Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 15/11 nk. 15-20
  • Lolenge oyo bakɛngɛli-batamboli bazali kosala lokola bakapita ya sembo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lolenge oyo bakɛngɛli-batamboli bazali kosala lokola bakapita ya sembo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tómonisa botɔ́ndi mpo na mosala na bango
  • Bazali kokokisa malamu mokumba na bango lokola bakapita
  • Bizaleli mosusu ya ntina mingi
  • Matomba oyo bazali kozwa kati na mosala na bango ya esengo
  • Bakɛngɛli-batamboli—makabo na motindo ya mibali
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Bakɛngɛli mpo na kobatela etonga
    Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
  • Ndenge nini bakɛngɛli ya zongazonga basalisaka biso?
    Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
  • Biso nyonso tolendisamaka
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 15/11 nk. 15-20

Lolenge oyo bakɛngɛli-batamboli bazali kosala lokola bakapita ya sembo

“Pelamoko ezwi moto na moto likabo na ngɔlu, bósungana na yango lokola bakɛngɛli [“bakapita,” “NW”] malamu na ngɔlu na Nzambe, oyo na mitindo mingi.”​—1 PETELO 4:10.

1, 2. (a) Lolenge nini okoki kolimbola liloba “kapita”? (b) Banani batángami kati na bakapita oyo Nzambe azali kosalela?

YEHOVA azali kosalela baklisto nyonso ya sembo lokola bakapita. Mingimingi, kapita azali mosaleli oyo apesameli mokumba ya kobatela ndako. Akoki mpe kokamba misala ya nkolo na ye. (Luka 16:1-3; Bagalatia 4:1, 2) Yesu abéngaki lisangani ya bapakolami na ye ya sembo awa na mabelé ete “kapita na sembo.” Apesaki epai na kapita yango mokumba ya “biloko nyonso bizali na ye,” kati na yango mpe misala mitali kosakola nsango ya Bokonzi.​—Luka 12:42-44; Matai 24:14, 45.

2 Ntoma Petelo alobaki ete baklisto nyonso bazali bakapita ya ngɔlu ya Nzambe oyo emonisami na mitindo mingi. Moklisto mokomoko azali na mokumba oyo na nzela na yango akoki kosala lokola kapita ya sembo. (1 Petelo 4:10) Bankulutu baklisto baponami bazali bakapita, sangisá mpe bakɛngɛli-batamboli. (Tito 1:7) Lolenge nini bankulutu-batamboli wana batalelami? Bizaleli nini mpe mikano nini basengeli kozala na yango? Mpe lolenge nini bakoki kosala nyonso oyo ekoki na bango?

Tómonisa botɔ́ndi mpo na mosala na bango

3. Mpo na nini bakɛngɛli-batamboli bakoki kobéngama “bakapita malamu”?

3 Babalani baklisto mibale batindaki nkomá epai na mokɛngɛli-motamboli moko na mwasi na ye na koyebisáká bango ete: “Totɔ́ndi bino mingi mpo ete bolekisaki ntango elongo na biso mpe bomoniselaki biso bolingo. Tozwi matomba mingi na libota na biso na nzela ya bilendiseli mpe batoli na bino. Toyebi ete tosengeli ntango nyonso kolanda kokóla na elimo, kasi na lisalisi ya Yehova mpe na nzela ya bandeko mibali mpe basi lokola bino, mikakatano oyo tokoki kokutana na yango kati na bokóli na biso mizali koyeisama pɛpɛlɛ.” Maloba motindo oyo malobamaka mingi mpamba te bakɛngɛli-batamboli bamibanzabanzaka mpenza mpo na baninga na bango bandimi, lokola kapita malamu akokisaka na lolenge lobongi mposa ya bato ya ndako oyo ye azali na mokumba ya kobatela. Bamoko bazali balobi malamu mpenza. Baíké bazali na makoki mingi kati na mosala ya kosakola, nzokande basusu bayebani malamu mpo na ezaleli na bango ya mɔ́tɔ mpe ya motema mawa. Na kokólisáká mpe na kosaleláká makabo motindo wana mpo na kosunga basusu, na bosembo nyonso, bakɛngɛli-batamboli bakoki kobéngama “bakapita malamu.”

4. Motuna nini tokotalela yango sikawa?

4 Ntoma Paulo akomaki ete: “Bakolukaka epai na mobateli [“kapita,” NW] ete amonana moto na sembo.” (1 Bakolinti 4:2) Kosunga baninga baklisto na masangá makeseni pɔ́sɔ na pɔ́sɔ ezali libaku moko ya esengo oyo ekokani na mosusu te. Nzokande, ezali mpe mokumba monene. Na bongo, lolenge nini bakɛngɛli-batamboli bakoki kokokisa na bosembo nyonso mpe na lolenge malamu mokumba na bango lokola bakapita?

Bazali kokokisa malamu mokumba na bango lokola bakapita

5, 6. Mpo na nini kotya motema mobimba epai na Yehova na libondeli ezali na ntina mingi kati na bomoi ya mokɛngɛli-motamboli?

5 Kotya motema mobimba epai na Yehova kati na libondeli ezali mpenza likambo ya ntina mingi mpo na bakɛngɛli-batamboli bákokisa mokumba na bango malamu. Lokola basengeli kolanda manáka ya sikisiki, mpe bazali na mikumba mingi, bakoki mbala mosusu komiyoka ete mokumba yango moleki bango ndelo. (Kokanisá na 2 Bakolinti 5:4.) Na yango, basengeli kolanda toli oyo ezwami kati na nzembo ya Davidi, ete: “Kitisá mokumba na yo epai na [Yehova] mpe ye akokumba yo; libela ye akotika te ete moyengebene atelengana.” (Nzembo 55:22) Maloba mosusu ya Davidi, oyo malandi, mazali mpe ya kobɔndisa: “Nkolo akumisama, ye oyo akomema mikumba na biso mokolo na mokolo.”​—Nzembo 68:19.

6 Epai wapi Paulo azwaki nguya ya kokokisa mikumba na ye na elimo? Akomaki ete: “Nayebi kosala makambo nyonso kati na ye oyo akokembisaka ngai na nguya.” (Bafilipi 4:13) Ɛɛ, Yehova Nzambe nde azalaki Liziba uta na yango Paulo azalaki kozwa nguya. Bobele bongo, Petelo apesaki toli oyo ete: “Nani ayebi kosala misala? Asala mpo na nguya ekopesaka Nzambe ye ete na makambo nyonso Nzambe akumisama mpo na Yesu Klisto.” (1 Petelo 4:11) Ndeko moko oyo azalaki mokɛngɛli-motamboli na boumeli ya mbula mingi alobelaki makasi ntina ya kotya motema epai na Nzambe, koyebisáká ete: “Talelá ntango nyonso Yehova wana ozali koluka kosilisa mikakatano mpe luká lisungi ya lisangá na ye.”

7. Lolenge nini bokatikati ezali kokokisa mokumba monene kati na mosala ya mokɛngɛli-motamboli?

7 Bokatikati ezali na ntina mpo na mokɛngɛli-motamboli akokisa mokumba na ye malamu. Motindo moko na baklisto mosusu, azali kosala makasi ete ‘aluka koyeba malamu makambo oyo mazali mpenza na ntina.’ (Bafilipi 1:10, NW )a Wana bankulutu ya lisangá moko bazali na mituna na ntina na likambo moko, ekozala likambo ya mayele ete bátalela yango elongo na mokɛngɛli ya zongazonga oyo ayei kotala bango. (Masese 11:14; 15:22) Na ntembe te, makanisi na ye oyo mazali na bokatikati mpe toli oyo ezwi moboko na yango kati na Makomami ekozala lisungi monene mpenza wana bankulutu yango bakokóba kotalela likambo yango na nsima ya boleki ya mokɛngɛli ya zongazonga na lisangá na bango. Paulo amonisaki likanisi motindo wana ntango ayebisaki Timoté ete: “Yango eyoki yo epai na ngai na nzela na batatoli mingi, opesa yango na mabɔkɔ na bato na sembo, baoyo babongi kolakisa bamosusu.”​—2 Timoté 2:2.

8. Mpo na nini boyekoli ya Biblia, bolukiluki, mpe bomanyoli ezali na ntina?

8 Boyekoli ya Makomami, bolukiluki, mpe bomanyoli ezali na ntina mingi mpo na kopesa toli ya malamu. (Masese 15:28) Mokɛngɛli moko ya etúká alobaki ete: “Na ntango tozali na likita elongo na bankulutu, tosengeli kobanga te kondima ete toyebi eyano te na motuna moko oyo etunami.” Kosaláká makasi ya koluka kokóma na “makanisi na Nkolo [“Klisto,” NW]” likoló na likambo moko ekosunga mokɛngɛli ete apesa toli oyo ezwi moboko na yango kati na Biblia, oyo ekosunga basusu mpo ete bákoka kotosa mokano ya Nzambe. (1 Bakolinti 2:16) Na ntango mosusu esɛngaka na mokɛngɛli-motamboli ete akomela la Société Watch Tower mpo na kosɛnga litambwisi. Na likambo moko to mosusu, kondima epai na Yehova mpe bolingo mpo na solo ezali na ntina mingi koleka lolenge oyo mokɛngɛli-motamboli akoki komimonisa na miso ya bato to koyeba koloba malamu. Na esika ete aya “na maloba kitoko mpe na mayele,” Paulo abandaki mosala na ye na Kolinti “na bolɛmbu mpe na nsɔ́mɔ mpe na kolɛnga mingi.” Yango esalaki ete mosala na ye mobimisa litomba te? Kútu, esalisaki nde Bakolinti ete bázala na kondima “na mayele na bato te kasi na nguya na Nzambe.”​—1 Bakolinti 2:1-5.

Bizaleli mosusu ya ntina mingi

9. Mpo na nini bankulutu-batámboli basengeli kozala na ezaleli ya boboto?

9 Ezaleli ya boboto esungaka bakɛngɛli-batamboli ete bázwa matomba malamu. Petelo alendisaki baklisto nyonso ete bázala “na kobondisana,” to “na boboto.” (1 Petelo 3:8, NW, maloba na nsé ya lokasa) Mokɛngɛli moko ya zongazonga amonisi ntina ya ‘komibanzabanza mpo na mosangani mokomoko ya lisangá mpe kotyela ye likebi ya solosolo mpenza.’ Na elimo motindo moko, Paulo akomaki ete: “Bósepelaka na basepeli; bólelaka na baleli.” (Baloma 12:15) Elimo motindo wana epusaka bakɛngɛli-batamboli ete básala milende makasi mpo na kososola malamu mikakatano mpe makambo oyo mazali kokómela baninga na bango bandimi. Na bongo, bakoki kopesa toli ya kolendisa oyo euti na Makomami, oyo ekoki kobimisa litomba malamu soki esalelami. Mokɛngɛli moko ya zongazonga oyo ayebi malamu komonisa boboto azwaki nkomá oyo eutaki na lisangá moko pene na engumba Turin, na Italie: “Soki olingi ete bátyela yo likebi, tyelá basusu likebi; soki olingi ete básepela na yo, sepelisá basusu; soki olingi ete bálinga yo, monisá bolingo; soki olingi ete básunga yo, zalaká pene mpo na kosunga. Ezali yango nde tosili koyekola epai na yo!”

10. Bakɛngɛli ya zongazonga mpe ya bitúká balobi nini na ntina na kozala na komikitisa, mpe ndakisa nini Yesu apesaki na likambo yango?

10 Kozala na komikitisa mpe kotika nzela na moto nyonso ete azala na mokakatano te mpo na kobɛlɛma epai na bango esungaka bakɛngɛli-batamboli ete básala nyonso oyo ekoki na bango. Mokɛngɛli moko ya zongazonga alobaki ete: “Kobatela ntango nyonso ezaleli ya komikitisa ezali na ntina mingi.” Akebisaka bakɛngɛli-batamboli nyonso oyo babandi mosala sika ete: “Bómitika te ete bópusama na lolenge loleki ndelo epai na bandeko oyo bazali na bozwi mingi mpo na oyo bakoki kosala epai na bino, mpe ete bósuka te kosala boninga bobele elongo na bandeko motindo yango, kasi bosengeli ntango nyonso kosala makasi ete bósalela bandeko nyonso na kozanga koponapona.” (2 Ntango 19:6, 7) Mpe mokɛngɛli-motamboli oyo azali mpenza na komikitisa akotalela te na lolenge loleki ndelo bonene ya mokumba na ye lokola momonisi ya la Société. Na lolenge lobongi mpenza, mokɛngɛli moko ya etúká alobaki ete: “Zalá na komikitisa mpe zalá pene ya koyokamela bandeko. Batelá ntango nyonso ezaleli oyo ekosala ete bato bábanga te kobɛlɛma epai na yo.” Lokola moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo, Yesu Klisto akokaki kosala ete bato bálɛngalɛnga liboso na ye, kasi azalaki mpenza na komikitisa mpe bato bazalaki kokakatana te mpo na kobɛlɛma epai na ye; yango wana ata bana mike mpe bazalaki komiyoka malamu kozala pene na ye. (Matai 18:5; Malako 10:13-16) Bakɛngɛli-batamboli balingaka ete bana mike, bilenge, mibangé​—ya solo, ata moto nani kati na lisangá​—abɛlɛma epai na bango kozanga kokakatana.

11. Soki esengeli, kosɛnga bolimbisi ekoki kobimisa mbano nini?

11 Na ntembe te, “biso nyonso tokokweaka na makambo mingi,” mpe ete mokɛngɛli-motamboli moko te azangi kosala mabungá. (Yakobo 3:2) Soki basali libungá, kosɛnga bolimbisi na bosembo nyonso ekopesa bankulutu mosusu ndakisa ya kozala na komikitisa. Engebene Masese 22:4, “kosokɛma mpe kotosa [Yehova] ezali nzela na bozwi mpe lokumu mpe bomoi.” Mpe, esɛngami epai na basaleli nyonso ya Yehova ete ‘bázala na komikitisa wana bazali kotambola elongo na Nzambe na bango,’ boye te? (Mika 6:8, ebimeli ya 1960 ya NW) Wana etunamaki epai na mokɛngɛli moko ya zongazonga soki akoki kopesa toli nini epai na nkulutu-motamboli oyo abandi mosala sika, ayanolaki ete: “Zalá na limemya makasi mpe na bonkondé epai na bandeko nyonso, mpe talelá bango lokola ete baleki yo. Okoyekola makambo mingi epai na bandeko. Zalá ntango nyonso na komikitisa. Komilatisa bomoto ya mindɔndɔ te. Kozala na lolendo te.”​—Bafilipi 2:3.

12. Mpo na nini molende kati na mosala ya boklisto ezali na ntina mingi?

12 Molende mpo na mosala ya kosakola ebakisaka nguya likoló na maloba ya mokɛngɛli-motamboli. Ya solo, wana mokɛngɛli-motamboli mpe mwasi na ye bazali komonisa ndakisa malamu kati na mosala ya kopalanganisa nsango malamu; bankulutu, basi na bango, mpe lisangá mobimba bakoyikisama mpiko ete bámonisa molende kati na mosala na bango ya kosakola. Mokɛngɛli moko ya zongazonga apesaki elendiseli oyo: “Zalá na molende kati na mosala ya kosakola. Nasili komona ete, mingimingi, soki lisangá ezali makasi kati na mosala ya kosakola, ezalaka mpe na mikakatano mingi te.” Mokɛngɛli mosusu ya zongazonga alobaki ete: “Nandimi ete soki bankulutu bazali kosala kati na mosala ya kosakola elongo na bandeko mibali mpe bandeko basi mpe bazali kosunga bango ete básepela na mosala ya kosakola, yango ekomema kimya na elimo mpe bosepeli monene kati na mosala ya Yehova.” Ntoma Paulo ‘ayikaki mpiko ete asakwela Batesaloniki Nsango Malamu ya Nzambe.’ Ezali likambo ya kokamwa te na komona ete bazalaki kolinga mingi komikundola boyei na ye mpe mosala na ye ya kosakola mpe bazalaki kozela na motema likoló komona ye lisusu!​—1 Batesaloniki 2:1, 2; 3:6.

13. Mokɛngɛli-motamboli atalelaka makambo nini wana azali kati na mosala ya kosala elongo na baninga baklisto?

13 Wana azali kati na mosala ya kosakola elongo na baninga na ye baklisto, mokɛngɛli-motamboli atalelaka ezalela ya makambo na bango mpe epai makoki na bango masuki. Atako makanisi oyo apesaka mpo na kobongisa lisusu mosala makoki kopesa litomba, ayebi ete basusu bakoki kozala na bobángi wana bazali kati na mosala ya kosakola elongo na nkulutu moko oyo azali na eksperiansi mingi. Na bongo, ntango mosusu kopesa elendiseli ekoki kozala malamu na esika ya kopesa toli. Wana akei elongo na basakoli to babongisi-nzela mpo na kotambwisa boyekoli moko ya Biblia, bakoki kosepela ete ye nde atambwisa yango. Yango ekoki mpenza kosalisa bango ete báyeba malamu mwa ndambo ya myango mosusu ya kobongisa lisusu lolenge na bango ya koteya.

14. Mpo na nini tokoki koloba ete bakɛngɛli-⁠batamboli ya molende balamwisaka mpe molende ya basusu?

14 Bakɛngɛli-batamboli oyo bazali na molende balamwisaka mpe molende ya basusu. Na Ouganda, mokɛngɛli moko ya zongazonga atambolaki elongo na ndeko moko kati na zámba monene na boumeli ya ngonga moko mpo na kokende kotala moyekoli moko ya Biblia oyo azalaki kosala bokóli mingi te. Wana ezalaki bango kotambola, mbula ebɛtaki makasi na boye ete na ntango bakómaki kuna bapɔlaki nzoto mobimba. Na ntango libota yango oyo ezalaki na basangani motoba bayokaki ete moto oyo ayaki kotala bango azalaki mokɛngɛli ya zongazonga, bakamwaki mingi mpenza. Bayebaki ete balakisi kati na lingomba na bango bakokaki soko moke te kotyela mpate likebi motindo wana. Na mokolo ya Lomingo oyo elandaki, bayanganaki na likita mpo na mbala ya liboso mpe bamonisaki mposa ya kokóma Batatoli ya Yehova.

15. Likambo nini ya kitoko mokɛngɛli moko ya zongazonga ya molende asalaki yango na Mexique?

15 Kati na etúká ya Oaxaca, na Mexique, mokɛngɛli moko ya zongazonga asalaki milende oyo bamizelaki na yango mpo na ye te. Asalaki ebongiseli ya kolekisa butu minei kati na bolɔ́kɔ moko mpo na kotala etuluku moko ya bakangami nsambo oyo basilaki kokóma basakoli ya Bokonzi. Na boumeli ya mikolo mingi, akendaki elongo na bakangami yango wana ezalaki bango kosakola na eteni moko na moko ya bolɔ́kɔ mpe kotambwisa boyekoli ya Biblia. Mpo na bosepeli oyo emonisamaki, bamoko ya boyekoli yango ekóbaki kino na butu. Mokɛngɛli ya zongazonga wana ya molende akomi ete: “Na nsuka, ngai mpe bakangami wana nsambo totondaki na esengo mpo na kolendisana oyo topesanaki moko na mosusu.”

16. Mpo na nini bilendiseli oyo bakɛngɛli-⁠batamboli mpe basi na bango bapesaka ezali na litomba?

16 Bakɛngɛli-batamboli bazali kosala milende makasi ete bápesaka elendiseli. Na ntango Paulo akendaki kotala masangá ya Makedonia, ‘alendisaki bango na maloba mingi.’ (Misala 20:1, 2) Maloba ya kolendisa makoki kopesa litomba mpo na kotambwisa ezala bilenge to mpe mikóló mpo ete bámityela mikano ya elimo. Bolukiluki moko ya likolólikoló esalemaki kati na filiale moko monene ya la Société Watch Tower, emonisaki ete bakɛngɛli-batamboli basilaki kolendisa pene na 20% ya bandeko ya bolingo malamu oyo bandimaki kosala mosala ya ntango nyonso. Na lisalisi ya ndakisa na ye ya malamu lokola mosakoli ya ntango nyonso ya Bokonzi, mwasi ya mokɛngɛli-motamboli azali mpe liziba monene ya elendiseli.

17. Mokɛngɛli moko ya zongazonga oyo asilá kokóma mobangé amiyokaka ndenge nini na ntina na libaku na ye ya kosunga basusu?

17 Mibangé mpe bato batutami na molimo bazali na mposa makasi ya kolendisama. Mokɛngɛli moko ya zongazonga oyo asili kokóma mobangé akomi ete: “Na mosala na ngai, likambo oyo epesaka ngai esengo mingi kati na motema ezali bongo libaku ya kosunga basakoli oyo batiká kosakola mpe mibangé kati na etongá ya Nzambe. Maloba oyo mazwami na Baloma 1:11, 12 ezali na ndimbola monene mpo na ngai, mpamba te nazwaka elendiseli mpe nguya monene ntango nazali kokaba ‘likabo na [“elimo,” NW] epai na bato motindo wana mpo na kolendisa bango.’ ”

Matomba oyo bazali kozwa kati na mosala na bango ya esengo

18. Mikano nini oyo mizwi moboko na yango kati na Makomami bakɛngɛli-batamboli bazali na yango?

18 Bakɛngɛli-batamboli bamibanzabanzaka mingi na ntina na matomba ya baninga na bango bandimi. Mposa na bango ezalaka bongo ya koyeisa masangá makasi mpe ya kolendisa yango na elimo. (Misala 15:41) Mokɛngɛli-motamboli moko asalaka makasi “mpo na kolendisa, kobɔndisa, kokólisa mposa ya kosala mosala ya ntango nyonso mpe kokóba kotambola kati na solo.” (3 Yoane 3) Mosusu alukaka kosalisa baninga bandimi ete bátengatenga te kati na kondima. (Bakolose 2:6, 7) Tómikundola ete mokɛngɛli-motamboli azali “mozalani ya solosolo kati na ekanganeli moko,” kasi te nkolo likoló na kondima ya basusu. (Bafilipi 4:3, NW; 2 Bakolinti 1:24) Boyei na ye ezali libaku ya kolendisama mpe ya kosala mosala mingi koleka na momeseno, ezali mpe libaku mpo na lisangani ya bankulutu ete bátalela lisusu bokóli oyo basalaki mpe bámityela mikano mpo na mikolo mizali koya. Na nzela ya maloba mpe ndakisa na ye, basakoli ya lisangá, babongisi-nzela, basaleli na misala, mpe bankulutu bakoki komizela ete bálendisama mpe bápusama mpo na mosala oyo mozali liboso na bango. (Kokanisá na 1 Batesaloniki 5:11.) Na bongo, tiká ete tósimba na motema na biso mobimba boyei ya mokɛngɛli ya zongazonga, mpe tózwa litomba mpenza kati na mosala oyo mosalemi na mokɛngɛli ya etúká.

19, 20. Lolenge nini bakɛngɛli-batamboli mpe basi na bango basili kozwa litomba mpo na mosala na bango ya sembo?

19 Bakɛngɛli-batamboli mpe basi na bango bazali kozwa mbano mingi mpo na mosala na bango ya sembo, mpe bakoki kondimisama ete Yehova akopambola bango mpo na malamu oyo bazali kosala. (Masese 19:17; Baefese 6:8) Georg mpe Magdalena bazali babalani oyo basili kokóma mibangé oyo basalaki na boumeli ya mibu mingi kati na mosala ya mokɛngɛli-motamboli. Wana bakendaki na liyangani moko na mboka Luxembourg, mwasi moko abɛlɛmaki epai na Magdalena, oyo ye apesaki litatoli esilaki koleka mibu 20. Mposa ya mwasi Moyuda yango ya koyekola solo elamwisamaki na lisalisi ya mokanda mokolimbolaka Biblia oyo Magdalena atikelaki ye, mpe na nsima ayaki kozwa batisimo. Ndeko mwasi moko na elimo abɛlɛmaki epai na Georg, amikundolaki ete bayambaká Georg na ndako na bango esili koleka mibu pene na 40. Lolenge oyo alakisaki bango nsango malamu na molende nyonso eyaki nsukansuka komema ye mpe mobali na ye ete bándima solo. Na ntembe te, Georg mpe Magdalena basepelaki mingi mpenza.

20 Mosala ya Paulo oyo ebimisaki mbuma mingi na Efese ememelaki ye esengo mpe mbala mosusu epusaki ye ete azongela maloba oyo ya Yesu: “Esengo na kopesa eleki esengo na kozwa.” (Misala 20:35) Lokola mosala ya bakɛngɛli-batamboli esɛngaka kosala mibembo ntango nyonso, baoyo bazali kosala yango bazali kozwa esengo, mingi mpenza na ntango bayaka koyeba ete mosala makasi na bango ezali kobota mbuma malamu. Mokɛngɛli-motamboli moko oyo alendisaki nkulutu moko oyo alɛmbaki na elimo azwaki nkomá oyo elobaki ete: “Osili kopesa nguya na bomoi na ngai ya elimo​—koleka na lolenge oyo yo moko okoki koyeba yango. Okoki koyeba mpenza na mobimba te bonene ya lisungi oyo osili kopesa epai na Asafa ya lelo, ‘oyo makolo na ye malingaki kosɛlimwa.’”​—Bakolose 4:11; Nzembo 73:2.

21. Mpo na nini okoki koloba ete 1 Bakolinti 15:58 eyokani na mosala ya bakɛngɛli-batamboli?

21 Moklisto moko mobangé oyo azalaki na mosala ya mokɛngɛli ya zongazonga na boumeli ya mibu mingi alingaka mingi komanyola likoló na 1 Bakolinti 15:58, epai kuna Paulo apesi elendiseli oyo ete: “Bótɛlɛma ngwi, bóninganaka te, bósalaka mosala na Nkolo ntango nyonso, awa eyebi bino ete kati na Nkolo mosala na bino ezali mpamba te.” Bakɛngɛli-batamboli bazali solo na mosala mingi kati na mosala ya Nkolo. Mpe tozali mpenza na botɔ́ndi mpo ete bazali kosala na esengo nyonso lokola bakapita ya sembo ya ngɔlu ya Yehova!

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá lisoló “Tokoki kozala na mosala mingi ya kosala mpe kozala na esengo?” oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Máí 1991, nkasa 28-​31.

Okoyanola lolenge nini?

◻ Mpo na nini bakɛngɛli-batamboli bakoki kotalelama lokola “bakapita malamu”?

◻ Wapi mwa ndambo ya makambo oyo esalisaka bakɛngɛli ya zongazonga mpe bakɛngɛli ya bitúká ete básala nyonso oyo ekoki na bango?

◻ Mpo na nini komikitisa mpe molende ezali na ntina mingi mpo na baoyo bazali kosala mosala ya bakɛngɛli-batamboli?

◻ Mikano nini kitoko bakɛngɛli-batamboli bazali na yango?

[Elilingi na lokasa 16]

Bakɛngɛli-batamboli basalaka makasi ete bálendisa baninga na bango bandimi

[Bililingi na lokasa 17]

Bilenge mpe mikóló bakoki kozwa litomba na boyokani na bango elongo na bakɛngɛli-batamboli mpe basi na bango

[Elilingi na lokasa 18]

Mosala ya bakɛngɛli-batamboli oyo mosalemi na molende nyonso mokólisaka mpe milende ya basusu

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto