Batelá elimo na yo ya etingyA
WAPI lolenge ya sikisiki, oyo endimami na Nzambe mpo na kolanda ntango nyonso kosalela Yehova na motema na biso mobimba? Ezali bongo kozala na elimo ya solosolo ya etingya kati na mitema na biso mpenza. Kosalela Yehova na molimo na biso mobimba elimboli kosalela ye na bomoto na biso mobimba, mpe esɛngaka botosi mozindo, ya kozanga kokakatana na makambo nyonso oyo ye azali kosɛnga biso ete tókokisa yango.
Mosakoli Mose alobelaki makasi ntina yango na ntango ayebisaki libota ya Yisalaele ete: “Okolinga [Yehova] Nzambe na yo na motema na yo mobimba, mpe na molimo na yo mobimba, mpe na nguya [ya bomoi, NW] na yo mobimba.” (Deteronome 6:5) Bikeke mingi na nsima, Yesu Klisto azongelaki lisusu etindá yango: “Okolinga [Yehova, NW] Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo mobimba.” (Matai 22:37) Ntoma Paulo alingaki mpe kolobela etindá yango na ntango ayebisaki Baefese ete ‘básalaka mokano ya Nzambe na motema na bango mobimba,’ mpe na ntango alendisaki Bakolose ete: “Nyonso oyo bozali kosala, bósala yango na molimo na bino mobimba lokola mpo na Yehova, kasi mpo na bato te.”—Baefese 6:6; Bakolose 3:23, NW.
Nzokande, kotya motema mpe molimo na biso kati na mosala na biso mpo na Nzambe ekozala mpasi soki tozali na elimo ya etingya te kati na biso mpenza to soki elimo ya etingya oyo tozalaki na yango liboso esili kolɛmba—ntango mosusu mpe esili nyonso. Lelo oyo, tozali kobika ntango oyo elimo ya etingya ezali na ntina mingi koleka bileko nyonso ya lisoló ya bato.
Bileko ya sikisiki oyo esɛngaki komonisa etingya
Liboso na ntango ya Klisto bileko oyo bizalaki kosɛnga komonisa etingya bizalaki mingi. Eleko ya Noa mpe eleko oyo ezalaki liboso ya kobomama ya Sodome mpe Gomola ezalaki mpe ntango ya komonisa etingya ya solosolo. (2 Petelo 2:5, 6; Yuda 7) Na ntembe te, mibu oyo mizalaki liboso ya Mpela mizalaki na mosala monene oyo ezalaki kosɛnga kokokisa yango na etingya nyonso. Atako Noa mpe libota na ye bayebaki sikisiki te ntango oyo Mpela esengelaki kobanda, ezaleli na bango ya “bobángi Nzambe” elendisaki bango ete básala na kozanga kozongisa makambo nsima.—Baebele 11:7, NW.
Bobele bongo, liboso na kobomama ya Sodome mpe Gomola, baanzelu “bapusaki Lota na etingya” mpe bayebisaki ye: “Ete okufa te.” (Genese 19:15, 17) Ee, na libaku wana mpe, elimo ya etingya ebikisaki bomoi ya bato ya sembo. Bikeke mingi na nsima, Bayuda oyo bazalaki na boombo na Babilone bazwaki elendiseli oyo ete: “Bólongwa! Bólongwa! Bókima na esika yango, bómama eloko na mbindo te; bóbima na kati na ye.” (Yisaya 52:11) Na mobu 537 L.T.B., bakangami soko 200 000 babimaki nokinoki na Babilone mpo na kotosa etindá wana ya esakweli oyo esɛngaki kosala na etingya.
Kati na mokomoko na makambo wana, elimo ya etingya epusaki baoyo bayokaki mpe babatelaki endimeli makasi ete bazalaki kobika na eleko oyo ezalaki kosɛnga kosala na etingya ete básala mosala na molimo na bango mobimba.
Elimo ya etingya na eleko ya Baklisto
Ntina ya komonisa etingya elobelami mbala na mbala kati na Makomami ya Greke ya boklisto. “Bósɛnzɛlaka,” “bólala mpongi te,” “[bókɛngɛla, NW],” “boselingwa”—nyonso oyo ezali maloba Yesu asalelaki mpo na kopesa bayekoli na ye elimo ya solosolo ya etingya. (Matai 24:42-44; Malako 13:32-37) Lisusu, masese na ye na ntina na baseka zomi, moombo mabe, batalanta, mpe kokabolama ya bampate na bantaba, nyonso wana epusaki bato ete bázala na motema mɔ́tɔmɔ́tɔ mpe epesaki mayoki ya kosala na etingya.—Matai 25:1, 14, 15, 32, 33.
