Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 15/1 nk. 9-14
  • “Bókɛngɛlaka”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Bókɛngɛlaka”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ndakisa oyo ezali kokebisa
  • Baboyaki koyoka basakoli ya Nzambe
  • Ndakisa oyo emonisi ntina ya kokɛngɛla
  • Makambo motoba oyo ezali kondimisa biso
  • Makambo nini ezali liboso?
  • Kobá kozela!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Yehova akoumela te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mokanda ya Biblia nimero 35—Habakuku
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Bato mabe bakoumela lisusu ntango boni?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 15/1 nk. 9-14

“Bókɛngɛlaka”

“Boye, [bókɛngɛlaka, NW] mpo ete boyebi te soko Nkolo na bino akoya mokolo nini.”​—MATAI 24:42.

1. Basaleli ya Yehova oyo baumeli bakanisaka nini mpo na bambula nyonso oyo balekisi na kosalela Yehova? Pesá ndakisa moko.

BATO mingi oyo bazali kosalela Yehova banda kala bayekolaki mateya ya solo ntango bazalaki naino bilenge. Lokola motɛkisi oyo amonaki mangaliti ya motuya mingi mpe atɛkaki biloko nyonso oyo azalaki na yango mpo na kosomba yango, bayekoli wana ya Biblia batikaki kolanda makambo ya bango moko mpe bamipesaki na Yehova. (Matai 13:45, 46; Malako 8:34) Bamonaka ndenge nini soki batali ete bazeli mingi koleka ndenge oyo bakanisaki mpo bámona ndenge Nzambe akokokisa mikano na ye awa na mabelé? Epesaka bango mawa te! Bakanisaka lokola Ndeko Alexander Macmillan, ye oyo, nsima ya kolekisa soki mbula 60 na mosala ya Nzambe, alobaki boye: “Mokano na ngai ya kotikala na kondima eyei lisusu makasi. Yango esali ete bomoi na ngai ezala na ntina. Ezali kosalisa ngai mpo nabanga te mikolo oyo ezali koya.”

2. (a) Toli nini Yesu apesaki na bayekoli na ye na ntango oyo ebongi mpenza? (b) Na lisolo oyo tokoluka kozwa biyano na mituna nini?

2 Ezali boni mpo na yo? Ozala elenge to mokóló, talelá malamu maloba oyo ya Yesu: “[Bókɛngɛlaka, NW] mpo ete boyebi te soko Nkolo na bino akoya mokolo nini.” (Matai 24:42) Mwa maloba moke wana elobi mingi, ezali na solo ya ntina mpenza. Toyebi te mokolo nini Nkolo akoya mpo na kopesa mokili mabe oyo etumbu; ezali mpe na ntina te tóyeba yango. Kasi, tosengeli komitambwisa na ndenge oyo ete, aya lelo, aya lobi, biso tózala na mawa te ntango akoya. Mpo na yango, bandakisa nini ezali na Biblia oyo ezali kosalisa biso tókɛngɛlaka? Ndenge nini Yesu alimbolaki ntina ya kokɛngɛla? Makambo nini ezali komonisa biso lelo oyo ete mokili mabe oyo ekómi na nsuka na yango?

Ndakisa oyo ezali kokebisa

3. Ndenge nini bato mingi lelo oyo bazali lokola bato ya ntango ya Noa?

3 Na makambo mingi lelo oyo, bato bazali lokola bato ya ntango ya Noa. Na ntango ya Noa, mobulu ekómaki mingi na mokili, mpe mposa ya motema ya moto ezalaki “bobele epai na mabe mikolo nyonso.” (Genese 6:5) Bato mingi bamipesaki na misala na bango ya mokolo na mokolo. Kasi, liboso Yehova atinda Mpela monene, atikelaki bato ntango mpo bábongola mitema. Atindaki Noa asakola mpe Noa atosaki, asalaki lokola “mosakoli ya boyengebene” mbula soki 40 to 50 to mpe koleka. (2 Petelo 2:5) Kasi, bato bazalaki matoi mangbongi mpe baboyaki koyoka makambo oyo azalaki koyebisa bango. Bazalaki kokɛngɛla te. Yango wana, na nsuka, kaka Noa na libota na ye nde babikaki ntango Nzambe apesaki etumbu.​—Matai 24:37-39.

4. Mpo na nini tokoki koloba ete mosala ya kosakola oyo Noa asalaki ezalaki na ntina; tokoki mpe koloba bongo mpo na mosala na yo ya kosakola?

4 Noa asalaki mpenza mosala ya ntina? Tótala te bato boni oyo bandimaki ye. Mosala ya kosakola oyo Noa asalaki ekokisaki mpenza mokano na yango atako bato moke kaka bayokaki ye. Tolobi bongo mpamba te mosala ya Noa epesaki bato libaku ya kopona soki balingi kosalela Yehova to te. Sikoyo, okoki koloba boni mpo na teritware na yo? Ata soki bato bayokaka mpenza te, yebá ete ozali kosala mosala ya ntina. Tolobi boye mpamba te ntango ozali kosakola, ozali nde koloba na esika ya Nzambe mpo na kokebisa bato, mpe ozali kokokisa mosala oyo Yesu apesaki bayekoli na ye.​—Matai 24:14; 28:19, 20.

Baboyaki koyoka basakoli ya Nzambe

5. (a) Na ntango ya Habakuku, makambo nini ezalaki kosalema mingi na mboka Yuda, mpe ndenge nini bato bayambaki nsango oyo azalaki kosakola? (b) Ndenge nini bato ya Yuda bamonisaki ete balingaki basakoli ya Yehova ata moke te?

5 Bambula mingi nsima ya Mpela, bokonzi ya Yuda ekómaki na makambo mabe mingi. Makambo lokola losambo ya bikeko, kozanga bosembo, konyokola bato, ata mpe kobomana ekómaki kosalema mingi. Yehova atindaki Habakuku akebisa bato ete soki babongoli motema te, Bakaladi, to bato ya Babilone bakobebisa mboka na bango. (Habakuku 1:5-7) Kasi bato baboyaki koyoka. Mbala mosusu bazalaki koloba boye na mitema na bango: ‘Esali sikoyo mbula koleka monkama, mosakoli Yisaya azalaki mpe kaka koloba boye, kasi eloko moko esalemaki te!’ (Yisaya 39:6, 7) Bakonzi ya Yuda mingi baboyaki koyokela bamemi-nsango, mpe lisusu bazalaki kolinga bango ata moke te. Mokolo moko kutu balingaki báboma mosakoli Yilimia, mpe soki Ahikama azalaki wana te mpo na kobikisa ye, mbɛlɛ babomaki ye mpenza. Ntango Mokonzi Yoyakimi ayokaki nsango mosusu, epesaki ye nkanda mpe abomisaki mosakoli Uliya.​—Yilimia 26:21-24.

6. Ndenge nini Yehova alendisaki Habakuku?

6 Habakuku mpe asakolaki na mpiko, mpe bato basepelaki na nsango yango te, se ndenge basepelaki na nsango ya Yilimia te, moto oyo elimo ya Nzambe etindaki asakola ete Yuda ekobebisama mpe ekotikala mokili mpamba na boumeli ya mbula 70. (Yilimia 25:8-11) Yango wana, tokoki mpenza kokanga ntina oyo Habakuku ayokaki mawa mpe amilelaki na maloba oyo: “Ɛ [Yehova] kino ntango nini nakobyanga mpe okoyoka te? Nakongangela yo ete, Mobulu! Nde okobikisa te.” (Habakuku 1:2) Yehova apesaki Habakuku eyano na boboto nyonso mpe asalelaki maloba oyo ezali kolendisa kondima. Alobaki boye: “Emonaneli ezali bobele mpo na ntango ebongisami, ekómi noki epai na nsuka, ekozanga te; ata ezali koumela, [zelá] yango; ekoya solo mpenza, ekoumela mingi te.” (Habakuku 2:3) Maloba yango emonisi biso ete Yehova azalaki na “ntango ebongisami” mpo na kosukisa kozanga bosembo mpe monyoko. Ata soki Habakuku amonaki lokola nde makambo ezali koumela, asengelaki kolɛmba nzoto te to mpe kozonga nsima te. Kasi asengelaki nde ‘kozela,’ komona mokolo na mokolo ete nsuka ekoya lobi. Mokolo ya Yehova ekoya na ntango oyo esengelaki mpenza!

7. Mpo na nini Yelusaleme esengelaki kobomama lisusu na ekeke ya liboso T.B.?

7 Banda ntango Yehova alobaki na Habakuku tii ntango babomaki Yelusaleme, mboka-mokonzi ya Yuda, elekaki mbula soki 20. Na nsima, batongaki yango lisusu, mpe makambo mingi oyo ezalaki kopesa Habakuku mpasi na motema esilaki. Kasi, na ekeke ya liboso T.B., mboka yango ekómaki lisusu mboka ya koboma mpamba te, bato oyo bazalaki kofanda na mboka yango bazalaki lisusu sembo te. Na motema mawa na ye, Yehova abongisaki ndenge ya kobikisa bato ya sembo. Na mbala oyo, asalelaki mosakoli oyo aleki basakoli nyonso, elingi koloba Yesu Klisto, mpo na komemela bato yango nsango na ye. Na mobu 33 T.B., Yesu ayebisaki bayekoli na ye boye: “Soko bokomona Yelusaleme kozingama na bibele na basoda, bóyeba na ntango yango ete libebisi na yango esili kobɛlɛma. Na ntango yango bango na kati na Yuda bákima kuna na ngomba.”​—Luka 21:20, 21.

8. (a) Lokola ntango eumelaki mingi nsima ya liwa ya Yesu, ekoki kozala ete baklisto mosusu bakómaki na makanisi nini? (b) Ndenge nini makambo oyo Yesu asakolaki mpo na Yelusaleme ekokisamaki?

8 Nsima ya bambula mingi, ekoki kozala ete baklisto mosusu oyo bazalaki na Yelusaleme bakómaki komituna soki mpenza esakweli ya Yesu ekokokisama. Mpamba te, kanisá makambo nyonso oyo bamosusu kati na bango batikaki. Mbala mosusu, lokola balingaki ete bákɛngɛlaka ntango nyonso, baboyaki komikɔtisa na mombongo mosusu oyo emonanaki malamu. Kasi na nsima balɛmbaki? Bakómaki nde kokanisa ete bazalaki kolekisa ntango na bango mpamba, ete esakweli ya Yesu ekokokisama ntango oyo bango bakozala lisusu na bomoi te? Na mobu 66 T.B. maloba ya Yesu ebandaki kokokisama ntango basoda ya Loma bazingelaki Yelusaleme. Baoyo bazalaki kokɛngɛla ntango nyonso bamonaki ete yango nde elembo, bakimaki mboka yango mpe babikaki ntango basoda babomaki Yelusaleme.

Ndakisa oyo emonisi ntina ya kokɛngɛla

9, 10. (a) Lobelá na mokuse lisese ya baombo oyo bazalaki kozela nkolo na bango oyo akendaki kobala. (b) Mpo na nini ezalaki mpasi mpo na baombo wana kozela nkolo na bango? (c) Mpo na nini ezalaki malamu ete baombo bázala na motema molai?

9 Mpo na komonisa ntina ya kokɛngɛla, Yesu akokanisaki bayekoli na ye na baombo oyo bazali kozela nkolo na bango oyo akendaki kobala. Bayebaki ete akozonga mokolo moko na butu, kasi bayebaki ngonga te. Bayebaki te soki akoya na kokɛngɛla ya liboso na butu, soki na kokɛngɛla ya mibale na butu, to ya misato. Yesu alobaki ete: “Esengo na bango, soko [Nkolo] akómi na kokɛngɛla ya mibale na butu, ata soki na oyo ya misato, mpe akuti bango bongo [bazali kokɛngɛla]!” (Luka 12:35-38, NW) Baombo bazalaki mitema likoló. Mwa makɛlɛlɛ nyonso, mwa elili nyonso oyo eningani, ezalaki kobɛtisa bango motema: ‘Mbala mosusu nkolo na biso ayei!’

