Ntango mpe Bomoi ya seko: Elimboli mpenza nini?
BUKU moko elobi ete, “Ntango ezali moko na makambo oyo esukisá mayele ya moto.” Emonani ete tokokaka mpenza kolimbola eloko oyo babéngi ntango na maloba ya pɛtɛɛ te. Tokoki koloba ete ntango “eleki,” “ekei,” “ekimi,” nzokande, biso moko tozali kotambola na kati ya “ntango.” Toyebaka mpenza te eloko nini oyo tobéngi ntango.
Bato mosusu balimbolaki ntango lokola “eleko oyo ekaboli makambo mibale oyo esalami.” Kasi, makambo ya bomoi ezali kolakisa biso ete ntango elandaka makambo oyo ezali kosalama te; ntango elekaka kaka ezala ata likambo esalemi to te. Kutu, moto moko ya filozofi alobaki ete ntango ezalaka te, ezali se na makanisi ya moto. Tokoki mpenza kondima ete makambo nyonso toyebi, oyo tokanisaka ete eselamaki na boumeli ya ntango, ezalaka se makanisi mpamba?
Likanisi ya Biblia mpo na ntango
Na kati ya Biblia, ezali na esika moko te oyo tozali kokuta ndimbola ya ntango. Yango emonisi biso ete mbala mosusu moto akoki mpenza kokanga ntina na yango malamumalamu te. Ezali lokola mokili, toyebaka epai yango ebandi te mpe epai esuki te. Tozali komona ete ntango ezali moko na makambo oyo kaka Nzambe nde akoki koyeba yango malamumalamu mpamba te kaka ye nde azali “lobiko na lobiko.”—Nzembo 90:2.
Atako Biblia elimboli ntango te, kasi elobeli ntango lokola eloko oyo ezali mpenza. Ya liboso, Biblia elobi na biso ete Nzambe akelaki “bingɛngiseli,” elingi koloba mwese, sanza, na minzoto, mpo na kolakisa ntango, ete “izala mpo na bilembo mpe na bilanga, mpo na mikolo mpe na mbula.” Makambo mingi oyo ekomami na Biblia, bapesi biso ntango oyo yango esalemaki. (Genese 1:14; 5:3-32; 7:11, 12; 11:10-32; Exode 12:40, 41) Biblia elobi ete ntango ezali eloko oyo tosengeli kosalela na mayele mpo tózwa bolamu oyo Nzambe akopesa na eleko oyo ezangi nsuka: bomoi ya seko.—Baefese 5:15, 16.
Bomoi ya seko ekoki mpenza kozala?
Se ndenge ezalaka mpasi mpo na koyeba kolimbola ntango, bato mingi bamonaka ete, kokanga ntina ya likanisi ya bomoi ya seko ezali mpasi koleka. Moko na bantina ekoki kozala ete toyebi ntango na kolanda makambo oyo elekaka na bomoi na biso, elingi koloba kobotama, kokola, konuna, mpe kokufa. Yango wana, toyebaka ete ntango elekaka soki totali ndenge nzoto na biso enunaka. Bato mingi bamonaka ete koluka makanisi mosusu na likambo yango, ezali lokola kobebisa ndimbola ya eloko oyo tobéngi ntango. Bato yango bakoki kotuna ete, ‘mpo na nini kaka bato nde basengeli te kokutana na likambo oyo bikelamu mosusu nyonso ya bomoi bakutanaka na yango?’
Ntango bazali kokanisa bongo, babosanaka ete bato bakeseni na bikelamu mosusu na makambo mingi. Na ndakisa, banyama bazali na mayele te lokola bato. Ata soki bato mosusu bakoki koloba nini, banyama ekoki kosala makambo mosusu te, longola se oyo basalaka na lɔɔmbi (instinct) na bango. Bazali na makoki ya kosala misala ya ntɔki te mpe bakoki komonisa bolingo mpe esengo lokola bato te. Soki bato bazali na makoki mingi boye, oyo esalaka ete bomoi na bango ezala na ntina, tokoki mpe kokanisa ete basengeli koumela mingi na bomoi, boye te?
Lisusu, soki banzete oyo ekanisaka te, eumelaka ntango mosusu bambula nkóto nkóto, nzokande bato—bikelamu oyo ezali na mayele—bakoki koumela se mbula 70 to 80, tomoni te ete ezali likambo ya kokamwa? Soki nkoba, oyo ekoki kosala eloko moko te ya sika mpe ekoki kosala misala ya ntɔki te, ekoki koumela koleka mbula 200, nzokande bato, oyo bazali na makoki mingi, mbala mingi bakómaka ata na mbula 100 te, tomoni te ete ezali likambo ya kokamwa?
Atako moto akoki kokanga ntina malamumalamu te ya ntango mpe bomoi ya seko, Biblia emonisi polele ete bomoi ya seko ezali elaka ya solo. Na kati ya Biblia, tozali kokuta maloba “bomoi ya seko” mbala soki 40. Kasi, soki Nzambe azali na mokano ete bato bázala na bomoi ya seko, mpo na nini akokisi yango naino te? Tokotalela motuna yango na lisolo oyo elandi.