Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 15/5 nk. 4-8
  • Osengeli kondima liteya ya kozonga na bomoi mbala na mbala?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Osengeli kondima liteya ya kozonga na bomoi mbala na mbala?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tóluka koyeba eutelo mpe moboko ya liteya yango
  • Molimo, ekufaka te?
  • Mpo na nini bato bazali konyokwama?
  • Kimya na mikolo mizali koya
  • Liloba ya Nzambe lizali koteya kobotama mbala na mbala na nzoto nosusu?
    Lamuká!—1994
  • Biblia eteyaka ete moto abotamaka mbala na mbala?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Bomoi nsima ya liwa​—⁠Biblia elobaka nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Okanisaka ete ozalaki na bomoi mosusu liboso?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 15/5 nk. 4-8

Osengeli kondima liteya ya kozonga na bomoi mbala na mbala?

PLATON, filozofe Mogreke, akangisaki kolingana ya mwasi na mobali na likanisi ya kozonga na bomoi mbala na mbala. Azalaki kondima ete nsima ya kokufa ya nzoto, molimo, lokola yango ekufaka te, ekendaka na “mokili ya mitindo ya pɛto.” Lokola ezangi nzoto, molimo ekotikala kuna na boumeli ya mwa ntango, kotaláká mitindo ndenge na ndenge. Na nsima soki ezongi na bomoi na nzoto mosusu, molimo ekomikundola mpe ekozala na mposa makasi ya mokili ya mitindo ya pɛto. Engebene Platon, mwasi na mobali balinganaka mpamba te moto na moto amonaka epai ya molingami na ye lolenge ya kokoka ya bonzenga oyo azali komikundwela yango likolólikoló mpe azali koluka yango.

Tóluka koyeba eutelo mpe moboko ya liteya yango

Mpo ete liteya ya kozonga na bomoi mbala na mbala ezala solo, esengeli ete molimo ezala eloko oyo ekufaka te. Na yango, endimeli ya kozonga na bomoi mbala na mbala esengeli kouta epai ya bato mpe mabota oyo bazalaki na endimeli ete molimo ekufaka te. Na ntina yango, bamoko bakanisaka ete liteya yango eutaki na Ezipito ya kala. Basusu bandimaka ete eutaki na Babilone ya kala. Mpo na kopesa lingomba ya Babilone lokumu na miso ya bato, banganga na yango babimisaki liteya ete molimo ekɔtaka na nzoto mosusu. Na ndenge yango, bakokaki koloba ete bilombe ya lingomba na bango bazalaki sé bato minene kati na bankɔkɔ na bango oyo basilá kokufa mpe bazongaki na bomoi na nzoto mosusu.

Nzokande, endimeli ya kozonga na bomoi mbala na mbala ekólaki mpenza na mokili ya Inde. Bato ya mayele ya Lingomba ya Hindou bazalaki kokanisakanisa mingi na ntina na mikakatano mpe minyoko ya bato na mokili mobimba. Bamitunaki ete ‘lolenge nini koyokanisa mikakatano yango mpe likanisi ya Mozalisi oyo azali na boyengebene?’ Bamekaki kosilisa mokakatano kati na boyengebene ya Nzambe mpe makámá makanami te na bokeseni oyo ezali komonana na mokili. Na nsima, basalaki “mobeko ya karma,” oyo elobi ete ekela nyonso ya moto ezali na mbuma na yango​—‘soki moto akokóna nini, akobuka bobele yango.’ Bakomaki ebele ya makambo mazali komonisa misala mpe matomba na yango, kati na yango misala malamu mpe misala mabe oyo moto asalaki na bomoi eleka mikopesamela mbano na bomoi oyo ekolanda.

“Karma” elimboli “ekela.” Elobamaka mpo na moto ya Lingomba ya Hindou ete azali na karma malamu soki azali kolanda mitindá ya lolenge malamu ya kofanda na bato mpe mitindá ya lingomba mpe karma mabe soki azali kolanda yango te. Bikela na ye, to karma, bikokata avenire na ye mbala nyonso oyo akobotama lisusu. Filozofe Nikhilananda alobi ete: “Bato nyonso babotamaka na manáka ya bomoto, oyo esila kobongisama na misala na bango na bomoi eleka, atako lolenge na bango ya libanda ezali kolanda oyo ya baboti na bango. [Boye,] moto azali mobongisi ya makambo makokómela ye na bomoi, motongi ya nzela oyo bomoi na ye ekolanda.” Nzokande, mokano ya nsuka ezali nde ya kosikwama na zolongano wana ya koleka na bomoi mosusu mbala na mbala mpe koya kosangana na Brahman to “solo eleki kotombwana.” Bango bandimaka ete mpo na kolónga kokokisa yango esengeli kosala milende ya kozala na bizaleli oyo bindimami na bato nyonso mpe kozwa boyebi moko ya sipesiale na losambo ya Hindou.

Liteya ya kozonga na bomoi mbala na mbala ezwi moboko na yango na liteya oyo elobi ete molimo ekufaka te mpe etongami likoló na yango na kosaleláká mobeko ya karma. Tótalela oyo Biblia, Liloba ya Nzambe, ezali koloba na ntina na makanisi wana.

Molimo, ekufaka te?

Mpo na koyanola na motuna oyo, tótalela likambo yango na búku oyo eleki babúku mosusu nyonso na ntina​—ezali bongo Liloba lipemami na Mozalisi. Na Genese, mokanda ya liboso ya Biblia, tozali kozwa ndimbola ya sikisiki ya “molimo.” Na ntina na kozalisama ya Adama, moto ya liboso, Biblia elobi: “Nzambe asalaki moto na mputulu na mokili, mpe apemaki kati na zolo na ye mpema na bomoi, mpe moto akómaki molimo na bomoi.” (Genese 2:7) Emonani polele ete, molimo ezali te eloko oyo moto azali na yango kasi moto azali nde molimo. Liloba ya Liebele oyo lisalelami awa mpo na molimo ezali neʹphesh. Ezali komonana soko mbala 700 kati na Biblia, mpe ata mbala moko te ezali kolobelama mpo na eteni ya nzoto oyo emonanaka te kasi mbala nyonso ezali kolobelama mpo na eloko oyo tokoki kosimba yango mpe eloko ya mosuni.​—Yobo 6:7; Nzembo 35:13; 107:9; 119:28.

Molimo ekendaka wapi soki moto akufi? Tótalela oyo ekómelaki Adama ntango akufaki. Nsima ya kosala lisumu, Nzambe alobaki na ye ete: ‘Okozonga na mabelé, mpo ete okamatamaki na yango, zambi ozali mputulu, mpe okozonga na mputulu.’ (Genese 3:19) Kanisá naino ndimbola ya maloba wana. Liboso ete Nzambe azalisa ye na mputulu, Adama azalaki te. Nsima ya liwa na ye, Adama azongaki na ezalela wana ya kozanga kozala.

Na maloba ya polele, Biblia ezali koteya ete liwa ezali kozanga bomoi. Na Mosakoli 9:5, 10, tozali kotánga boye: “Bato na bomoi bayebi ete bakokufa; nde bakufi bayebi likambo te, bazali na libonza mpe te; kokanisa na bango esili kobungana. Oyo lobɔkɔ na yo ezwi mpo na kosala, salá yango na nguya na yo mpo ete ezali na mosala te, to mwango te, to mayele te, to boyebi te kati na esika na bakufi, esika ekokenda yo.”

Yango elimboli ete bakufi bazali na likoki ya kosala te to mpe ya koyoka eloko moko te. Bazali lisusu na makanisi te, bazali mpe komikundola likambo moko te. Mokomi na nzembo alobi: “Ndimelá bana na mikonzi te, to moto, mpo ete azali na kosunga te. Soko [elimo, NW] ekolongwa, moto akozonga na mabelé lisusu; bobele na mokolo yango kokanisa na ye esili.”​—Nzembo 146:3, 4.

Biblia ezali komonisa polele ete na liwa ya moto, molimo ekɔtaka na nzoto mosusu te, kasi ekufaka mpenza solo. Biblia elobi na maloba ya sikisiki ete “molimo oyo asali lisumu, ye akokufa.” (Ezekiele 18:4, 20; Misala 3:23; Emoniseli 16:3) Na yango, endimeli oyo ete molimo ekufaka te​—oyo ezali moboko mpenza ya liteya ya kozonga na bomoi mbala na mbala​—endimisami ata moke te na Makomami. Kozanga yango, liteya ya kobotama mbala na mbala ekweisami. Na bongo, minyoko oyo tozali komona na mokili miuti wapi?

Mpo na nini bato bazali konyokwama?

Ntina monene mpo na yango bato bazali konyokwama ezali bongo kozanga kokoka oyo biso banso tosangoli na mosumuki Adama. Biblia elobi ete “mabe ekɔtaki na mokili na moto moko, mpe kufa ekɔtaki mpo na mabe. Kufa mpe epalangani epai na bato nyonso mpo ete bato nyonso basali mabe.” (Baloma 5:12) Lokola biso nyonso tobotami na Adama, biso nyonso tozwaka maladi, tonunaka, mpe tokufaka.​—Nzembo 41:1, 3; Bafilipi 2:25-27.

Lisusu, mobeko ya Nzambe, oyo ekoki kobongwana te, na ntina na bizaleli malamu elobi ete: “Bómizimbisaka te; Nzambe akokosama te. Soko moto akokona nini, akobuka bobele yango. Soko akokona kati na nzoto, akobuka libebi kati na nzoto.” (Bagalatia 6:7, 8) Na yango, lolenge ya bomoi ya komipesa na makambo ya mbindo ekoki kosuka na mpasi na mayoki, na bazemi oyo ekanamaki te, mpe na makɔnɔ mazali kozwama na nzela ya kosangisa nzoto. Zulunalo Scientific American elobi ete “motángo ya kokamwisa ya bato 30 likoló na 100 bazali na maladi ya kansɛr oyo ezali koboma [na États-Unis] euti libosoliboso na komela likaya, mpe motuya bobele moko mpo na lolenge ya bomoi, mingimingi na motindo ya bilei oyo bato bazali kolya mpe na kozanga kosalisa nzoto na bango ngalasisi.” Makámá mosusu oyo mazali konyokola bato mauti na lolenge oyo bato bazali kobebisa mabelé mpe biloko oyo bizali kati na yango.​—Kokanisá na Emoniseli 11:18.

Ya solo, moto amiyeiseli bwale mingi ye moko. Nzokande, lokola molimo ekufaka, mobeko ya ‘kobuka oyo okonaki’ ekoki kosalelama te mpo na koyokanisa mpasi ya bato na karma​—misala oyo elobami ete moto asalaki yango na bomoi na ye eleka. Biblia elobi ete “mokufi asili kokangwa na masumu [na ye].” (Baloma 6:7, 23) Na yango, mbuma ya masumu ezali kolanda moto te na bomoi mosusu nsima ya liwa na ye.

Satana Zabolo ye mpe azali koyeisa monyoko mingi. Ya solo, mokili ezali koyangelama na Satana. (1 Yoane 5:19) Mpe lokola Yesu Klisto alobaki yango, bayekoli na Ye basengelaki ‘koyinama mpo na nkombo na ye.’ (Matai 10:22) Litomba na yango ezali ete mbala mingi basembwi bazali kokutana na mikakatano koleka bato mabe.

Kati na mokili oyo makambo mosusu makoki kobima oyo biutelo na yango bizali koyebana noki te. Mopoti mbango akoki kobɛta libaku mpe na bongo akolónga te na momekano. Limpinga ya basodá oyo lizali na nguya mingi likoki kolóngama na limpinga mosusu oyo lizali na makasi mingi te. Moto na mayele akoki kozanga likoki ya kozwa mosala ya malamu mpe na bongo kokufa nzala. Na ntina na makambo mosusu ya bomoi, bato oyo bayebi malamu mosala ya mombongo bakoki kozanga likoki ya kosalela boyebi na bango mpe na bongo kokóma babóla. Bato ya mayele mingi bakoki kokwela nkanda ya bakonzi mpe na bongo kozala na mikakatano. Mpo na nini boye? Salomo, Mokonzi na mayele ayanoli ete ‘nde ntango mpe makambo makanami te ekokwela bango nyonso.’​—Mosakoli 9:11, NW.

Mpasi ebanda kala epai na bato liboso ete bato ya mayele ya Lingomba ya Hindou bámeka kolimbola ntina na yango. Kasi elikya ezali mpo na mikolo mizali koya? Mpe elaka nini Biblia ezali kopesa mpo na bakufi?

Kimya na mikolo mizali koya

Mozalisi alaki ete mosika te akotya nsuka na ebongiseli ya mokili ya lelo oyo eyangelami na Satana. (Masese 2:21, 22; Danyele 2:44) Ebongiseli ya sika mpe ya boyengebene mpo na bato​—“mabelé ya sika”​—ekozala likambo ya solo. (2 Petelo 3:13) Na ntango yango “mofandi moko te akoloba ete, Ngai nazali na maladi.” (Yisaya 33:24) Ata bolɔ́kɔ ya liwa ekofungwama, mpamba te Nzambe “akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi lisusu mpe te; mpo ete makambo na liboso masili koleka.”​—Emoniseli 21:4.

Mpo na bafandi na mokili ya sika elakami na Nzambe, mokomi na nzembo asakolaki ete: “Bayengebene bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.” (Nzembo 37:29) Lisusu, bato na bopɔlɔ “bakosangola mokili, bakosepela mpe na kimya na solo.”​—Nzembo 37:11.

Mukundbhai, oyo tolobelaki na lisoló ya liboso, asila kokufa kozanga ete azwa libaku ya koyeba bilaka kitoko ya Nzambe. Kasi bamilió ya bato oyo bakufaki kozanga koyeba Nzambe, elikya ezali ete bakosekwisama na mokili wana ya sika mpe ya kimya, mpamba te Biblia elaki ete: “Lisekwa ekozala mpo na bato sembo mpe na bato sembo te.”​—Misala 24:15; Luka 23:43.

Liloba “lisekwa” ebongolami awa uta na liloba ya Greke a·naʹsta·sis, oyo elimboli mpenzampenza “kotɛlɛma lisusu.” Na yango, lisekwa ezali kopesa likanisi ya kozongisa lisusu makambo ya bomoi ya moto.

Mozalisi ya likoló na mabelé azali na bwanya ezangi nsuka. (Yobo 12:13) Komikundola makambo ya bomoi ya bakufi ezali likambo ya mpasi te mpo na ye. (Kokanisá na Yisaya 40:26.) Yehova Nzambe atondi mpe na bolingo. (1 Yoane 4:8) Yango wana, akoki kosalela bɔɔngɔ́ na ye ya kokoka, ezali te mpo na kopesa bakufi etumbu na ntina na misala mabe oyo basalaki, kasi mpo na kozongisa bango na bomoi na paladiso awa na mabelé na bomoto oyo bazalaki na yango liboso ete bákufa.

Mpo na bamilió ya bakufi lokola Mukundbhai, lisekwa ekolimbola kozala lisusu esika moko na balingami na bango. Kasi kanisá oyo yango ekoki kolimbola mpo na baoyo bazali na bomoi sikawa. Tókamata na ndakisa mwana ya Mukundbhai, ye oyo akómaki na boyebi ya solo na ntina na Nzambe mpe mikano na ye. Oyo nde kobɔndisama mpo na ye na koyebáká ete tata na ye akangami te kati na zolongano ezangi nsuka ya kobotama mbala na mbala, oyo mokomoko na yango etondi na mabe mpe minyoko! Azali bobele kolala kati na kufa, kozeláká lisekwa. Oyo nde esengo mpo na ye ya kozala na makanisi ete mokolo mosusu akoyebisa tata na ye makambo oyo asili koyekola na Biblia!

Mokano ya Nzambe ezali ete “bato ya lolenge nyonso bábika mpe ete bákoma na boyebi ya sikisiki ya solo.” (1 Timoté 2:3, 4, NW) Sikawa ezali ntango ebongi mpo na yo, mpe bamilió mosusu oyo bazali sikawa kosala mokano ya Nzambe, ete bókoka koyekola lolenge oyo bokoki kozala na bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé.​—Yoane 17:3.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 7]

“Ntango mpe makambo makanami te ekokómelaka bango nyonso.”​—Mosakoli 9:11, “NW”

[Etanda na lokasa 6]

Bomoto ya Nzambe mpe mobeko ya Karma

Mohandas K. Gandhi alimbolaki ete “mobeko ya Karma ekoki kobongolama te mpe likoki ezali te ya kokima yango. Na yango, ezali na ntina te ete Nzambe amikɔtisa mpo na kokata likambo. Asalaki mobeko yango mpe, nsima ya kosalama, abendaki nzoto.” Gandhi azalaki kobulunganisama na likambo yango.

Epai mosusu, elaka ya lisekwa ezali komonisa ete Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na bikelamu na ye. Mpo na kozongisa mokufi na bomoi kati na paladiso awa na mabelé, Nzambe asengeli koyeba mpe komikundwela likambo mokomoko ya moto yango. Ya solo, Nzambe azali komibanzabanza mpo na moko na moko na biso.​—1 Petelo 5:6, 7.

[Picture on pagea 5]

Yiká ya bomoi engebene Lingomba ya Hindou

[Picture on pagea 8]

Liloba ya Nzambe ezali koteya lisekwa

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto