Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 15/9 nk. 22-24
  • Osengeli mpenza kosɛnga bolimbisi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Osengeli mpenza kosɛnga bolimbisi?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bolingo esɛngisi biso na kosɛnga bolimbisi
  • “Bómikangela kosɔkɛma”
  • Kosɛnga bolimbisi ezali na ntina mingi kati na libala
  • Salela mayele ya kosɛnga bolimbisi
  • Ezali mpenza na ntina nasɛnga bolimbisi?
    Mituna oyo bilenge batunaka
  • Kosɛnga bolimbisi
    Lamuká!—2015
  • Kosɛnga bolimbisi ezali sɛkɛlɛ mpo na kozongisa boyokani
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Kosɛnga bolimbisi ezalaka mpasi mingi mpo na nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 15/9 nk. 22-24

Osengeli mpenza kosɛnga bolimbisi?

GEORGE BERNARD SHAW akomaki ete: ‘Nasɛngaka bolimbisi soko moke te.’ Basusu bakoki koloba ete ‘oyo esili kosalema ekoki kobongolama te.’

Ekoki kozala ete toboyaka kondima libungá mpo ete tozali kobanga koyoka nsɔ́ni. Mbala mosusu tomilóngisaka ete likambo ezali epai na moto mosusu. To mpe tokoki kozala na likanisi ya kosɛnga bolimbisi kasi tozali kozongisa yango nsima kino tokokanisa ete likambo yango lisili.

Na bongo, kosɛnga bolimbisi ezali na ntina? Yango ekoki mpenza kosala likambo?

Bolingo esɛngisi biso na kosɛnga bolimbisi

Bolingo kati na bandeko ezali elembo moko oyo emonisaka bayekoli ya solo ya Yesu Klisto. Ye alobaki ete: “Na bongo bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai soki bozalani na bolingo.” (Yoane 13:35) Makomami mazali kolɛndisa Baklisto ete ‘bálinganaka makasi na bolingo na motema.’ (1 Petelo 1:22) Bolingo makasi ezali kosɛngisa biso ete tósɛnga bolimbisi. Mpo na nini? Mpamba te bomoto ya kozanga kokoka ezali ntango nyonso koyeisa mayoki ya kozokisama oyo makolɛmbisa bolingo soko masilisami te.

Na ndakisa, na ntina na mikakatano kati na biso mpe ndeko moko kati na lisangá, tokoki kopona ete tosolola na ye te. Soko tosalelaki moto mabe, ndenge nini boyokani ya bolingo ekoki kozongisama? Mbala mingi, na kosɛngáká bolimbisi mpe na nsima kosala milende ya kosolola na lolenge ya mɔ́tɔ. Tozali na nyongo ya bolingo epai na bandeko na biso bandimi, mpe ntango tolobi ete toyoki mawa mpo ete tosalelaki moto moko mabe, tozali kofuta mwa ndambo ya nyongo yango.​—Baloma 13:8.

Tópesa ndakisa: Mari Carmen mpe Paqui bazali basi baklisto oyo bazalaki baninga uta ntango molai. Nzokande, mpo ete Mari Carmen andimaki bilobaloba ya bato, boninga na ye elongo na Paqui ekitaki. Kozanga ete ayebisa ye ntina, aboyaki mpenza Paqui. Pene na mbula moko na nsima, Mari Carmen ayaki koyeba ete bilobaloba wana ezalaki lokuta. Asalaki nini? Bolingo etindaki ye ete akende epai ya Paqui mpe na komikitisa nyonso amonisaki ete ayokaki mawa mpo na lolenge mabe oyo amitambwisaki. Bango mibale balelaki makasi mpe basilá kokóma baninga ya solosolo uta ntango wana.

Atako tokoki komiyoka ete tosali likambo ya mabe te, kosɛnga bolimbisi ekoki kosilisa kozanga koyokana. Manuel amikundoli: “Eleki mbula mingi ngai mpe mwasi na ngai tofandaki na ndako ya moko ya bandeko basi na biso na elimo wana azalaki na lopitalo. Tosalaki nyonso oyo ekoki na biso mpo na kosalisa ye mpe bana na ye na boumeli ya ntango oyo azalaki na bokɔnɔ. Kasi nsima ya kobima na lopitalo, amilelaki epai ya moninga moko ete tosalelaki mosolo ya ndako na lolenge malamu te.

“Tokendaki kotala ye mpe tolimbolaki ye ete mbala mosusu na ntina na bolenge mpe kozanga koyeba makambo mingi na bomoi, tosalaki te makambo na lolenge oyo ye akokaki kosala yango. Nokinoki ayanolaki na kolobáká ete ye nde azali na nyongo epai na biso mpo na oyo nyonso tosalaki mpo na ye. Mokakatano esilisamaki. Eksperiansi wana eteyaki ngai ntina ya kosɛnga bolimbisi na komikitisa nyonso wana mikakatano mibimi.”

Yehova apambolaki babalani wana mpo ete bamonisaki bolingo mpe ete ‘balandaki makambo makoyeisa kimya.’ (Baloma 14:19) Bolingo esangisi mpe kotalela mayoki ya basusu. Petelo apesi biso toli ete tómonisa “boboto.” (1 Petelo 3:8, NW) Soko tozali na boboto, tokozala pene ya kososola mpasi oyo toyeisi na nzela ya maloba to makambo oyo tokanisaki malamu te mpe tokotindikama ete tósɛnga bolimbisi.

“Bómikangela kosɔkɛma”

Ata bankulutu Baklisto ya sembo bakoki mpe kobimisa maloba ya kozokisana na bantango mosusu. (Kokanisá na Misala 15:37-​39.) Ezali wana mabaku oyo kosɛnga bolimbisi ekozala na litomba mpenza. Kasi nini ekosalisa nkulutu moko to moklisto mosusu nyonso oyo azali kokakatana mpo na kosɛnga bolimbisi?

Fungolá ezali komikitisa. Ntoma Petelo apesaki toli ete: ‘Bómikangela kosɔkɛma moko epai na mosusu.’ (1 Petelo 5:5) Atako ezali solo ete kati na matáta mingi ngámbo nyonso mibale ezalaka na ekweli, moklisto ya komikitisa akotalela mabungá na ye moko mpe azali pene na kondima yango.​—Masese 6:1-5.

Ye oyo bazali kosɛnga ye bolimbisi asengeli kondima yango na lolenge ya komikitisa. Na nzela ya lisese, tókanisa ete bato mibale oyo bazali na mposa ya kosolola batɛlɛmi moto na moto na likoló ya ngomba ikeseni. Ezali mpasi mpo na bango kosolola malamu likoló na libulu monene oyo ekaboli bango. Nzokande, wana moko na bango akiti na lobwaku mpe mosusu alandi ndakisa na ye, bakoki kosolola kozanga nkaká. Lolenge moko, soko Baklisto mibale bazali na mposa ya kosilisa mokakatano kati na bango, tiká ete na komikitisa nyonso moko akutana na mosusu, na maloba ya elilingi, na lobwaku mpe basɛngana bolimbisi oyo ebongi.​—1 Petelo 5:6.

Kosɛnga bolimbisi ezali na ntina mingi kati na libala

Libala kati na bato mibale ya kozanga kokoka epesaka mabaku ya kosɛnga bolimbisi. Mpe soki mwasi mpe mobali bazali na boboto, ekosengela na bango kosɛnga bolimbisi soki ekómeli bango ete báloba to básala likambo na lolenge ebongi te. Masese 12:18 emonisi ete: “Moto azali oyo akoloba lokola koswama na mbeli, nde lolemo na bato na mayele ezali na bomoi.” ‘Maloba ya kozokisa’ makoki kobongolama te, kasi makoki kolɛmbisama na kosɛnga bolimbisi ya solo. Ezali solo ete yango esɛngaka bososoli mpe molende.

Kolobáká na ntina na libala na ye, Susana alobi: “Ngai na Jack tobalani eleki mbula 24, kasi tozali naino koyekola makambo ya sika moko epai na mosusu. Na mawa, eleki mwa ntango, tokabwanaki mpe tofandaki moto na moto na esika na ye na boumeli ya mwa bapɔ́sɔ. Nzokande, toyokaki toli ya Makomami epai na bankulutu mpe tozongaki lisusu kofanda esika moko. Toyebi sikawa ete lokola tokeseni na bomoto na biso, kozanga boyokani esengeli mbala mosusu komonana. Soki yango esalami, nokinoki tosɛngaka bolimbisi mpe tomekaka makasi mpenza kokanga ntina ya makanisi ya moko na mosusu. Nazali na esengo ya koloba ete libala na biso ebongi malamu mpenza.” Jack abakisi ete: “Tosili mpe koyekola kososola bantango oyo tozalaka pene na kosilika. Na bantango motindo yango tomitalelaka moko na mosusu na bokɛngi koleka.”​—Masese 16:23.

Osengeli kosɛnga bolimbisi soki okanisi ete osali libungá te? Wana mayoki mozindo matalelami, ezali mpasi koyeba na bosembo mpenza soki nani azali na ekweli. Kasi oyo eleki ntina ezali bongo kimya kati na libala. Tótalela Abigaili, mwasi Moyisalaele moko oyo mobali na ye asalelaki Davidi na boboto te. Atako akokaki te kokweisama na ntina na bozoba ya mobali na ye, asɛngaki bolimbisi. Amilelaki ete: “Nabondeli yo ete olimbisa libungá na moombo na yo.” Davidi ayanolaki na kosaleláká ye boboto, kondimáká na komikitisa nyonso ete soko ezalaki mpo na ye te, alingaki kosopa makila ya bato oyo basali eloko te.​—1 Samwele 25:24-28, 32-​35.

Bobele bongo, moklisto mwasi moko na nkombo ya June, oyo asilá kobala eleki mbula 45, akanisi ete mpo libala elónga esɛngi motema malamu mpe kozala moto ya liboso mpo na kosɛnga bolimbisi. Alobi: “Namilobelaka ete libala na biso ezali na ntina koleka mayoki na ngai moko. Boye soki nasɛngi bolimbisi, namiyokaka ete nazali kosunga libala.” Mobangé mobali moko na nkombo Jim alobi ete: “Nasɛngaka bolimbisi epai ya mwasi na ngai ata na makambo mazangi ntina. Uta basalaki ye lipasó ya makasi, asilikaka noki. Yango wana mbala mingi nazingelaka ye na mabɔkɔ na ngai mpe nalobaka, ‘Molingami, nayoki mawa, nakanaki te kosilikisa yo.’ Lokola molona banyakeli mai, azongelaka esengo nokinoki.”

Soki tozokisi moto oyo tolingaka mingi, kosɛnga bolimbisi nokinoki ezali na nguya mpenza. Milagros andimi yango na motema mobimba, kolobáká ete: “Nazangaka komityela motema, liloba moko ya kozokisa na monɔkɔ ya mobali na ngai esilikisaka ngai. Kasi soki asɛngi bolimbisi, nokinoki na miyokaka malamu.” Solo mpenza, Makomami malobi na biso ete: “Maloba kitoko izali lokola mafuta na nzoi mpe na kobika kati na mikuwa.”​—Masese 16:24.

Salela mayele ya kosɛnga bolimbisi

Soko tokómisi kosɛnga bolimbisi na ntango esengeli momesano na biso, na ntembe te tokomona ete bato mosusu bakoyanola malamu. Mpe mbala mosusu ata bango moko bakosɛnga bolimbisi. Ntango tomiyoki ete tosilikisi moto, mpo na nini te kokómisa yango momesano ya kosɛnga bolimbisi na esika ya kolekisa ntango mpe milende mingi na koboyaka kondima libungá nyonso? Bamokili bakoki kokanisa ete kosɛnga bolimbisi ezali elembo ya bolembu, nzokande yango ezali komonisa mpenza bokoli ya moklisto. Ya solo, tolingi te kozala lokola baoyo bandimaka mabungá mosusu kasi bazali kokitisa bonene ya ngambo na bango. Na ndakisa, ekómelaka biso te na koloba kozanga sembo ete toyoki mawa? Soki tokómi nsima ya ngonga ebongisami mpe tosengi bolimbisi mingi, tosalaka milende ya kotosa ngonga mpo na mbala ekoya?

Na bongo, tosengeli mpenza kosɛnga bolimbisi? Ee. Kosala boye ezali lisɛngami mpo na biso moko mpe mpo na basusu. Kosɛnga bolimbisi ekoki kosalisa na kokitisa mpasi eyeisami na kozanga kokoka, mpe ekoki kobongisa boyokani oyo ebebaki. Kosɛnga bolimbisi nyonso tomonisi ezali liteya ya komikitisa mpe ezali kosalisa biso ete tokóma kotalela mingi mayoki ya basusu. Lokola mbano, bandeko na biso bandimi, mobalani na biso, mpe basusu bakotalela biso ete tozali bato oyo babongi na bolingo mpe kotyelama motema na bango. Tokozala na kimya ya makanisi, mpe Yehova Nzambe akopambola biso.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Bankombo na bango mpenza te.

[Bililingi na lokasa 23]

Kosɛnga bolimbisi ya solo ekólisaka bolingo ya boklisto

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto