala liboke moko? Bakoki mpenza kosangana bango nyonso esika moko mpo na mokano moko?
Ezali mpenza mawa komona ete mangomba ezali se kokabola bato! Tótalela mwa makambo yango. Bahindu bazali kobundisa Babudiste na ekólo Sri Lanka. Baprotesta, Bakatolike mpe Bayuda batangisi makila mingi na bitumba ndenge na ndenge. “Baklisto” bazali kobundisa Bamizilma na Bosnie, na Tchétchénie, na Indonésie mpe na Kosovo. Na sanza ya Marsi 2000, likambo etali mangomba nde ebimisaki bitumba oyo eumelaki mikolo mibale mpe ebomaki bato 300 na Nigeria. Ya solo, koyinana mpo na mangomba nde engalisaki bitumba nyonso oyo tolobeli awa.
Mbala mingi ebele ya bato ya mitema sembo bazali kolɛmba nzoto mpo na makambo ya mabe oyo esalemaka na nkombo ya mangomba. Na ndakisa, bandimi mingi basepelaka te ndenge mangomba mosusu esalaki eloko te epai ya bakonzi ya mangomba oyo basalaki makambo mabe lokola kosangisa nzoto na bana mike. Bandimi mosusu bamitunaka mpo na nini na mangomba ya boklisto, bato nyonso bazalaka na likanisi moko te na likambo etali kosangisa nzoto mibali na mibali mpe kolongola zemi. Emonani polele ete mangomba esangisi bato liboke moko te. Kasi, ndenge bandakisa elandi ekomonisa yango, na kati ya mangomba mingi ezali mpe na bato oyo balingaka mpenza makambo ya solo na motema na bango.
Bazalaki na mposa ya mateya ya solo
Fidelia azalaki mondimi ya sembo mpe ya molende na Lingomba ya Katolike, azalaki kosambela na ndako-nzambe ya San Francisco na engumba La Paz, na Bolivie. Azalaki kofukamela ekeko ya Malia mpe azalaki kopelisa babuji ya ntalo mingi liboso ya ekulusu. Pɔsɔ nyonso azalaki kopesa sango ebele ya biloko ya kolya mpo na kokabolela babola. Kasi, bana ya Fidelia mitano bakufaki liboso ete bázwa batisimo. Ntango sango ayebisaki ye ete bana wana nyonso bazali konyokwama na kati ya molili ya epongelo, Fidelia amitunaki boye: ‘Soki Nzambe azali malamu, mpo na nini bongo?’
Tara azali monganga, akolá na libota ya Bahindu na engumba Kathmandou, na ekólo Népal. Azalaki kosambela banzambe na ye na kati ya batempelo ya Bahindu mpe azalaki na bikeko na ndako na ye, na kolanda ndenge ya bonkɔkɔ na bango. Kasi mituna lokola oyo ezalaki kotungisa ye mingi: Mpo na nini bato bazali konyokwama mingi? Mpo na nini bato bakufaka? Biyano oyo lingomba na ye epesaki ye esepelisaki ye te.
Panya abɔkwamaki na Lingomba ya Bouddha, ndako na bango ezalaki pembeni ya mai moko ya engumba Bangkok, na ekólo Thaïlande. Bateyaki ye ete moto anyokwamaka mpo na mabe oyo asalá na bomoi oyo azalaki na yango liboso mpe mpo monyoko wana esila, esengeli koboya bamposa nyonso. Lokola Budiste nyonso alandaka mpenza makambo ya lingomba, bateyaki ye ete apesaka limemya na mayele ya basango oyo balataka bazambala ya langi ya mosaka, oyo bazalaki koya na ndako na bango na ntɔngɔntɔngɔ mpo na kosɛnga makabo. Azalaki komanyola na boumeli ya ntango molai mpe azalaki kosomba bikeko ya Bouddha kokanisaka ete bikeko yango ekobatela ye. Nsima ya likama oyo ekómisaki ye paralize banda na loketo tii na makolo, Panya abandaki kokende na monastɛrɛ ya Babudiste, azalaki kotya mpenza motema ete bakosala likamwisi mpe akobika. Kasi abikaki te mpe angɛngisamaki te na elimo. Kutu, akɔtaki na losambo ya bilumu mabe mpe amipesaki na yango.
Virgil abotamaki na États-Unis mpe akɔtaki na lingomba ya bamizilma ya baindo na kelasi. Azalaki na molende mpo na kokabola mikanda ya lingomba yango, mikanda oyo ezalaki koloba ete mondele azali Zabolo. Bazalaki kokanisa ete yango wana mindele bazalaki konyokola mingi baindo. Atako azalaki kondima makambo wana na motema na ye mpenza, mituna oyo ezalaki kotungisa ye: Ndenge nini mindele nyonso bázala bato mabe? Mpo na nini, na mateya na bango, bazalaki kolobela mingi kaka makambo etali mbongo?
Atako Charo akolaki na Amerika ya Sudi epai bato mingi bazali na Lingomba ya Katolike, ye azalaki na ye mondimi ya molende na Lingomba ya Protesta. Azalaki kosepela ete azalaki kosambela bikeko te, ndenge oyo bato mingi bazalaki kosala. Charo azalaki kosepela kokende na ndako-nzambe mikolo nyonso ya lomingo mpo bazalaki kosambela na loyenge makasi, bazalaki koganga “Aleluya!” koyemba banzembo mpe kobina. Charo andimaki mpenza na motema na ye ete abikisamaki mpe abotamaki lisusu. Azalaki kopesa dime na lingomba, mpe soki moteyi na televizyo oyo azalaki kolinga mingi asɛngi makabo, azalaki kotindela ye mbongo mpo na kosalisa bana mike na Afrika. Ntango atunaki pastɛrɛ mpo na nini Nzambe ya bolingo anyokolaka milimo na kati ya lifelo, amonaki ete pastɛrɛ azalaki na eyano ya malonga ya kopesa ye te. Na nsima, ayaki mpe koyeba ete makabo oyo azalaki kopesa ezalaki kokende epai ya bana ya Afrika te.
Atako bato mitano nyonso oyo tolobeli bazali bato ya bikólo mpe ya mangomba ekeseni, kasi ezali na eloko oyo ezalaki epai ya mokomoko na bango ezali ete balingaki solo mpe balukaki na bosembo nyonso kozwa biyano ya solosolo na mituna na bango. Kasi, bakokaki mpenza kosangana na losambo moko ya solo? Lisolo oyo elandi ekoyanola na motuna wana.
[Elilingi na lokasa 4]
Bato ya bikólo mpe mangomba ndenge na ndenge bakoki nde kozala na bomoko?
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]
G.P.O., Jérusalem