Etumba oyo ebebisaki ekeke ya 19
1914
NTANGO akanisaki eleko ya sika ya mbula nkóto, Charley Reese, akomaki kati na zulunalo The Orlando Sentinel ete: “Etumba ya 1914 kino 1918 oyo ebebisaki ekeke ya 19 esili naino te.” Alingaki koloba nini? Alimbolaki ete: “Lisolo ya bato elandaka badati te. Ekeke ya 19, oyo ebéngamaki ekeke ya bindimeli, ya makanisi ndenge na ndenge, ya etamboli mpe ya bizaleli malamu esukaki mokolo ya 1 Yanuáli 1901 te. Esukaki na 1914. Ndenge moko na ekeke ya 20, ntango ebandaki balobaki mpe bongo. . . .
“Emonani ete pene na matata nyonso oyo masalemi na bomoi na biso euti na etumba wana. Tóloba ete makanisi nyonso ya bato ya mayele mpe mimeseno na bato oyo tozali komona ebandaki na etumba wana. . . .
“Nabanzi ete etumba yango ebimisaki makama wana mpamba te ekweisaki endimiseli oyo bato bazalaki na yango ete bakoki kotambwisa bomoi na bango bango moko. . . . Etumba epusaki bato na kosundola endimiseli wana ya lokuta. Babundi ya ngámbo moko te bakanisaki ete makambo makosalema ndenge masalemaki. Etumba ebebisaki bokonzi ya ekólo Angleterre mpe ya ekólo France. Ebomaki bato mpenzampenza ya mayele ya ekólo Angleterre, France mpe Allemagne ya ntango wana. . . . Yango ebimisaki Révolution bolchevique, Sionisme mpe na nsuka Nazisme. Na mwa ntango moke, ebomaki bato milio 11.”
Esili koleka mbula 120 uta Batatoli ya Yehova bazali kolobela mobu 1914 ete ezali nsuka ya eleko oyo Yesu abéngaki ete “ntango ya mabota.” (Luka 21:24) Na mbula yango, Yesu Klisto oyo asekwaki mpe akembisamaki azwaki Bokonzi na likoló. Na nzela ya Bokonzi yango, Yehova Nzambe akolongola minyoko nyonso oyo ezali komonana na ekeke oyo mpo na libela.—Nzembo 37:10, 11; Mosakoli 8:9; Emoniseli 21:3, 4.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 32]
U.S. National Archives photo