Olyaka malamu na elimo?
“Koleisama malamu ezali mposa eleki ntina epai na moto. . . . Soki bilei bizangi, tokokufa.”—Food and Nutrition.
MALOBA wana mazali komonana ete mazali mpenza solo soki totali mibali, basi mpe bana oyo bakɔnda mpo ete bazangi likoki ya kokokisa ‘mposa wana eleki ntina epai na moto.’ Basusu bazali na likoki ya kolya, kasi mpo na koloba solo balyaka malamu te. Nzokande, basusu oyo bazali na likoki ya kolya malamu, mbala mingi bazali kosepela bobele na bilei bizangi vitamini oyo bikoki te mpo na kotonga nzoto na bango. Zulunalo Healthy Eating elobi ete: “Emonani ete bilei ezali moko na bozwi na biso oyo eleki kobebisama.”
Likeseni ezali mpenza te na oyo etali bilei ya elimo—elingi koloba solo oyo ezwami na Biblia, Liloba ya Nzambe. Bamoko bazangi ata oyo ezali bilei ya moboko ya elimo; bazali na nzala na elimo. Basusu bazali nde na bopɔtu ya komizwela bilei ya elimo oyo bizali pembeni na bango. Ezali boni mpo na yo? Olyaka malamu na elimo? To ekoki kozala ete ozali komipimela bilei ya elimo? Ezali na ntina ete tózala sembo na likambo yango mpamba te tozali na mposa ya bilei ya elimo koleka bilei ya mosuni.—Matai 4:4.
Bilei mpo na kokóla na elimo
Food and Nutrition, búku oyo ezali kolobela ntina ya kolya bilei ya malamu, epesi biso bantina misato ya moboko oyo moto asengeli kolya malamu. Moko ezali ete tozali na mposa ya bilei “mpo na kokóla mpe kobongisa nzoto oyo ezali kobeba na ntango baselile ezali kokufa.” Oyebi ete mokolo na mokolo na bomoi na yo, bamiliare ya baselile ezali kokufa kati na nzoto na yo mpe mosusu esengeli kokitana yango? Bokóli malamu mpe kobatelama malamu ya nzoto esɛngi bilei malamu.
Ezali mpe bongo na elimo. Na ndakisa, ntango ntoma Paulo akomelaki lisangá ya Efese, alobelaki mingi lolenge oyo moklisto mokomoko azali na mposa ya bilei malamu na elimo mpo ete akóma “mobali oyo akɔmeli.” (Baefese 4:11-13, NW) Na ntango tozali kolya malamu bilei ya elimo oyo bizali na vitamini, tozali lisusu te lokola bilɛzi bazangi nguya, oyo tozangi likoki ya komibatela, mpe oyo tokoki kokwea na bolɛmbu nyonso na makámá ya lolenge nyonso. (Baefese 4:14) Nzokande, tokokóla kino kokóma mikóló ya makasi, oyo bazali na makoki ya kobunda makasi mpo na kondima mpamba te ‘toleisami na maloba ya kondima.’—1 Timoté 4:6, NW.
Ezali bongo mpo na yo? Osili kokóla na elimo? To ozali naino lokola elɛzi na elimo—oyo azangi libateli, oyo asengeli ntango nyonso kotalela basusu, mpe oyo azangi likoki ya kokokisa mikumba ya boklisto? Ya solo, mingi te kati na biso bakoloba na kozanga kokakatana ete bazali bilɛzi na elimo, kasi ezali na ntina ete tómitalela na bosembo nyonso. Bamoko kati na baklisto bapakolami bazalaki ndenge yango na ekeke ya liboso. Atako basengelaki kokóma “balakisi,” oyo babongi mpe balingi kolakisa basusu makambo oyo Liloba ya Nzambe ezali koloba, ntoma Paulo akomaki ete: “Bozali naino na bosɛnga ete moto alakisa bino lisusu makambo mikemike na liboso na mateya na Nzambe. Bozali na bosɛnga na mabɛlɛ nde na bilei makasi te.” Soki olingi kokóla na elimo, loná mposa ya kolya bilei ya elimo oyo bizali malamu mpe ya makasi. Komisepelisa te bobele na bilei ya bilɛzi na elimo!—Baebele 5:12.
Tozali mpe na mposa ya bilei makasi yango ya elimo mpo na kobongisa mbeba nyonso euti na mitungisi ya mokolo na mokolo kati na mokili mabe oyo. Mitungisi yango mikoki kolɛmbisa makasi na biso ya elimo. Kasi Nzambe akoki kozongisa makasi yango. Paulo alobaki ete: “Bongo tozali kotika motema te. Ata ndambo na biso na libanda ezali kolɛmba, nde ndambo na biso na kati ekobongwanaka eloko na sika mokolo na mokolo.” (2 Bakolinti 4:16) Lolenge nini tozali ‘kobongwana eloko na sika mokolo na mokolo’? Moko na myango ezali komileisa ntango nyonso na Liloba ya Nzambe na nzela ya boyekoli ya Makomami mpe mikanda mikolimbolaka Biblia, ezala biso moko mpe na etuluku.
Bilei mpo na nguya na elimo
Bilei bizali mpe na ntina mpo na “kopesa mɔ́tɔ mpe nguya.” Bilei bizali kopesa na nzoto biloko oyo ezali na yango mposa mpo ete esala malamu. Soki tozali kolya malamu te, tokozala na nguya moke. Kozanga “fer” kati na bilei na biso, ekoki kolɛmbisa nzoto na biso mpe tokozanga nguya ya kosala mosala. Ezali ndenge yango nde omiyokaka bantango mosusu mpo na kosala misala ya elimo? Ezalaka mpasi mpo na yo ete okokisa mikumba miyokani na ezalela na yo ya moklisto? Bamoko kati na baoyo bazali komitánga ete bazali balandi ya Yesu Klisto bakómaka na bolɛmbu mpo na kosala misala malamu, mpe bazangaka mpiko mpo na misala ya boklisto. (Yakobo 2:17, 26) Soki omoni ete ezali boye mpo na yo, mbala mingi nkisi ekoki kozala bongo kobongisa mimeseno na yo ya komileisa na elimo to na kobongisa lolenge ya bilei na yo ya elimo.—Yisaya 40:29-31; Bagalatia 6:9.
Kosala bozoba te na kolóna mimeseno ya komileisa mabe na elimo. Moko na myango minene oyo Satana asili kosalela na boumeli ya bikeke ezali bongo kondimisa bato ete bazali na mposa te ya kotánga Biblia mpe kozwa boyebi ya sikisiki oyo ezali kouta kati na yango. Azali kosalela tekiniki moko eumeli mingi oyo esalelamaka na mampinga ya babotoli mpo na kokonza bingumba ya banguna—kosala ete bázanga bilei mpe konyokola bango na nzala mpo na kokonza bango. Kasi ye asili kokólisa lisusu tekiniki yango. Azali kozimbisa baoyo azali “kokangisa” bango na kosaláká ete bango moko bamiboma nzala wana bazali na ebele na bilei kitoko ya elimo pembeni na bango. Ezali likambo ya kokamwa te na komona ete mingi bazali kokwea na mitambo ya Satana!—Baefese 6:10-18.
Bilei mpo na kolɔngɔ́nɔ́ ya elimo
Food and Nutrition elobi ete ntina ya misato mpo na yango tozali na mposa ya bilei, ezali mpo na “kobongisa kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto . . . mpe kopɛngola maladi.” Matomba ya bilei malamu mpo na kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto mamonanaka nokinoki te. Na ntango tosilisi kolya bilei kitoko, mbala mingi tokanisaka te ete, ‘Yango epesi motema na ngai (to bangei to mpe misuni na ngai, mpe bongo na bongo) bolamu mingi.’ Nzokande, tiká kolya na boumeli ya mwa ntango molai, mpe mbeba mpo na nzoto na yo ekomonana polele. Mbeba nini? Búku moko ya makambo ya minganga elobi ete: “Kozanga kolya malamu mbala mingi ememaka sé litomba ya mabe: kozanga kokóla malamu, kozanga makoki ya kobundisa maladi ya mikemike, kozanga nguya to makoki ya kosala mosala.” Lolenge wana ya maladi ya elimo ekómelaki libota ya Yisalaele ya kala na eleko moko. Mosakoli Yisaya alobaki na ntina na bango ete: “Motó mobimba etondi na maladi, motema mobimba na bolɛmbu. Longwa na litambe na lokolo kino motó nguya malamu ezali te.”—Yisaya 1:5, 6.
