Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 15/9 lok. 25
  • Lisapo ya mpela lizali kondimisa lisoló ya Biblia

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lisapo ya mpela lizali kondimisa lisoló ya Biblia
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 15/9 lok. 25

Lisapo ya mpela lizali kondimisa lisoló ya Biblia

MPELA ya mokili mobimba na mikolo ya Noa ezali likambo oyo lisalamaki solo. Lisoló yango lizali kolobelama na lolenge ekeseni na masapo oyo mazali kobɛtama na bikolo ndenge na ndenge na mokili mabimba. Na Tchad, mokili moko ya Afrika, etúlúká ebengami Moussaye balobelaka Mpela na motindo boye:

‘Ezalaka na ntango ya kala, na mboka moko mosika, kuna ezalaki na libota moko. Mokolo moko, mama ya libota yango alingaki kolamba bilei kitoko mpo na libota na ye. Na yango, azwaki liboka mpe motute na ye ete atuta masango mpo na kosala falini. Na ntango wana likoló ezalaki mpembeni koleka ndenge ezali sikawa. Kútu, soki otomboli lobɔkɔ na yo, okokaki kosimba yango. Atutaki masango na nguya na ye nyonso, mpe masango oyo atutaki ekómaki nokinoki falini. Kasi ezalaki ye kotuta, kozanga likebi mwasi yango atombolaki motute likoló koleka, mpe atɔbɔlaki lidusu na likoló! Nokinoki, mayi ebele ebandaki kokita na mabelé. Yango ekesanaki na mbula nyonso mosusu. Mbula ebɛtaki na boumeli ya mikolo sambo mpe butu sambo kino mabelé mobimba matondaki na mai. Wana mbula ezalaki konɔka, likoló ebandaki kotombwana kino ekomaki esika yango ezali lelo​—esika oyo tokoki kosimba yango te. Oyo nde likámá mpo na bato! Uta ntango yango, tobungisá libaku malamu ya kosimba likoló na mabɔkɔ na biso.’

Likambo ya kobenda likebi, masapo ya kala oyo mazali kolobela mpela ya mokili mobimba makoki kozwama bipai nyonso na mokili. Bikólo ya kala ya Amerika mpe bikólo ya kalakala ya mokili ya Australie, bango nyonso bazali na masapo na ntina na likambo yango. Makambo mikemike makoki kokesana, kasi masapo mingi mazali na likanisi moko oyo ete mabelé matondaki na mai mpe ete bato moke nde babikaki kati na masúwa masalamaki na moto. Kozala ya lisoló oyo na bisika mingi na mokili ezali kondimisa likambo oyo ete Mpela ya mokili mobimba esalamaki solo, lokola eyebisami na Biblia.​—Genese 7:11-20.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto