Eloko moko te eleki solo na malamu
Lisoló Ya G. N. Van Der Bijl
Na Yúni 1941, bapesaki ngai na mabɔkɔ ya Gestapo mpe bakendaki na ngai na káa ya bakangami ya Sachsenhausen pene na engumba Berlin, na ekólo Allemagne. Lokola mokangami nimero na ngai ezalaki 38 190, nazalaki kuna kino na mobembo ya kufa oyo esalemaki na Apríli 1945. Kasi liboso ete nalobela makambo wana, tiká ete nalimbola naino ndenge nini nakómaki mokangami.
NABOTÁMÁ na engumba Rotterdam, na Pays-Bas, mwa moke nsima ya kobanda ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba na 1914. Tata azalaki mosali na kompanyi ya engbunduka, mpe mwa ndako na biso ezalaki penepene na nzela ya engbunduka. Liboso ete etumba esila na 1918, namonaki bingbunduka mingi oyo bizalaki komema bato oyo bazwaki makama koleka na makɛlɛlɛ mpe na lombangu nyonso liboso ya ndako na biso. Na ntembe te, bingbunduka bitondaki na basodá oyo bazokaki na etumba mpe bazalaki kozongisa bango epai na bango.
Ntango nakómaki na mbula 12, nalongwaki na kelasi mpe nabandaki koluka mosala. Mbula mwambe na nsima nazwaki mosala na masuwa, mpe na boumeli ya mbula minei oyo elandaki, nasalaki mibembo kati na Pays-Bas mpe États-Unis.
Wana tosɛmaki na libongo ya engumba New York na eleko ya molungé ya 1939, etumba mosusu ya mokili mobimba elingaki kobanda. Na yango, mobali moko akɔtaki na masuwa na biso mpe apesaki ngai búku Gouvernement, oyo ezalaki kolobela boyangeli ya sembo, nazwaki yango na esengo mpenza. Na bozongi na ngai na Rotterdam, nabandaki koluka mosala mosusu na mboka, mpamba te bomoi ya mai ezalaki lisusu mpenza na libateli te. Na mwa 1 Sɛtɛ́mbɛ, bato ya Allemagne bakɔtelaki ekólo Pologne na etumba mpe bikólo mingi bikɔtaki na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba.
Nayekoli solo ya Biblia
Na mokolo moko ya lomingo na sanza ya Mársi 1940 na ntɔ́ngɔ́, nakendaki kotala yaya na ngai ya mobali na mwasi na ye, mpe Motatoli moko ya Yehova abɛtaki na ekuke. Nayebisaki ye ete nazali na búku Gouvernement mpe natunaki ye motuna na ntina na likoló mpe nani akokende kuna. Nazwaki eyano ya polele mpe ya malamu na boye ete namilobelaki ete, ‘Solo yango oyo.’ Napesaki ye adresi na ngai mpe nabyangaki ye aya kotala ngai na ndako.
Nsima ya bozongeli misato mpamba, oyo na boumeli na yango tosololaki na bozindo na ntina na Biblia, nabandaki kobima na Motatoli yango na mosala ya kosakola ndako na ndako. Ntango tokómaki na teritware, alakisaki ngai esika oyo tosengelaki kobanda, mpe nabandaki koteya ngai moko. Ezali motindo yango nde bato mingi ya sika bazalaki kobanda mosala ya kosakola na eleko wana. Bapesaki ngai toli ete, mpo nakoka komonana na balabala te, nasengelaki ntango nyonso kozala na kati ya lopango ntango nazali kolakisa mikanda. Esengelaki kozala na bokɛngi na mikolo wana ya ebandeli ya etumba.
Pɔ́sɔ misato na nsima, na mokolo ya 10 Máí 1940, mampinga ya Allemagne ekɔtelaki Pays-Bas na etumba mpe na mokolo ya 29 Máí, SeyssInquart, momonisi ya Reich [boyangeli ya Nazi] alobaki ete lisangá ya Batatoli ya Yehova epekisami. Tozalaki koyangana sé na bituluku mikemike, mpe tosalelaki bokɛngi mpo ete bisika oyo tozalaki kosala makita biyebana te. Boyei ya bakɛngɛli-batamboli ezalaki kolendisa biso mingi.
Nazalaki momeli monene ya likaya, mpe ntango napesaki Motatoli oyo azalaki koyekola na ngai Biblia likaya nasosolaki ete amelaka yango te, nalobaki ete: “Nakoki soko moke te kotika komela likaya!” Nzokande, mwa moke na nsima, wana nazalaki kotambola na nzela, nakanisaki, ‘Soki nakokóma Motatoli, nalingi kozala Motatoli ya solo.’ Na yango namelaki lisusu likaya soko moke te.