10 Bongo soki nkolo akómaki na kokɛngɛla ya mibale, elingi koloba banda ngonga ya libwa ya butu tii na midi ya butu? Baombo nyonso, na baoyo basalaki mosala makasi banda ntɔngɔntɔngɔ, balingaki kozala wana mpo na koyamba ye, to bamosusu balingaki kozala na mpɔngi? Bongo soki nkolo azongaki na kokɛngɛla ya misato, elingi koloba banda na midi ya butu tii na ngonga ya misato na ntɔngɔ? Baombo mosusu balingaki kolɛmba, to kosilika mpo bamoni lokola nde nkolo na bango aumeli?a Kaka baoyo akutaki bango bazali kokɛngɛla nde asengelaki koyebisa bango ete bazali bato ya esengo. Maloba ya Masese 13:12 esengelaki kokokisama epai na bango ete: “Elikya oyo ezilisami epesi motema mpasi, nde mposa oyo esukisami ezali lokola nzete na bomoi.”

11. Ndenge nini libondeli ekoki kosalisa biso mpo tókɛngɛlaka?

11 Soki emonani lokola nde Yesu azali koumela, eloko nini ekosalisa bayekoli na ye mpo bákɛngɛlaka? Ntango bazalaki na elanga ya Getesemane, mwa moke liboso bákanga ye, Yesu alobaki na bayekoli na ye misato ete: “Bókɛngɛlaka mpe bóbondelaka ete [bókɔta] na komekama te.” (Matai 26:41) Bambula mingi na nsima, Petelo, moko na bayekoli yango misato, apesaki mpe baninga na ye baklisto toli wana. Akomaki boye: “Nsuka ya makambo nyonso [ekómi pene, NW]. Na bongo bózala na makanisi na sembo, bómisɛnzɛla mpo na mabondeli.” (1 Petelo 4:7) Tomoni mpenza ete moklisto mokomoko asengeli ntango nyonso kobondelaka makasi. Tosengeli ntango nyonso kosɛnga Yehova asalisa biso mpo tókɛngɛlaka.​—Baloma 12:12; 1 Batesaloniki 5:17.

12. Bokeseni nini ezali kati na koluka koyeba mokolo mpe kokɛngɛla?

12 Tóbosana te ete Petelo alobaki lisusu boye: “Nsuka ya makambo nyonso [ekómi pene, NW].” Etikalaki ntango boni? Moto moko te akokaki koyeba mokolo mpe ngonga. (Matai 24:36) Kasi koluka koyeba mokolo oyo nsuka ekoya mpe kozela mokolo oyo nsuka ekoya ezali makambo mibale ekeseni; Biblia ezali kolendisa biso te na koluka koyeba mokolo oyo nsuka ekoya, kasi ezali kolendisa biso nde tózela mokolo yango. (Talá 2 Timote 4:3, 4; Tito 3:9.) Lolenge nini tokoki kozela mokolo ya nsuka? Soki tozali kolanda malamumalamu makambo oyo ezali komonisa ete nsuka ekómi penepene. Sikoyo, tótalela makambo motoba oyo ezali komonisa ete mokili mabe oyo ekómi mpenza na nsuka.

Makambo motoba oyo ezali kondimisa biso

13. Ndenge nini maloba ya Paulo na 2 Timote mokapo 3 endimisi biso ete tozali na “mikolo ya nsuka”?

13 Ya liboso, tozali komona polele ndenge esakweli ya ntoma Paulo mpo na “mikolo ya nsuka” ezali kokokisama. Paulo akomaki ete: “Kasi ososola likambo oyo ete, na mokolo na nsuka, ntango na mpasi ekoya. Zambi bato bakozala bamikumisi na bango mpenza, baluki na mosolo, bato na lolendo, bato na ngambo, batuki, bato bazangi kokumisa baboti, bato bazangi matɔndi, bato bazangi bulɛɛ, bato bazangi bolingo, bazangi boboto, batɔngi, batomboki, bato na yauli, bayini na malamu, bakosi, bato na nko, bato bavimbi na lolendo, baoyo bakolingaka malamu na bango mpenza koleka bolingo epai na Nzambe, bato bazali na lolenge na kosambela nde bazali kowangana nguya na yango. Opɛngwa ndenge yango. Nde bato mabe mpe bakosi bakoleka na mabe, bakozimbisa mpe bakozimbisama.” (2 Timote 3:1-5, 13) Tozali komona mpenza ete esakweli yango ezali kokokisama na mikolo na biso, boye te? Ye oyo akondima likambo yango te, amonaka te!b

14. Ndenge nini Emoniseli 12:9 oyo elobeli Zabolo ezali kokokisama lelo oyo, mpe likambo nini ekosalema mosika te?

14 Ya mibale, tozali komona makambo oyo ezali kobima banda babwakaki Satana na bademo na ye awa na nse, lokola Emoniseli 12:9 elobi yango. Vɛrsɛ yango elobi boye: “Dalagona yango monene abwakami, ye nyoka na kalakala, oyo abyangami Motɛmɛli mpe Satana, mozimbisi na bato na mokili mobimba; abwakami na nse, baanzelu na ye mpe babwakami na ye elongo.” Likambo yango ememi nsuka ya bwale na mokili. Ya solo, banda 1914, bato bazali mpenza na bwale. Kasi esakweli ya Emoniseli elobi lisusu ete ntango babwaki Satana na nse, ayebi ete “azali na mwa elaka mokuse.” (Emoniseli 12:12) Na ntango yango, Satana azali kobundisa bayekoli bapakolami ya Klisto. (Emoniseli 12:17) Na ntembe te tozali komona makambo oyo etumba yango ezali kobimisa.c Kasi, etikali moke bábwaka Satana na libulu mozindo mpo “azimbisa mabota lisusu te.”​—Emoniseli 20:1-3.

15. Ndenge nini Emoniseli 17:9-11 ezali komonisa ete tozali na mikolo ya nsuka?

15 Ya misato, tozali na eleko oyo “mokonzi” ya mwambe mpe ya nsuka oyo alobelami na esakweli ya Emoniseli 17:9-11 azali koyangela. Na vɛrsɛ yango, ntoma Yoane alobeli bakonzi nsambo oyo bazali elilingi ya bikólo oyo mokomoko elekaki bikólo mosusu nyonso ya mokili na makasi, mokomoko na eleko na yango: Ezipito, Asulia, Babilone, Bamede na Baperse, Grèce, Loma, mpe Angleterre na États-Unis. Yoane amoni mpe mokonzi “ya mwambe” oyo auti “na bango nsambo.” Mokonzi ya mwambe, mokonzi ya nsuka oyo Yoane amonaki, ezali nde ONU. Yoane alobi ete mokonzi yango ya mwambe ‘akei kino libebi.’ Nsima na ye, balobeli mokonzi mosusu te.d

16. Ndenge nini makambo oyo etali ekeko oyo Nebukadanesala alɔtaki ezali komonisa ete tozali na mikolo ya nsuka?

16 Ya minei, tozali sikoyo na ntango oyo emonisamaki na makolo ya ekeko oyo Nebukadanesala amonaki na ndɔtɔ. Mosakoli Danyele alimbolaki ndɔtɔ yango ya kokamwa. Na ndɔtɔ yango, mokonzi amonaki ekeko moko oyo ezalaki lokola moto. (Danyele 2:36-43) Biteni minei ya ekeko yango ezali elilingi ya bikólo oyo elekaki makasi na mokili mobimba, banda na motó (Bokonzi ya Babilone) tii na makolo mpe misapi (baguvɛrnɛma oyo ezali lelo oyo). Ekeko yango emonisaki bikólo nyonso oyo elekaki makasi na mokili mobimba. Sikoyo tozali na ntango oyo emonisami na makolo ya ekeko yango. Balobeli ekólo mosusu ya makasi te oyo ekoya nsima na yango.e

17. Ndenge nini mosala na biso ya kosakola ezali komonisa ete tozali na mikolo ya nsuka?

17 Ya mitano, tozali komona ete nsango malamu ezali kosakolama na mokili mobimba, mosala oyo Yesu alobaki ete ekosalema liboso mpenza nsuka ya mokili oyo eya. Yesu alobaki boye: “Nsango Malamu oyo na Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso, mpe bongo nsuka ekoya.” (Matai 24:14) Lelo oyo, maloba yango ezali kokokisama na ndenge oyo emonaná naino te. Ya solo, ezali na bisika oyo bato bayoki naino nsango malamu te, mpe ekoki kozala ete na ntango oyo Yehova ye moko akolinga, nzela ekofungwama mpo na kosakola kuna. (1 Bakolinti 16:9) Atako bongo, Biblia elobi te ete Yehova akozela tii moto mokomoko na mokili mobimba ayoka nsango. Kasi, nsango malamu ekosakolama na ndenge oyo Yehova akolinga. Na nsima nde nsuka ekoya.​—Talá Matai 10:23.

18. Likambo nini tokanisi ete ekosalema mpo na bapakolami mosusu ntango bolɔzi monene ekobanda, mpe ndenge nini toyebi yango?

18 Ya motoba, bayekoli ya Klisto oyo bapakolami na elimo bazali lisusu mingi te, atako bamosusu kati na bango bakozala naino awa na mokili ntango bolɔzi monene ekobanda. Batikali bapakolami mingi bakómi mpenza mibange, mpe ndenge bambula ezali koleka, baoyo bazali mpenza bapakolami bazali kosila. Kasi, Yesu alobaki mpo na bolɔzi monene ete: “Soko mikolo yango iyei mikuse te mbɛlɛ moto moko akobika te. Nde mpo na Baponami, mikolo yango ikoya mikuse.” (Matai 24:21, 22) Yango emonisi mpenza ete “baponami” mosusu bakozala awa na mokili ntango bolɔzi monene ekobanda.f

Makambo nini ezali liboso?

19, 20. Mpo na nini tolobi ete tokómi mpenza na ntango oyo tosengeli kolala mpɔngi te kasi kokɛngɛla mpenza?

19 Makambo nini tokomona na mikolo oyo ekoya? Makambo minene ezali koya. Paulo alobaki ete: “Mokolo ya Nkolo ekoya lokola moyibi kati na butu.” Mpo na baoyo bazali komonana lokola bato ya mayele na mokili, alobi ete: “Ekolobaka bato ete, Kimya ezali, makambo mazali te, wana libebi ekokwela bango pwasa.” Yango wana, Paulo akebisaki bato oyo akomelaki mokanda ete: “Tiká te ete tólala mpɔngi, [lokola] ekosalaka bamosusu, kasi tólamuka mpe tólangwa masanga te.” (1 Batesaloniki 5:2, 3, 6) Baoyo bazali kotya motema ete bibongiseli ya bato ekotya kimya, bazali komikosa. Bato yango bazali na mpɔngi!

20 Mokili oyo ekobomama na mbalakaka mpenza. Yango wana, tózela ntango nyonso mokolo ya Yehova. Nzambe ayebisaki Habakuku ete: “Ekoumela mingi te”! Ya solo, tokómi na ntango oyo esengeli mpenza tókɛngɛla makasi.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Nkolo ayebisaki baombo na ye likambo moko te. Yango wana, makambo na ye etalaki se ye moko, soki mpe emonanaki ete aumeli, moombo moko te akokaki kotuna ye.

b Mokanda Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko, na mokapo 11, elimboli esakweli yango na molai, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

c Mpo na koyeba likambo yango malamumalamu, talá mokanda Emoniseli: kokokana na yango monene ebelemi!, na nkasa 180-186, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

d Talá mokanda Emoniseli: kokokana na yango monene ebelemi!, nkasa 251-254

e Talá mokanda Tyá likebi na esakweli ya Danyele! mokapo 4. Ebimisami na Batatoli ya Yehova.

f Na lisese ya bampate na bantaba, Mwana na moto ayei na nkembo na ye na ntango ya bolɔzi monene mpe afandi mpo na kosambisa. Azali kopesa bato mbano to etumbu na kolanda soki basalisaki bandeko na ye bapakolami to te. Bakoki kosambisa bato na likambo wana te soki na ntango ya kosambisa, bandeko nyonso ya Klisto bazali lisusu na mokili te.—Matai 25:31-46.

Ozali koyeba lisusu?

• Biblia epesi bandakisa nini oyo ekoki kosalisa biso tókɛngɛlaka?

• Ndenge nini Yesu amonisaki ntina ya kokɛngɛla?

• Tángá makambo minene motoba oyo ezali kondimisa biso ete tokómi mpenza na mikolo ya nsuka.

[Bililingi na lokasa 9]

Alexander Macmillan asalelaki Yehova na bosembo pene na mbula ntuku motoba

[Elilingi na lokasa 10]

Yesu akokanisaki bayekoli na ye na baombo oyo bazali ntango nyonso kokɛngɛla

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto