Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 15/1 lok. 8
  • Balimboleli biso Mokanda ya Danyele!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Balimboleli biso Mokanda ya Danyele!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Masolo mosusu
  • Mokanda ya Danyele—ntina na yango mpo na yo
    Tyá likebi na esakweli ya Danyele!
  • Yehova alaki danyele mbano monene
    Tyá likebi na esakweli ya Danyele!
  • Nzambe amibanzabanzaka mpenza mpo na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Bamekamaki—kasi batikalaki sembo epai na Yehova!
    Tyá likebi na esakweli ya Danyele!
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 15/1 lok. 8

Balimboleli biso Mokanda ya Danyele!

BAYANGANI bazalaki na mposa mpenza ya kozwa mokanda ya sika oyo ebimaki na mayangani ya etúká. Ezali mwa mokanda ya nkasa 320 oyo motó ya likambo na yango elobi ete: Tyá likebi na esakweli ya Danyele! Bamonaki mokanda yango ndenge nini? Yoká oyo bamosusu balobaki.

“Lokola bilenge mingi, nasepelaka mpenza koyekola masolo ya kala te. Yango wana, ntango nazwaki mokanda Tyá likebi na esakweli ya Danyele! motema na ngai ezalaki mpenza mɔ́tɔmɔ́tɔ te mpo na kotánga yango; kasi, namekaki kotánga. Nzokande, nazalaki komikosa! Mokanda yango ezali moko ya mikanda oyo eleki kitoko na mikanda nyonso oyo natángá. Soki obandi kotánga yango, okolinga lisusu kotika te! Nazali lisusu koyoka te ete nazali kotánga lisolo moko ya kala. Nayebi sikoyo makambo Danyele akutanaki na yango. Na makanisi na ngai, nakoki sikoyo komona mpasi oyo moto ayokaka soki batindi ye na mboka mosusu, mosika na bandeko na ye, mpe mbala na mbala bazali kosala ye makambo ndenge na ndenge mpo atikala sembo te. Matɔndi mingi mpo na mokanda oyo.”—Anya.

“Likambo oyo esalisi ngai mingi ezali ya koyeba ete Yehova ayebaka malamu makambo oyo ekómelaka basaleli na ye. Na bimonaneli mpe bandɔtɔ ya Danyele mpe bandɔtɔ ya bato mosusu oyo alimbolaki, namoni polele ete Nzambe na biso akoki kotika nzela ata mokolo moko te ete makambo esalema ndenge mosusu na oyo ye akanaki. Likambo yango ezali kolendisa biso na kotya lisusu elikya makasi na makambo oyo Biblia elobi mpo na mokili ya sika oyo Nzambe akosala.”—Chester.

“Nasepeli mingi na ndenge oyo bokomi mokanda ya Danyele lokola nde makambo yango ezali kosalema lelo. Ndenge oyo bolimboli mitungisi mpe mabanzo ya Danyele esalisi ngai nayeba ye malamu. Sikoyo nakangi mpenza ntina oyo Yehova alobaki ete alingami mingi. Atako azalaki komekama mpe konyokwama, azalaki komitungisa mpo na makambo na ye moko te. Azalaki libosoliboso komibanzabanza mpo na Yehova mpe nkombo na Ye kitoko. Matɔndi mingi na ndenge bolimboli makambo yango.”—Joy.

“Tozalaki mpenza kozela mokanda ya boye! Liboso, tozalaki komona mpenza te ete mokanda ya Danyele etaleli mokomoko na biso. Na mpokwa ya mokolo oyo nazwaki mokanda yango ya sika, natángaki mwa ndambo na yango molai, na nsima, nakataki naino kotánga mpe nasalaki libondeli mpo na kopesa Yehova matɔndi.”—Mark.

“Tokanisaki te ete yango ekosalisa mpenza bana na biso. Mwana na biso moko azali na mbula mitano, mosusu azali na mbula misato. . . . Atako basepelaka mingi na masolo ya Danyele, Hanania, Misaele, mpe Azalia na Mokanda mpo na masolo ya Biblia, mokanda Esakweli ya Danyele esepelisi bango na ndenge oyo biso moko tokanisaki te. Atako bazali bana mike mpenza, tomonaki mpenza ete basepelaki na ndakisa ya bilenge yango ya sembo. Bazali mpenza bandakisa malamu mpo na bana na biso! Bopesi biso eloko malamu mpenza oyo tokosalela! Matɔndi mingi mpenza!”—Bethel.

“Namonaki lokola nde nazali elongo na bilenge Baebele wana ntango kondima na bango ezalaki komekama; mpe yango elendisaki ngai natalela kondima na ngai. Mwa etanda “Makambo nini okangi ntina?” ezali kosalisa moto asimba mokapo mobimba na motema. Matɔndi mingi lisusu mpo na mokanda ya sika oyo, ezali na ntina mingi.”—Lydia.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto