Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w98 1/1 lok. 29
  • “Bózalisa bato bayekoli kati na mabota nyonso”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Bózalisa bato bayekoli kati na mabota nyonso”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
w98 1/1 lok. 29

“Bózalisa bato bayekoli kati na mabota nyonso”

“BOYE bókende mpe bózalisa bato bayekoli kati na mabota nyonso, kobatisáká bango na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu.” Oyo ezali lolenge New World Translation ebongoli etindá ya Yesu oyo ezwami na Matai 28:19. Nzokande, lolenge oyo ya kobongola etyolamaki mingi. Na ndakisa, mwa búku moko ya lingomba elobi ete: “Lolenge bobele moko ya kobongola oyo eyokani na Greke ezali oyo: ‘Bózalisa mabota nyonso bayekoli!’” Yango ezali solo?

Lolenge oyo ya kobongola, “Bózalisa mabota nyonso bayekoli,” ezali komonana na Babiblia mingi mpe ezali kobongolama liloba na liloba ya maloba ya Greke. Na yango, moboko nini esimbi lolenge oyo ya kobongola ete, “Bózalisa bato bayekoli kati na mabota nyonso, kobatisáká bango”? Ezali bongo maloba ya zingazinga. Maloba “kobatisáká bango” ezali kotalela mpenzampenza bato, kasi mabota te. Nganga-mayele ya Biblia, Hans Bruns, mwanamboka Allemagne alobi ete: “[Liloba] ‘bango’ ezali kotalela mabota te (lokota ya Greke ezali komonisa bokeseni polele), kasi bato kati na mabota.”

Lisusu, tosengeli kotalela lolenge etindá ya Yesu ekokisamaki. Na ntina na mosala ya Paulo mpe Balanaba na engumba Delebe na Asie Mineure, tozali kotánga boye: “Na mboka yango basakoli Nsango Malamu, mpe bazwi bayekoli mingi. Na nsima, bazongi na Lusutula, na Ikoni, na Antiokia.” (Misala 14:21) Tomoni ete Paulo na Balanaba bazalisaki bayekoli, ezali engumba mobimba ya Delebe te, kasi bamoko kati na bafandi ya engumba Delebe.

Motindo moko, na ntina na mikolo ya nsuka, mokanda ya Emoniseli esakolaki ete, ezali te mabota mobimba bakosalela Nzambe, kasi “ebele monene . . . bauti na mabota nyonso, na mikili nyonso, na bibolo nyonso, na minɔkɔ nyonso” nde bakosala bongo. (Emoniseli 7:9) Na yango, New World Translation ezali ntango nyonso komimonisa ete ezali libongoli oyo tokoki kotyela motema ya ‘Makomami nyonso oyo mapemami na Nzambe.’—2 Timoté 3:16.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto