Ntango Yesu akoya kati na nkembo ya Bokonzi
“Bamosusu bazali kotɛlɛma awa . . . bakomona kufa te liboso na komona Mwana na moto oyo azali koya na Bokonzi na ye.”—MATAI 16:28.
1, 2. Nini emonanaki mwa moke nsima ya Pantekote ya mobu 32 T.B., mpe ntina ya likambo yango ezalaki nini?
MWA moke nsima ya Pantekote ya mobu 32 T.B., bantoma misato ya Yesu Klisto bamonaki emonaneli moko ya kokamwa. Engebene lisoló oyo lipemami, “Yesu akamati Petelo mpe Yakobo mpe Yoane, ndeko na ye, mpe akambi bango na ngomba molai epai na bango mpenza. Abongwani motindo na ye liboso na bango.”—Matai 17:1, 2.
2 Emonaneli ya mbongwana eyaki na ntango moko ya mpasi. Yesu ayebisaki bayekoli na ye liboso ete akoyoka bwale mpe akokufa na Yelusaleme, kasi bayekoli bazalaki na mokakatano ya kokanga ntina ya maloba na ye. (Matai 16:21-23) Emonaneli elendisaki kondima ya bantoma misato ya Yesu mpo ete bábongisama na ntina na liwa na ye oyo ekómaki pene mpe lisusu na ntina na bambula ya mosala makasi mpe ya komekama oyo elingaki kolanda mpo na lisangá ya boklisto. Lelo oyo, tokoki koyekola likambo moko na emonaneli yango? Ɛɛ, mpamba te oyo yango esakolaki ezali mpenza kokokisama na ntango na biso.
3, 4. (a) Mikolo motoba liboso ya mbongwana na ye, Yesu alobaki nini? (b) Lobelá makambo mamonanaki na ntango ya mbongwana.
3 Mikolo motoba liboso ya mbongwana, Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: “Ekoki na Mwana na moto ete aya na nkembo na Tata na ye esika moko na baanzelu na ye mpe na ntango yango akopesa moto na moto libonza kobila misala na ye.” Maloba yango masengelaki kokokisama na “nsuka ya ebongiseli ya biloko.” Yesu alobaki lisusu ete: “Nazali koloba na bino solo ete bamosusu bazali kotɛlɛma awa baoyo bakomona kufa te liboso na komona Mwana na moto oyo azali koya na Bokonzi na ye.” (Matai 16:27, 28; 24:3; 25:31-34, 41; Danyele 12:4) Mbongwana esalemaki mpo na kokokisa maloba oyo ya nsuka.
4 Bantoma misato bamonaki mpenza nini? Talá lolenge Luka alobeli lisoló yango: “Ezalaki [Yesu] kobondela, motindo na elongi na ye ebongwanaki, mpe bilamba na ye ingɛngaki mpɛmbɛ. Babali mibale bazalaki kosolana na ye, Mose na Eliya. Bango bamonanaki na nkembo, mpe bazalaki koloba mpo na ebimeli na ye elingaki ye kokokisa na Yelusaleme.” Na nsima, “lipata eyaki kozipa [bantoma], mpe babangaki wana ekɔtaki bango na lipata. Mongongo ebimaki na lipata ete, Oyo Mwana na ngai, Moponami. Bóyoka ye!”—Luka 9:29-31, 34, 35.
Kondima na biso elendisami
5. Bopusi nini mbongwana ya Yesu ezalaki na yango likoló na Petelo?
5 Ntoma Petelo asilaki koloba na ntina na Yesu ete azali “Klisto, mwana na Nzambe na bomoi.” (Matai 16:16) Maloba ya Yehova longwa na likoló mandimisaki yango, mpe emonaneli ya mbongwana ya Yesu ezalaki elakiseli ya koya na ye ya nguya mpe ya nkembo kati na Bokonzi na ye mpo na kosambisa bato. Koleka mbula ntuku misato nsima ya mbongwana yango, Petelo akomaki ete: “Zambi wana eyebisaki biso bino mpo na nguya na komonana na Nkolo na biso Yesu Klisto, tobilaki masese malobami na mayele te, kasi lokola esili biso komona nkembo na ye monene na miso na biso mpenza. Mpo ete azwi lokumu mpe nkembo na mabɔkɔ na Nzambe Tata mpe mongongo ebimi mpo na ye na nkembo monene monene ete, Oyo Mwana na ngai molingami na ngai; nakosepelaka ye mingi. Biso toyokaki mongongo yango kobima na Likoló, wana ezalaki biso na ye kuna na ngomba na bulɛɛ.”—2 Petelo 1:16-18; 1 Petelo 4:17.
6. Lolenge nini makambo yango malandanaki nsima ya mbongwana?
6 Lelo oyo, kondima na biso mpe elendisami na makambo oyo bantoma misato bamonaki. Ya solo, makambo mingi masalemaki kobanda na mobu 32 T.B. Na mobu oyo molandaki, Yesu akufaki mpe asekwisamaki, afandaki na lobɔkɔ ya mobali ya Tata na ye. (Misala 2:29-36) Na Pantekote ya mobu yango, “Yisalaele [ya sika] ya Nzambe” ebotamaki, mpe kampanye ya mosala ya kosakola ebandaki liboso na Yelusaleme mpe nsima epalanganaki kino biteni ya nsuka ya mokili. (Bagalatia 6:16; Misala 1:8) Nokinoki na nsima kondima ya bayekoli ya Yesu emekamaki. Bantoma bakangamaki mpe babɛtamaki makasi mpamba te baboyaki kotika kosakola. Mosika te Setefane abomamaki. Na nsima, Yakobo, oyo amonaki mbongwana ya Yesu, ye mpe abomamaki. (Misala 5:17-40; 6:8–7:60; 12:1, 2) Nzokande, Petelo mpe Yoane babikaki mpe bakóbaki kosalela Yehova na bosembo nyonso na boumeli ya bambula mosusu mingi. Kútu, pene na nsuka ya ekeke ya liboso ya T.B., Yoane akomaki bimonaneli mosusu ya Yesu kati na nkembo ya likoló.—Emoniseli 1:12-20; 14:14; 19:11-16.
7. (a) Ntango nini emonaneli ya mbongwana ebandaki kokokisama? (b) Ntango nini Yesu apesaki mbano epai na basusu engebene misala na bango?
7 Uta ebandeli ya “mokolo na Nkolo” na 1914, bimonaneli mingi oyo Yoane amonaki bisili kokokisama. (Emoniseli 1:10) Ezali boni mpo na ‘kokóma [ya Yesu] kati na nkembo ya Tata na ye,’ lokola yango emonisamaki na mbongwana? Emonaneli yango ebandaki kokokisama na kobotama ya Bokonzi ya Nzambe na likoló na mobu 1914. Ntango Yesu, lokola monzoto mwa ntɔ́ngɔ́, atɛlɛmaki liboso ya mokili mobimba lokola Mokonzi ya sika oyo atyami na kiti ya bokonzi, yango ezalaki, lokola, kobima ya mokolo ya sika. (2 Petelo 1:19; Emoniseli 11:15; 22:16) Yesu apesaki mbano epai na basusu na ntango wana engebene misala na bango? Ɛɛ. Elembeteli monene ezali ete mwa moke na nsima, lisekwa ya baklisto bapakolami mpo na kokende na likoló ebandaki.—2 Timoté 4:8; Emoniseli 14:13.
8. Makambo nini makomonisa nsuka ya kokokisama ya emonaneli ya mbongwana?
8 Nzokande, mosika te, Yesu akokóma “kati na nkembo na ye, mpe baanzelu nyonso esika moko na ye” mpo na kosambisa bato nyonso. (Matai 25:31) Na ntango yango, akomimonisa na nkembo na ye nyonso mpe akopesa na “moto na moto” mbano kobila misala na ye. Baoyo bazali lokola bampate bakosangola bomoi ya seko kati na Bokonzi oyo ebongisamaki mpo na bango, nzokande baoyo bazali lokola bantaba bakokenda kati na “kobebisama ya seko.” Oyo nde bosukisi monene ekozala na kokokisama ya emonaneli ya mbongwana ya Yesu!—Matai 25:34, 41, 46; Malako 8:38; 2 Batesaloniki 1:6-10.
Baninga ya Yesu oyo bapesameli nkembo
9. Tosengeli komizela ete Mose mpe Eliya bázala esika moko na Yesu kati na kokokisama ya emonaneli ya mbongwana? Limbolá.
9 Na ntango ya mbongwana, Yesu azalaki ye moko te. Mose mpe Eliya bamonanaki na ye esika moko. (Matai 17:2, 3) Yango elingi koloba ete bazalaki mpenza wana? Te, ezali bongo te, mpamba te bango nyonso mibale bakufaki esilaki koleka ntango mingi mpe bazalaki kolala mpɔngi kati na nkunda kozeláká bongo lisekwa. (Mosakoli 9:5, 10; Baebele 11:35) Bakomonana esika moko na Yesu ntango akoya na nkembo na likoló? Te, ezali mpe bongo te, mpamba te Mose mpe Eliya bazalaki na bomoi liboso ete elikya ya kokende likoló efungolama epai na bato. Bakozala kati na baoyo bakozwa “lisekwa . . . na bato sembo” awa na mabelé. (Misala 24:15) Na bongo, komonana na bango kati na mbongwana ezali ya elilingi. Elilingi ya nini?
10, 11. Na makambo makeseni, Eliya mpe Mose bazali elilingi ya banani?
10 Epai mosusu, Mose mpe Eliya bazali bililingi ya esakweli. Lokola azalaki moyokanisi ya Mobeko ya kondimana, Mose azalaki elilingi ya Yesu, oyo azali bongo Moyokanisi ya kondimana ya sika. (Deteronome 18:18; Bagalatia 3:19; Baebele 8:6) Eliya azalaki elilingi ya Yoane Mobatisi, oyo ayaki liboso na Masiya. (Matai 17:11-13) Lisusu, na kotaleláká Emoniseli mokapo 11, Mose mpe Eliya bazalaki elilingi ya batikali bapakolami na ntango ya nsuka. Ndenge nini toyebi yango?
11 Tótala Emoniseli 11:1-6. Na vɛrsɛ́ 3 tozali kotánga boye: “Nakopesa batatoli na ngai mibale nguya, mpe bakosakola mikolo nkóto na nkámá mibale na ntuku motoba, na kolata ngɔtɔ.” Esakweli yango ekokisamaki epai na baklisto batikali bapakolami na boumeli ya Etumba ya Liboso ya Mokili mobimba.a Mpo na nini batatoli mibale? Mpamba te batikali bapakolami bazali kokokisa misala oyo, na lolenge ya elimo, mizali lokola oyo Mose mpe Eliya bakokisaki. Vɛrsɛ́ 5 mpe 6 elandi koloba ete: “Soko moto moko azali na mposa na kozokisa [batatoli yango mibale], mɔ́tɔ ekobima na minɔkɔ na bango kosilisa bayini na bango. Soko moto moko azali na mposa na kozokisa bango, akozanga kokufa bongo te. Bango wana bazali na nguya ya kozipa likoló, ete mbula enoka na mikolo na kosakola na bango te. Bazali mpe na nguya na kobongola mai na makila, mpe na kobola mokili na bolɔ́zi mbala na mbala, na ntango elingi bango.” Na yango, tomikundoli makamwisi oyo Eliya mpe Mose basalaki.—Mituya 16:31-34; 1 Mikonzi 17:1; 2 Mikonzi 1:9-12.
12. Na ntango ya mbongwana ya Yesu, Mose mpe Eliya bazalaki elilingi ya banani?
12 Na bongo, na ntango ya mbongwana, Mose mpe Eliya bazalaki elilingi ya banani? Luka alobi ete bamonanaki elongo na Yesu kati “na nkembo.” (Luka 9:31) Emonani ete bazalaki elilingi ya baklisto oyo bapakolamaki na elimo santu lokola “basangoli na libula” elongo na Yesu mpe na yango bazwaki elikya kitoko ya kozwa “nkembo esika moko na ye.” (Baloma 8:17) Baklisto bapakolami oyo basekwisami bakozala elongo na Yesu ntango akoya kati na nkembo ya Tata na ye mpe “akopesa moto na moto libonza kobila misala na ye.”—Matai 16:27.
Batatoli lolenge moko na Mose mpe Eliya
13. Makambo nini mazali komonisa ete Mose mpe Eliya bazali elilingi ebongi ya esakweli ya bapakolami oyo bakozwa libula esika moko na Yesu mpe bapesameli nkembo na ye?
13 Ezali na makambo mingi oyo mazali komonisa Mose mpe Eliya lokola elilingi ya basangoli na libula bapakolami ya Yesu. Ezala Mose to Eliya, bango nyonso basalaki lokola balobeli ya Yehova na boumeli ya bambula mingi. Mokomoko na bango akutanaki na nkɛlɛ ya moyangeli moko. Na ntango bazalaki na bosɛnga, mokomoko asungamaki na libota mopaya. Bango nyonso basakolaki na mpiko epai na bakonzi mpe batikalaki ngwi liboso na basakoli ya lokuta. Mose mpe Eliya bamonaki makamwisi ya nguya ya Yehova na Ngomba Sinai (oyo ebéngami mpe Holebe). Bango nyonso baponaki bakitani na bango na ngambo ya ɛ́sti ya Ebale Yaladene. Mpe motángo moleki monene ya makamwisi masalemaki na boumeli ya mikolo ya Mose (ye na Yosua) mpe Eliya (ye na Elisa), longola oyo masalemaki na boumeli ya bomoi ya Yesu.b
14. Lolenge nini bapakolami basalaki lokola balobeli ya Yehova, lolenge moko na Mose mpe Eliya?
14 Makambo oyo nyonso mazali kokundwela biso Yisalaele ya Nzambe, boye te? Ɛɛ, ezali bongo. Yesu alobaki na bayekoli na ye ya sembo ete: ‘Boye bókenda kozalisa bayekoli na mabota nyonso, kobatisa bango na nkombo na Tata mpe na Mwana mpe na elimo santu, kolakisa mpe bango ete bátosa nyonso esili ngai kolaka bino. Mpe talá, ngai nazali na bino elongo mikolo nyonso kino nsuka na ekeke.’ (Matai 28:19, 20) Na kotosáká maloba yango, baklisto bapakolami bazali kosala lokola balobeli ya Yehova banda na Pantekote ya mobu 33 T.B. kino lelo. Lokola Mose mpe Eliya, bakutanaki na nkɛlɛ ya bayangeli mpe bapesaki bango litatoli. Yesu alobaki na bantoma na ye 12 ete: “Bakobenda bino liboso na mikóló na mokili mpe na mikonzi mpo na ngai, mpo na litatoli epai na bango mpe epai na mabota na bapaya.” (Matai 10:18) Maloba na ye makokisamaki mbala na mbala na boumeli ya lisoló ya lisangá ya boklisto.—Misala 25:6, 11, 12, 24-27; 26:3.
15, 16. Bokokani nini ezali kati na bapakolami mpe Mose na Eliya na kotaleláká (a) kozanga kobanga oyo bazali na yango mpo na solo? (b) kozwáká lisungi epai na baoyo bazali Bayisalaele te?
15 Lisusu, baklisto bapakolami bazali na bobángi te lolenge moko na Mose mpe Eliya wana baponi komitya na ngámbo ya solo mpe kotɛmɛla lokuta ya mangomba. Tómikundola ndenge Paulo atɔndɔlaki mosakoli ya lokuta Moyuda na nkombo Bala-Yesu mpe ndenge atɔndɔlaki na takte mpe na mpiko, lokuta ya banzambe ya bafandi na engumba Atene. (Misala 13:6-12; 17:16, 22-31) Tómikundola mpe ete, na ntango na biso batikali bapakolami, na mpiko mpenza, bazali kotɔndɔla lokuta ya mangomba ya boklisto mpe litatoli motindo wana ezali koyokisa mangomba ya boklisto mpasi.—Emoniseli 8:7-12.c
16 Ntango Mose akimaki nkɛlɛ ya Falo, azwaki ebombamelo na ndako ya moto moko oyo azalaki Moyisalaele te, nkombo na ye ezalaki Luele, abéngamaki mpe Yetelo. Elekaki ntango molai na nsima, Mose azwaki toli moko malamu epai na Luele, toli oyo etalaki bongo kobongisama ya mwana na ye Hobaba oyo atambwisaki Yisalaele kati na mokili mokauki.d (Exode 2:15-22; 18:5-27; Mituya 10:29) Basangani ya Yisalaele ya Nzambe basungamaki mpe lolenge wana na bato mosusu oyo bazali basangani bapakolami ya Yisalaele ya Nzambe te? Ɛɛ, bazali kosungama na “ebele monene” ya “bampate mosusu,” oyo bamonani na boumeli ya mikolo oyo ya nsuka. (Emoniseli 7:9; Yoane 10:16; Yisaya 61:5) Kolobeláká lisungi ya mɔ́tɔ mpe ya bolingo oyo “bampate” yango basengelaki kopesa na bandeko na ye bapakolami, Yesu alobaki na bango na lolenge ya esakweli ete: “Nayokaki nzala mpe bopesi ngai bilei; nazalaki na mposa na mai mpe bomelisaki ngai; nazalaki mopaya mpe bonyangeli ngai; nazalaki bolumbu mpe bolatisi ngai; nazalaki na malali mpe boyei kotala ngai; nazalaki na ekangelo mpe boyeli ngai. . . . Nazali koloba na bino solo ete lokola esalaki bino yango epai na moko na bandeko na ngai baoyo baleki mokemoke, bosalelaki ngai yango.”—Matai 25:35-40.
17. Lolenge nini bapakolami bakutanaki na makambo ndenge moko na oyo Eliya akutanaki na yango na Ngomba Holebe?
17 Lisusu, Yisalaele ya Nzambe ekutani na makambo lolenge moko na oyo Eliya akutanaki na yango na Ngomba Holebe.e Lokola Eliya na ntango oyo azalaki kokima Zezabele mwasi ya mokonzi, batikali bapakolami bazalaki na bobángi mpe bakanisaki ete mosala na bango esilaki na nsuka ya Etumba ya Liboso ya Mokili mobimba. Na bongo, lolenge moko na Eliya, basengelaki kozongisa monɔkɔ epai na Yehova, ntango ayaki kosambisa bibongiseli oyo bizalaki komiloba ete bizali “ndako na Nzambe.” (1 Petelo 4:17; Malaki 3:1-3) Wana mangomba ya boklisto mazalaki kokokisa mitindá te, batikali bapakolami bayebanaki lokola “moombo na sembo mpe na mayele” mpe baponamaki mpo na kotalela bozwi nyonso ya Yesu awa na mabelé. (Matai 24:45-47) Na Ngomba Holebe, Eliya ayokaki “mongongo moke moke” ya Yehova, mpe apesaki ye mosala mingi ya kosala. Na eleko ya kimya oyo elandaki bambula ya bitumba, basaleli bapakolami ya sembo ya Yehova bayokaki mongongo na ye longwa na Biblia. Bango mpe bamonaki ete bazalaki na etindá oyo basengelaki kokokisa.—1 Mikonzi 19:4, 9-18; Emoniseli 11:7-13.
18. Bilakiseli minene nini ya nguya ya Yehova bimonisamaki na nzela na Yisalaele ya Nzambe?
18 Na nsuka, tokoki koloba ete bilakiseli minene ya nguya ya Yehova bimonanaki na nzela ya Yisalaele ya Nzambe? Nsima ya liwa ya Yesu, bantoma basalaki makamwisi mingi, kasi mokemoke makamwisi yango masukaki. (1 Bakolinti 13:8-13) Na mikolo na biso, tozali komona makamwisi te na lolenge ya mosuni. Epai mosusu, Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: “Solo solo nazali koloba na bino ete, ye oyo akondimaka ngai, misala mizali ngai kosala, akosala yango mpe lokola, mpe akosala yango ekoleka oyo.” (Yoane 14:12) Yango ekokisamaki mpo na mbala ya liboso wana bayekoli ya Yesu basakolaki nsango malamu na mboka mobimba ya Baloma na ekeke ya liboso. (Baloma 10:18) Kútu misala minene koleka mizali kosalema lelo wana batikali bapakolami bazwi esika ya liboso na mosala ya kopalanganisa nsango malamu “na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso.” (Matai 24:14) Matomba nini mamonani? Ekeke ya 20 esili komonisa motángo monene ya bato oyo bamipesi lokola basaleli ya sembo ya Yehova kati na lisoló ya bato. (Emoniseli 5:9, 10; 7:9, 10) Oyo nde elembo monene ya nguya ya Yehova!—Yisaya 60:22.
