Masoló ya Basakoli ya Bokonzi
“Mitindá na yo nyonso mizali solo”
MWA moke liboso ete akufa, Mose alendisaki bato na Yisalaele ete bátosa mitindá nyonso ya Yehova. Alobaki ete: “Tyá mitema na bino na maloba nyonso oyo elakeli ngai bino lelo oyo, ete bókoka kolakela bana na bino yango, ete bango básɛnzɛla kosala maloba nyonso na mobeko oyo. Mpo ete ezali na bino likambo moke te, kasi ezali bomoi na bino.”—Deteronome 32:46, 47.
Bankámá ya bambula na nsima, mokomi na Nzembo amonisaki polele ete mateya nyonso ya Nzambe mazali na ntina mingi wana alobaki ete: “Yo nde ozali penepene, ɛ [Yehova], mpe [“mitindá na yo nyonso mizali,” NW] solo.” (Nzembo 119:151) Na ekeke ya liboso, Yesu ye moko mpe alobelaki motuya ya “maloba nyonso makobimaka na monoko na Nzambe.” (Matai 4:4) Mpe na nsé ya litambwisi ya Nzambe ntoma Paulo akomaki ete “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba.”—2 Timoté 3:16, NW.
Emonani polele ete Yehova Nzambe azali komizela ete basambeli na ye bátalela na motuya mpenza nsango oyo apesi biso na mobimba na yango kati na Liloba na ye. Ezali ata na eteni moko te ya Biblia oyo ezangi motuya. Ezali na lolenge wana nde Batatoli ya Yehova bazali kotalela Liloba ya Nzambe, lokola emonisami kati na lisoló oyo euti na île Maurice.
Mr. D— azalaki kofanda na mboka moko moke, epai kuna azalaki kosala mosala ya sinzili. Na boumeli ya ntango molai, azalaki koluka na bosembo nyonso lolenge lobongi ya kosambela Nzambe. Na butu, wana azalaki na mosala na ye ya sinzili, abandaki kotánga Biblia. Na nsuka, asilisaki kotánga yango na mobimba mpenza. Ayekolaki ete nkombo ya Nzambe ezali bongo Yehova—nkombo oyo esalelami mbala mingi kati na Biblia na ye na lokótá ya Hindi. Amonaki ete mokanda ya Emoniseli ezalaki mpenza kobenda likebi.
Na nsima amitunaki soki ezalaki na lingomba moko oyo elandaka Biblia na mobimba na yango. Amonaki ete mangomba oyo ye ayebaki, mingi mpenza, malandaka bobele biteni ya Biblia. Ezali na mangomba oyo mandimaka Makomami ya Liebele mpe maboyaka Makomami ya Greke ya boklisto. Mangomba mosusu matalelaka Makomami ya Liebele lokola ete ezali na motuya te, kopesáká bongo motuya bobele na Makomami ya Greke ya boklisto.
Mokolo mosusu, Mr. D— amonaki babalani mibale bazali kopola na mbula mpe abyangaki bango ete báya komibomba kati na ndako na ye. Bazalaki Batatoli ya Yehova. Mwasi asimbaki búku Emoniseli—kokokana na yango monene ebelemi!a Nokinoki Mr. D— asɛngaki bango búku yango. Batatoli bakanisaki ete makambo oyo mazwami kati na esakweli ya Emoniseli mazali mpenza mpasi mingi mpo na ye, na yango bapesaki ye mokanda mosusu. Kasi Mr. D—— asɛngaki bobele búku Emoniseli.
Na ntango azwaki búku yango mpo na ye moko, atángaki yango kozanga koumela. Na nsima andimaki koyekola Biblia elongo na Batatoli ya Yehova. Nokinoki, akamwaki na komona ete Batatoli bapesaka motuya na Biblia na mobimba na yango. Abandaki koyangana na makita pɔ́sɔ na pɔ́sɔ kati na Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova, epai kuna bayekolaka Makomami ya Liebele mpe Makomami ya Greke ya boklisto na mozindo mpenza. Sikawa azali mosakoli ya Bokonzi mpe mosangani asili kobatisama kati na lisangá ya boklisto.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.