Bilei malamu ya elimo epesaka biso nguya ya kotɛmɛla bolɛmbu motindo wana ya elimo mpe mbeba ya maladi na elimo. Boyebi euti na Nzambe esalisaka biso ete tózala ntango nyonso na ezalela malamu na elimo—soki tozali komileisa na elimo! Yesu Klisto alobelaki lolenge oyo bato mingi ya mikolo na ye bazwaki liteya te na bopɔtu ya bankɔkɔ na bango na likambo ya komileisa malamu na elimo. Bango mpe baboyaki komileisa na mateya ya solo oyo azalaki kosakola. Litomba ezalaki nini? Yesu alobaki ete: “Mitema na bato oyo misili koya makasi, bayoki na matoi na bozito, mpe bazipi miso na bango, ete bámona na miso te, mpe báyoka na matoi te, mpe báyeba na mitema te, mpe bázonga te ete nabikisa bango.” (Matai 13:15) Bato mingi bazwaki litomba ata moke te na nguya ya kobikisa ya Liloba ya Nzambe. Batikalaki na maladi na elimo. Ata mpe baklisto bapakolami mosusu bakómaki “na bolɛmbu mpe na maladi.” (1 Bakolinti 11:30) Tiká ete tótyola soko moke te bilei ya elimo oyo Nzambe azali kopesa biso.—Nzembo 107:20.
Kozwa mikrobe na elimo
Longola likámá ya nzala ya elimo, ezali na likámá mosusu oyo tosengeli komisɛnzɛla mpo na yango—lolenge ya bilei oyo tozali kolya ekoki kozala na mikrobe. Koyokamela mateya oyo mazali na makanisi mabe ya bademó ekoki kokɔtisa ngɛngɛ na nzoto na biso lolenge moko soki tolei bilei oyo bibebisami na mikrobe to na ngɛngɛ. (Bakolose 2:8) Ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te mpo na koyeba bilei oyo bibebisami na ngɛngɛ. Moto moko ya mayele alobi ete: “Bilei bikoki mbala mosusu komonana malamu nzokande bizali na mikrobe mabe na kati na yango.” Na yango, ebongi malamu ete tótalelaka eutelo ya bilei na biso ya elilingi, koyebáká ete mikanda mosusu, lokola oyo ya bapɛngwi, ekoki kobebisama na mateya mauti na Makomami te mpe na filozofi. Balambi mosusu ya bilei bazali mbala mosusu kotya likoló na yango etikɛti oyo ekopesa yango lokumu ya lokuta mpo na kozimbisa basombi ya biloko na bango. Na ntembe te tokoki komizela komona Satana, mozimbisi monene, ete asala lolenge moko. Na yango, omindimisa ete ozali kozwa bilei wana ya elilingi na eutelo oyo ebongi kotyelama motema, mpo ete ozala ntango nyonso na ‘makasi kati na kondima.’—Tito 1:9, 13.
Thomas Adams, moteyi moko ya ekeke ya 17, alobaki na ntina na bato ya eleko na ye ete: “Basili kotimola nkunda na bango na mino na bango.” Na maloba mosusu, oyo balyaki ebomaki bango. Omindimisa ete bilei oyo ozali kolya na elimo ekoboma yo te. Luká bilei malamu ya elimo. Na ntango baoyo bamitángaki ete bazali libota na ye bamibalolaki na balakisi mpe basakoli ya lokuta, Yehova Nzambe atunaki bango ete: “Mpo na nini bokosilisa mosolo na bino epai na yango ezali kwanga te? Bóyokamela ngai koyoka mpenza mpe bólya yango ezali malamu, bómisepelisa na mafuta. Bósembola litoi epai na ngai mpe yaka na ngai, bóyoka ete molimo na bino abika.”—Yisaya 55:2, 3; kokanisá na Yilimia 2:8, 13.
Ebele na bilei ya elimo
Na ntembe te bilei ya elimo bizangi te. Lokola Yesu Klisto asakolaki yango, azali sikawa na kelasi ya moombo ya sembo mpe ya mayele oyo azali na mokumba ya kopesa “bilei na elaka na yango” mpo na moto nyonso oyo azali na mposa na yango. (Matai 24:45) Na nzela ya mosakoli Yisaya, Yehova alakaki ete: “Talá, baombo na ngai bakolya, nde bino bokoyoka nzala. . . . Baombo na ngai bakoyemba mpo na esengo na motema.” Ya solo, alaki elambo monene mpo na baoyo balingi kolya. “[Yehova] na bibele akobongisela mabota nyonso elambo na bilei na mafuta, elambo na vinyo oyo esili koumela, na bilei kitoko bitondi na mafuta.”—Yisaya 25:6; 65:13, 14.
Nzokande, kanisá naino likambo oyo: Tokoki kokufa nzala wana tozali kati na elambo! Atako bilei mingi bizali zingazinga na biso, ekoki kokómela biso ete tozala bato baleisami malamu te soki totɛlɛmi te mpo na kolya mwa ndambo na yango. Masese 26:15 emonisi likambo yango na elobeli ya polele ete: “Moto na goigoi akotya lobɔkɔ na ye na saani na bilei; akolɛmba wana ekoyeisa ye yango na monɔkɔ na ye lisusu.” Oyo nde likambo ya mawa! Lolenge moko, biso mpe tokoki kokóma na bolɛmbu makasi mpo na komimesenisa na boyekoli ya biso moko ya Liloba ya Nzambe mpe mikanda mikolimbolaka Biblia oyo mibimisami mpo na kosalisa biso ete tólya bilei ya elimo. Nzokande tokoki kokóma na bolɛmbu mpenza mpo na komibongisa to mpo na kopesa biyano na makita ya lisangá ya boklisto.
Mimeseno malamu ya kolya
Na yango, tozali na bantina malamu ya kokólisa mimeseno malamu ya komileisa na elimo. Nzokande, mpo na koloba solo, mingi bazali kolya bilei na bango ya elimo na nsɔ́ngɛ ya mosapi, basusu kútu bazali mpenza komiboma nzala. Bakokani na bato oyo bamonaka te ntina ya komileisa malamu kino yango ekobendela bango mikakatano nsima ya mikolo kati na bomoi na bango. Búku Healthy Eating epesi ntina oyo mpo na yango tokoki kozanga kotya likebi na mimeseno na biso ya kolya, atako toyebi ete kolya malamu ezali na ntina mpo na bomoi na biso: “Mokakatano [lokola mbuma ya mimeseno mabe ya kolya] ezali ete kobeba ya nzoto emonanaka mbala moko te, ezalaka na mbeba ya mbalakaka te lokola soki moto akatisi nzela ya mituka kozanga bokɛngi. Nzokande, kobeba ya kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto ekoki kosalema malɛmbɛmalɛmbɛ, kozanga ete eyebana, maladi makoki kozwama kozanga nkaká, mikuwa mikoki kolɛmba mingi, kobela ya mpota mpe kozonga nzoto kolɔngɔ́nɔ́ nsima ya maladi ekoki kosalema nokinoki te.”
Na mikakatano minene mpenza, moto akoki kokóma lokola elenge mwasi oyo azali na maladi mabéngami anorexie nerveuse. Akomindimisa ete azali na mposa ya bilei moke, azali mpenza malamu, atako azali kokonda. Nsukansuka akozala lisusu na mposa ya kolya te. Búku moko ya minganga elobi ete: “Likambo yango ezali likámá.” Mpo na nini? “Atako esalemaka mingimingi te ete mobɛli akufa solo na nzala, akokóma mpenza moto oyo alyaka malamu te mpe akoki kokufa ata mpo na mwa maladi ya moke.”
Mwasi moklisto moko andimaki ete: “Na boumeli ya bambula mingi nabundaki na likambo oyo, nayebaki ntina ya kobongisa makita mbala na mbala mpe koyekola ngai moko nzokande nakokaki kosala yango te.” Ya solo asalaki mbongwana na boye ete akómaki moyekoli malamu ya Liloba ya Nzambe, kasi bobele ntango ayaki koyeba mpenza ntina ya kosala na lombangu na kotalela ezalela oyo akómaki na yango.
Na yango, bóbosana te toli oyo ntoma Petelo apesaki. Bókóma lokola “bana babotami bobele sasaipi,” mpe “bóyoka mposa na mabɛlɛ sembo na [liloba, NW] ete mpo na yango bókóla kino lobiko.” (1 Petelo 2:2) Ɛɛ, “bóyoka mposa”—bólóna mposa makasi—mpo na kotondisa elimo na bino mpe motema na bino na boyebi ya Nzambe. Baoyo bazali mikóló na elimo basengeli mpe kolanda kokokisa mposa yango. Bókómisa te bilei ya elimo lokola ‘moko na biloko na bino oyo bileki kobebisama.’ Bómileisa malamu na elimo, mpe bózwa litomba mobimba na “maloba sembo” nyonso mazwami kati na Biblia, Liloba ya Nzambe.—2 Timoté 1:13, 14.
[Elilingi na lokasa 28]
Osengeli nde kobongisa lolenge na yo ya komileisa?