Bandeko ya Yesu bayei kati na nkembo
19. Ntango nini bandeko ya Yesu bapakolami bamonanaki elongo na ye kati na nkembo?
19 Wana bomoi ya bandeko ya Yesu bapakolami ezali kosuka awa na mabelé, bazali kozwa nkembo elongo na ye. (Baloma 2:6, 7; 1 Bakolinti 15:53; 1 Batesaloniki 4:14, 17) Na bongo, bazali kokóma bakonzi mpe banganga na bomoi ezangi nsuka kati na Bokonzi ya likoló. Elongo na Yesu, ‘bakokɛngɛla bato na mpimbo na ebende, lokola mbeki na mabelé ikobolama.’ (Emoniseli 2:27; 20:4-6; Nzembo 110:2, 5, 6) Elongo na Yesu, bakofanda na kiti na bokonzi mpo na kosambisa “mabota zomi na mibale ya Yisalaele.” (Matai 19:28) Mokili oyo ezali kokimela ezali mpenza kozela na motema likoló makambo yango, oyo mazali bongo eteni moko ya ‘emoniseli na bana na Nzambe.’—Baloma 8:19-21; 2 Batesaloniki 1:6-8.
20. (a) Na makambo nini mbongwana ya Yesu elendisi kondima ya Petelo? (b) Lolenge nini mbongwana ezali kolendisa kondima ya baklisto lelo?
20 Paulo alobelaki emoniseli ya Yesu na boumeli ya “bolɔ́zi monene” ntango akomaki ete: “Akumisama na Babulami na ye mpe asanzolama na bandimi nyonso.” (Matai 24:21; 2 Batesaloniki 1:10) Oyo nde elikya monene oyo Petelo, Yakobo, Yoane mpe baklisto nyonso bapakolami na elimo bazali na yango! Mbongwana ya Yesu elendisaki kondima ya Petelo. Na ntembe te, kotánga lisoló yango ezali mpe kolendisa kondima na biso mpe kotonga elikya na biso ete mosika te Yesu “akopesa moto na moto libonza kobila misala na ye.” Baklisto bapakolami ya sembo oyo bazali kobika kino lelo bazali komona elikya na bango kondimisama ete bakopesama nkembo elongo na Yesu. Kondima ya bampate mosusu elendisami wana bayebi ete akobikisa bango na nsuka ya ebongiseli mabe ya biloko oyo mpe akokɔtisa bango kati na nkembo ya mokili ya sika. (Emoniseli 7:14) Oyo nde elendiseli ya kotikala ngwi kino nsuka! Nzokande, emonaneli yango ekoki mpe koteya biso makambo mosusu mingi, lokola tokomona yango na lisoló oyo lilandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá babúku “Que ton nom soit santifié,” nkasa 337-338, mpe Emoniseli—kokokana na yango monene ebelemi!, nkasa 164-165, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
b Exode 2:15-22; 3:1-6; 5:2; 7:8-13; 8:18; 19:16-19; Deteronome 31:23; 1 Mikonzi 17:8-16; 18:21-40; 19:1, 2, 8-18; 2 Mikonzi 2:1-14.
c Talá búku Emoniseli—kokokana na yango monene ebelemi! nkasa 133-141.
d Talá búku Vous pouvez survivre à Harmaguédon et entrer dans le monde nouveau de Dieu, nkasa 281-282, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
e Talá búku “Que ton nom soit sanctifié,” nkasa 341-344.
Ozali komikundola?
◻ Banani bamonanaki elongo na Yesu na mbongwana?
◻ Lolenge nini kondima ya bantoma elendisamaki na mbongwana ya Yesu?
◻ Ntango Mose mpe Eliya bamonanaki “na nkembo” elongo na Yesu kati na mbongwana, bazalaki komonisa banani?
◻ Bokokani nini ezali kati na Mose na Eliya mpe Yisalaele ya Nzambe?
[Elilingi na lokasa 10]
Emonaneli ya mbongwana ya Yesu elendisaki kondima ya baklisto ya ntango ya kala mpe ya lelo