Nazwi etɛlɛmɛlo mpo na solo
Na Yúni 1940, ekokaki naino sanza misato te uta ntango nakutanaki na Motatoli ya Yehova na ndako ya yaya na ngai, namonisaki elembo ya komipesa na ngai epai ya Yehova mpe nazwaki batisimo. Basanza moke na nsima, na Okɔtɔ́bɛ 1940, nabandaki mosala ya ntango nyonso lokola mobongisi-nzela. Na eleko wana, bapesaki ngai elamba oyo tozalaki kobenga jakɛtɛ ya mobongisi-nzela. Yango ezalaki na mabenga mingi mpo na kotya babúku na mwa babúku, mpe tokokaki kolata yango na nsé ya kazaka.
Uta Allemagne ekómaki koyangela Pays-Bas, bazalaki kolukaluka Batatoli ya Yehova mpe kokanga bango. Mokolo moko na ntɔ́ngɔ́ ya Febwáli 1941, nazalaki kati na mosala ya kosakola elongo na Batatoli mosusu. Wana bazalaki kosolola na bato na ngambo moko, ngai nazalaki kosala na ngambo mosusu mpo tokutana liboso. Na nsima, nalingaki koyeba likambo nini ezalaki koumisa bango mpe namonaki moto moko oyo atunaki ngai ete, “Yo mpe ozali na babúku oyo?”
Nayanolaki ete, “Ɛɛ.” Akangaki ngai mpe amemaki ngai na biro ya bapolisi. Batyaki ngai na bolɔ́kɔ na boumeli ya pɔ́sɔ minei. Bakonzi mingi ya basodá bazalaki na boboto. Moto oyo apesami naino na mabɔkɔ ya Gestapo te, akokaki kobima na bolɔ́kɔ soki atye sinyatili na mokanda molobaki ete akokabola lisusu mikanda oyo mikolimbolaka Biblia te. Ntango balobaki na ngai natya mabɔkɔ na mokanda yango, nazongisaki ete: “Ata soki bopesi ngai florin [mosolo ya ekólo Pays-Bas] milió moko to milió mibale nakotya sinyatili te.”
Nsima ya kokangama mwa ntango kuna, bapesaki ngai na mabɔkɔ ya Gestapo. Na nsima bakendaki na ngai na káa ya bakangami na Sachsenhausen, na ekólo Allemagne.
Bomoi kati na Sachsenhausen
Ntango nakómaki na Yúni 1941, ezalaki na Batatoli soko 150—na Sachsenhausen—mingi na bango bazalaki bato ya Allemagne. Biso bakangami ya sika totyamaki na eteni ya káa ebengamaki esika ya kotangola. Kuna bandeko na biso baklisto basungaki biso mpe babongisaki biso mpo na makambo oyo makobima. Pɔ́sɔ moko na nsima etuluku mosusu ya Batatoli oyo eutaki na Pays-Bas ekómaki. Na ebandeli batɛlɛmisaki biso esika moko kobanda ngonga ya nsambo ya ntɔ́ngɔ́ kino ngonga ya motoba ya mpokwa liboso ya bandako oyo tozalaki kolala. Na bantango mosusu bakangami basengisamaki kosala bongo mokolo na mokolo na boumeli ya pɔ́sɔ moko to koleka.
Atako minyoko ezalaki makasi, bandeko basosolaki ete ezalaki likambo ya lombangu komibongisa malamu mpe kolya bilei ya elimo. Mokolo na mokolo moto moko azalaki koponama mpo na kobongisa makanisi likoló na mokapo moko ya Biblia. Na nsima, na libándá ya bolɔ́kɔ, Motatoli mokomoko azalaki kobɛlɛma na ye mpo na koyoka makanisi oyo abongisaki. Na lolenge moko to mosusu, mikanda mizalaki kokɔta na mayele kati na káa, mpe tozalaki koyangana mokolo ya lomingo nyonso mpe koyekola elongo mikanda yango mikolimbolaka Biblia.
Nayebi te ndenge nini búku Children (Bana), oyo ebimaki na liyangani oyo esalemaki na Saint-Louis na États-Unis na eleko ya molungé ya 1941, ekɔtaki kati na Sachsenhausen. Mpo ete bámona búku yango te mpe bápasola yango te, tokabolaki yango bitenibiteni, mpe tozalaki kotambwisa biteni yango kati na bandeko na boye ete moto na moto akoka kozwa ngala ya kotánga yango.
Mwa moke na nsima, mokɛngɛli ya bolɔ́kɔ ayaki koyeba ete tozalaki kosala makita. Na yango bakabolaki Batatoli mpe batyaki bango na bandako ekeseni. Yango epesaki biso libaku malamu ya koteya bakangami mosusu, mpe lokola litomba, bato ya Pologne, ya Ukraine mpe bamosusu bandimaki solo.
Banazi babombaki te makaneli na bango ya kobebisa bosembo to ya koboma Bibelforscher (Bayekoli ya Biblia), lolenge Batatoli ya Yehova bazalaki kobengama. Na ntina yango, basalelaki biso makambo makasi mpenza. Balobaki na biso ete tokokaki kozwa bonsomi soki tokotya sinyatili na mokanda ete tobwaki kondima na biso. Bandeko mosusu babandaki kobimisa makanisi ete, “Soki nazwi bonsomi, nakoki kosala mingi kati na mosala ya Yehova.” Atako ndambo batyaki sinyatili, bandeko na biso mingi batikalaki sembo kati na bozangi, na nsɔni, mpe na monyoko. Bamoko kati na baoyo batyaki sinyatili na mokanda yango bayokanaki lisusu ata na nsango te. Nzokande, likambo ya esengo, bamosusu bazongelaki etɛlɛmɛlo na bango mpe bazali Batatoli kino lelo oyo.
Mbala na mbala bazalaki kotalisa biso na makasi motindo bakangami bazalaki koyokisama mpasi, na ndakisa kobɛtama fimbo 25 ya nzeté. Mbala moko, batalisaki biso lolenge babomaki bato minei na kotyáká bango nsinga na nkingo likoló ya nzeté. Makambo motindo wana ezalaka na bopusi ya solo likoló na moto. Ndeko moko, engambe mpe mobali kitoko oyo tozalaki kolala na ye ndako moko alobaki na ngai ete: “Liboso naya awa nakokaki kotɛlɛma te soki namoni makila kozanga ete nakwea. Kasi sikawa motema na ngai ekómi makasi.” Nzokande, atako mitema na biso mikómaki makasi, tobungisaki mayoki ya bomoto te. Nakoki koloba ete, nalakelaki banyokoli na biso mabe ata mbala moko te to nayinaki bango te.
Nsima ya kosala elongo na kommando (ekipi ya mosala) na boumeli ya mwa ntango, nakɔtaki lopitalo mpo na fɛfɛlɛ makasi. Monganga moko ya boboto moto ya ekólo Norvège mpe lifulumɛ moko moto ya ekólo Tchécoslovaquie basalisaki ngai, mpe boboto na bango ebikisaki ngai solo.
Mobembo ya kufa
Na Apríli 1945, ekómaki polele ete Allemagne elóngaki etumba te. Mampinga masangani ya mikili ya wɛ́sti bazalaki kopusana nokinoki uta na wɛ́sti, mpe Union soviétique, uta na ɛ́sti. Banazi bakokaki te koboma bankóto ya bato oyo bazalaki na bakáa ya bakangami na mwa mikolo moke mpe kobwaka nzoto na bango kozanga ete likambo yango eyebana. Na yango bazwaki ekateli ya koboma baoyo bazalaki na maladi mpe kokende na bakangami oyo batikali na bingumba ya penepene oyo bizali na mabongo ya mai. Kuna bayangaki mwango mpo na kokɔtisa bango na masuwa mpe kozindisa masuwa yango na mai monene.
Bakangami soko 26 000 babandaki mobembo uta Sachsenhausen na butu ya mokolo ya 20 Apríli. Liboso ete tólongwa na káa, tobimisaki bandeko na biso oyo bazalaki na lopitalo. Tozwaki likalo oyo ebendamaka na bampunda mpo na komema bango. Biso nyonso, tozalaki bato 230 ya mikili motoba mikeseni. Ndeko Arthur Winkler mpe azalaki kati na baoyo bazalaki na maladi; ndeko yango asalaki mingi mpo ete mosala ya kosakola epalangana na Pays-Bas. Biso Batatoli tozalaki bato ya nsuka na molɔngɔ́, mpe ntango nyonso tozalaki kolendisana mpo na kokóba kotambola.
Na ebandeli, totambolaki ngonga 36 kozanga kopema. Ntango nazalaki kotambola, nayokaki mpɔngi pamba te nazalaki na mpasi mpe nalɛmbaki. Kasi likoki ya kotikala na nsima to ya kopema ezalaki te mpo ete bakɛngɛli bakokaki kobɛta moto oyo akosala bongo masasi. Na butu tozalaki kolala na bilanga to na bazamba. Bilei ezalaki moke mbala mosusu mpe ezalaki te. Ntango nzala ekómaki makasi, nafibaki nkisi ya mino oyo bapesaki biso na Croix Rouge ya ekólo Suède.
Na esika moko, lokola bato ya Allemagne oyo bazalaki kokɛngɛla bayebaki te epai wapi mampinga ya Union soviétique mpe ya États-Unis bazalaki, tofandaki na kati ya zamba mikolo minei. Yango ezalaki malamu, mpamba te, ntango tokómaki na libongo ya Lübeck tokutaki masuwa te, yango elingaki kozala nkunda na biso kati na mai. Na nsuka, nsima ya mikolo 12 mpe mobembo ya kilomɛtɛlɛ soko 200, tokómaki na Crivitz Wood. Yango ezalaki mosika te na Schwerin, engumba oyo ezali na kilomɛtɛlɛ soko 50 longwa na Lübeck.
Basodá ya Union soviétique bazalaki na lobɔkɔ na biso ya mobali, mpe basodá ya Amerika na lobɔkɔ ya mwasi. Koyokáká lokito mpe mɔ́tɔ ya mandoki, tososolaki ete tokómaki pene na milɔngɔ́ ya liboso ya basodá. Bakɛngɛli bato ya Allemagne balɛngaki; bamoko bakimaki, mpe bamosusu balongolaki sokoto na bango mpe balataki bilamba ya bakangami oyo bazwaki epai ya baoyo bakufaki, kolikyáká ete bakoyeba bango te. Kati na mobulungano wana, biso Batatoli tosanganaki esika moko mpo na kobondela mpe kozwa litambwisi.
Bandeko oyo bazalaki kokamba biso bazwaki ekateli ete tokolongwa na mokolo elandi na ntɔ́ngɔ́ntɔ́ngɔ́ mpe tokokende na ngámbo oyo mampinga ya Amerika ezalaki. Atako pene na katikati ya motángo ya bakangami oyo babandaki mobembo ya kufa babomamaki to bakufaki na nzela, Batatoli nyonso tobikaki.
Mokonzi moko ya basodá ya Canada amemaki ngai kino na engumba Nimègue, epai yaya na ngai ya mwasi azalaki kofanda. Ntango nakómaki na esika yango, nakutaki ete asilá kolongwa wana. Na bongo natambolaki kino na engumba Rotterdam. Likambo ya esengo, na nzela moto moko amemaki ngai na motuka na ye kino na esika nazalaki kokende.
Solo ya Biblia ezalaki bomoi na ngai
Bobele mokolo oyo nakómaki na Rotterdam, natondisaki lokasa mpo na kosɛnga mosala ya mobongisi-nzela. Pɔ́sɔ misato na nsima nakendaki na teritware na ngai na engumba Zutphen, epai nasalaki na boumeli ya mbula moko na ndambo. Na eleko wana, nzoto na ngai ekómaki mwa kolɔngɔ́nɔ́. Na nsima, naponamaki lokola mokɛngɛli ya zongazonga, lokola bakɛngɛli-batamboli babengamaka. Mwa basanza na nsima, nabyangamaki na Gileadi, Eteyelo ya Biblia ya la Société Watchtower na South Lansing, na engumba New York. Nsima ya kozwa lipɔlɔ́mi na kelasi ya mbala ya 12 na Febwáli 1949, batindaki ngai na ekólo Belgique.
Nasalaki kati na mitindo ndenge na ndenge ya mosala na Belgique, mbula mwambe na filiale mpe koleka mbula ntuku minei na mosala ya mokɛngɛli-motamboli lokola mokɛngɛli ya zongazonga mpe mokɛngɛli ya etúká. Na 1958, nabalaki Justine, oyo akómaki moninga na ngai ya mibembo. Sikawa, nakómi mobangé, nazali naino na esengo ya kosala mwa moke lokola mokɛngɛli-mosungi na mosala ya zongazonga.
Soki nakanisi mosala na ngai, nakoki mpenza koloba ete: “Eloko moko te eleki solo na malamu.” Ya solo, ezalaki ntango nyonso pɛtɛɛ te. Nasosolaki ntina ya kozwa liteya uta na mabunga mpe na bikweli na ngai. Na yango ntango nazali kosolola na bilenge, mbala mingi nalobaka na bango ete: “Bino mpe bokosala mabunga mpe mbala mosusu masumu minene, kasi kozela te. Yebisá likambo yango na baboti na yo to na nkulutu moko, mpe salá mbongwana oyo esengeli.”
Na boumeli ya mbula pene na 50 oyo nalekisi na mosala ya ntango nyonso na Belgique, nazwi libaku malamu ya komona baoyo nayebaki uta bomwana, bakómi bankulutu mpe bakɛngɛli ya zongazonga. Mpe nasili komona basakoli ya Bokonzi oyo bazalaki pene na 1 700 na ekólo yango koleka kino basakoli 27 000.
Nazali kotuna, “Ekoki nde kozala na mapamboli na bomoi koleka oyo ya kosalela Yehova?” Ezalaki te, ezali te, mpe ekozala te. Nabondelaka ete Yehova akóba kotambwisa mpe kopambola ngai na mwasi na ngai mpo ete tókoba kosalela ye libela na libela.
[Elilingi na lokasa 26]
Elongo na mwasi na ngai mwa moke nsima ya libala na biso na 1958