Mpo na nini ntango ezali moke?
NTANGO. Ekoki kozala mpasi mpo na kolimbola liloba yango malamumalamu, kasi toyebi ete tozalaka kaka na ntango mingi te. Toyebi mpe ete ntango elekaka nokinoki. Kutu, Mbala mingi tolobaka boye: “Ntango ezali koleka noki.”
Atako bongo, Austin Dobson, mokomi mpe moto ya Angleterre amikosaki te ntango alobaki boye na mobu 1877: “Olobi nini, ntango ezali koleka? Te! Ntango ezali kotikala, biso nde tozali koleka.” Banda Dobson akufá na 1921, eleki soki mbula 80; nzokande ntango ezalaka kaka.
Ntango ezali ebele
Biblia eyebisi biso boye mpo na Mozalisi ya moto: “Naino ngomba izalaki te mpe naino nse na mokili te, longwa bobele na liboso mpenza mpe lobiko na lobiko, yo ozali Nzambe.” (Nzembo 90:2) To ndenge Biblia mosusu (The New Jerusalem Bible) elobi yango, “seko na seko, ozali Nzambe.” Elingi koloba ete ntango ekosila te, ndenge moko mpe Nzambe azali libela na libela!
Nzokande bato bakeseni mpenza na Nzambe. Ye azali mpe akozala na ntango seko na seko. Kasi mpo na bato, Biblia elobi boye: “Zambi mikolo na biso nyonso izali kolimwa na nkanda na yo; tozali komona mbula na biso kosila [lokola] esili lisolo. Motuya na mbula na biso ezali ntuku nsambo, mpe soko mpo na makasi ikokóma na ntuku mwambe; nzombo na yango ezali bobele mpasi mpe bolɔzi, zambi ekosila noki mpe biso tokopumbwa.”—Nzembo 90:9, 10.
Mpo na nini lelo oyo bomoi ezali mpenza mokuse, nzokande Biblia elobi polele ete Nzambe azalaki na mokano ete moto azala na bomoi libela na libela? (Genese 1:27, 28; Nzembo 37:29) Na esika báumelaka seko na seko ndenge Nzambe akanaki, mpo na nini mikolo ya bomoi ya bato ekómaka ata 30 000 te? Mpo na nini bato bazalaka kaka na ntango moke? Nani to mpe nini ekɔtisaki likambo mabe boye? Biblia epesi biyano ya polele mpe oyo ezali kosepelisa.a
Ntango ezali se kokóma moke
Mibange bakoki kotya ntembe te ete na bambula oyo makambo ya kosala ekómi ebele mpe ezali kosɛnga kosala yango mbangumbangu. Mopanzi-nsango Sybille Fritsch alobaki ete na mbula 200 oyo eleki, moto azalaki kolekisa ngonga 80 na mosala na pɔsɔ moko, lelo oyo ekiti tii na ngonga 38, “kasi tozali kaka kolelalela.” Abakisaki boye: “Ntango ezali moke; ntango ezali na motuya mingi; tozali na mposa ya ntango ndenge tozali na mposa ya mpema; makambo ekómi kosalema mbangumbangu.”
Bato ya siansi bazali kobimisa biloko ya sika oyo ememeli bato makambo oyo bato ya kala bakanisaki ata moke te. Kasi, ntango makambo ya kosala ezali kokóma mingi, tozali mpe komona ete ntango ezali kokóma moke mpo na kosala yango nyonso. Lelo oyo, na mikili mingi, bato basalaka makambo nyonso na programɛ, moto azali kosala likambo moko nokinoki mpo asilisa yango mpe abanda likambo mosusu. Tata ya libota asengeli kokende mosala na ngonga ya 7 na ntɔngɔ, mama asengeli kotika bana na kelasi na ngonga ya 8 na ntɔngɔ, nkɔkɔ asengeli kokutana na monganga na 9:40, mpe biso nyonso tosengeli komibongisa mpo na likita moko ya ntina mingi na 7:30 ya mpokwa. Ntango moto nyonso azali kosala nokinoki mpo asala makambo nyonso oyo atyaki na programɛ, azali kotikala na ntango moke oyo akoki kolekisa na kosakana. Tozali mpe komilelalela ndenge mosala ya mokolo na mokolo ezali kolɛmbisa, mpe ndenge oyo bato bazali kowelana.
Tozali biso moko te nde tozali na ntango moke
Satana Zabolo, Monguna ya Nzambe nde alukelá bato makambo oyo esala ete bomoi na bango ezala mokuse. Sikoyo, mabe na ye ezongeli ye. (Talá Bagalatia 6:7, 8.) Emoniseli 12:12 eyebisi ndenge oyo Bokonzi ya Masiya esalemaki kuna na likoló; yango epesi biso elikya ntango elobi ete: “Na bongo bósepela, ɛ likoló, mpe bino bafandi wana! Mawa na mokili mpe na mai monene, mpo ete Satana akiteli bino na kongala mingi, awa eyebi ye ete azali na mwa elaka mokuse.”—Biso nde totɛngisi makomi.
Soki tolandi ndenge Biblia elobeli makambo oyo ekobima na mokili mpe ndenge bisakweli ya Biblia ezali kokokisama, tomoni ete “elaka mokuse” yango elingi kosila. Tozali na esengo na koyeba ete Satana azali lisusu na ntango mingi te! Ntango bakolongola ye, bato ya botosi bakozala lisusu bato ya masumu te, mpe bakozala na libaku ya kozwa bomoi ya seko ndenge Yehova akanaki na ebandeli. (Emoniseli 21:1-4) Tokozanga lisusu ntango te.
Kanisá naino: kozala na bomoi ya seko, ɛɛ, bomoi ya libela na libela! Okomitungisa lisusu te mpo naino osali makambo mosusu te. Soki ozali na mposa ya ntango, lobi ekozala, pɔsɔ ekoya, to mbula ya nsima ekoya, ɛɛ, bambula ekobanda kolandana libela na libela tii nsuka te!
Tóyeba kosalela ntango na biso
Lokola Satana ayebi ete atikali na ntango moke mpo na kokosa bato, azali kosala ete bato bázala na makambo mingi mpo bázanga ntango ya koyoka nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Yango wana, ebongi tóyoka toli ya malamu oyo elobi na biso boye: “Bókeba mpo na etamboli na bino, bózalaka bazoba te kasi bato na mayele mpenza. Bósalisa ntango na bino misala malamu, zambi mikolo izali mabe. Na ntina yango bózala [bazoba] te nde bósosola yango ezali mokano na Nkolo.”—Baefese 5:15-17.
Ebongi mpenza tólekisa ntango na biso na makambo oyo ezali na ntina na esika tóbebisa yango na makambo ya mpambampamba, oyo epesaka bolamu oyo eumelaka te! Tosengeli koluka kozala na elimo lokola oyo ya Mose ntango abondelaki Yehova na maloba oyo: “Teyá biso ete tótánga mikolo na biso malamu ete tózwa mitema na mayele.”—Nzembo 90:12.
Ya solo, lelo oyo moto nyonso azali na makambo mingi ya kosala. Atako bongo, Batatoli ya Yehova bazali mpenza kolendisa yo olekisa mwa ntango na koyekola makambo oyo Nzambe azali kosɛnga mpo na kozwa bomoi ya seko na mokili oyo Bokonzi na ye ekoyangela. Soki ozali kolekisa ata ngonga moko pɔsɔ na pɔsɔ mpo na koyekola Biblia, mpo na ‘kososola yango ezali mokano na Nkolo,’ ekoki kosalisa yo mpo maloba oyo ekokisama epai na yo: “Tiká mabe mpe salá malamu ete obika libela. Bayengebene bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.”—Nzembo 37:27, 29.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá mokanda Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko, mokapo 6, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.