Yesu asukaki te bobele na koloba na ntina na etingya kasi amonisaki mpe bosolo ya maloba na ye na kosaláká na etingya nyonso. Mokolo mosusu ayebisaki ebele ya bato wana balingaki ete aumela elongo na bango: “Ekoki na ngai kosakola Nsango Malamu na Bokonzi na Nzambe na mboka mosusu lokola, mpo ete natindami na likambo yango.” (Luka 4:42, 43) Lisusu, alendisaki bayekoli na ye ete básɛnga na Nkolo ya elanga ete atinda basáli mingi kati na elanga na Ye mpamba te “mbuma na elanga iteli mingi mpenza nde basáli bazali mingi te.” (Matai 9:37, 38) Lisɛngi mozindo motindo wana ezali komonisa mpenza elimo ya etingya.
Elimo wana ya etingya elongobanaki te?
Basusu bakoki kotuna motuna oyo na kokanisa na lolenge lobongi ete, mpo na nini elimo ya etingya ezalaki na ntina na eleko wana, soki “bolɔ́zi monene” oyo elakamaki ezalaki naino bikeke mingi mosika?—Matai 24:21.
Tokoki kondimisama ete ezalaki te bokosi mpamba oyo Yesu asalelaki mpo ete balandi na ye bázala ntango nyonso na mosala mingi kati na mosala ya kosakola mpe koteya. Ezalaki nde mpo na bolingo oyo Klisto azalaki na yango mpo na bayekoli na ye, mpe bososoli na ye ya kokoka mpo na oyo etali makanisi ya Nzambe na ntina etali ntango, yango ezalaki moboko ya toli na ntina na etingya. Ee, Yesu ayebaki ete elimo ya etingya ezalaki na ntina mpo na kokokisa mposa ya Yehova engebene mokano na ye. Lisusu, ayebaki ete bayekoli na ye balingaki bango moko kozwa matomba na elimo na kobateláká elimo ya etingya kino bozongi na ye.
Yesu Klisto amonisaki polele ete mosala ya kopesa litatoli na mokili mobimba mosengelaki kosalema mpe na boumeli ya ntango moko oyo esilaki koponama. (Matai 24:14; Malako 13:10) Bokóli ya mokemoke ya matambe ya mokumba yango emonisamaki polele bobele wana mosala yango moyebanaki malamu. Kasi esengelaki kosala na etingya mpo na kokokisa litambe moko na moko. Yesu amonisaki bokóli ya mokumba yango na ntango alobaki ete: “Bokozala batatoli na ngai kati na Yelusaleme, na Yuda mobimba, na Samalia, mpe kino nsuka na mokili.” (Misala 1:8) Mpe ezali na lolenge wana nde mokumba yango esili koyebana kino na mikolo na biso. Ebimisaki makambo mosusu oyo basaleli ya Nzambe bamizelaki na yango te na boumeli ya ntango, kosɛngáká bongo kosembolama na bantango mosusu mpo na oyo etali bososoli.
Elimo ya etingya ya baklisto esalelami mpo na kokokisama ya mokano ya Yehova. Esili kosalisa bayekoli baklisto mpo ete bákokisa bokóli ya mokumba na bango engebene manáka ya Yehova oyo ezangi libúngá. Bobele bongo mpe lelo oyo, soki tozongisi makanisi na nsima ya bambula soko 2 000, tokoyeba malamu mpenza manáka wana ya Yehova.
Elimo ya etingya ya boklisto esalisaki bayekoli ete bápesa litatoli mozindo na Yelusaleme, na Yudea, na Samalia, mpe epai na Bayuda oyo bapalanganaki na bamboka ndenge na ndenge liboso na mobu 36 T.B. na ntango ngolu monene elongolamaki epai na Yisalaele. (Danyele 9:27; Misala 2:46, 47) Bobele bongo, elimo ya etingya ya boklisto esungaki lisangá ya liboso na kopesáká likebisi ya polele epai na Bayuda nyonso ete ebongiseli na bango etikalaki moke esuka. (Luka 19:43, 44; Bakolose 1:5, 6, 23) Mpe wana esukaki na 70 T.B., kozanga ete bámizela na yango, na nsima elimo ya etingya esalisaki batatoli ya Klisto ya ekeke ya liboso ete básakola elikya ya likoló epai na bato mingi liboso ete lipɛngwi oyo eyebisamaki uta kala lipalanganisa molili na yango oyo ebomaka na elimo. (2 Batesaloniki 2:3; 2 Timoté 4:2) Na nsima, na boumeli ya bikeke ya eleko oyo ebéngami moyen âge, ndambo moke ya baklisto oyo bakokani na nganu babatelaki ntango nyonso elikya ya Bokonzi, lokola Klisto Yesu asakolaki yango. (Matai 13:28-30) Na nsuka, na ntango na ye elakamaki, Yehova atɛlɛmisaki lisangá moko ya nguya na mikolo na biso, oyo elendisamaki na nsango na ye ya ntina mingi ya kosambisama mpo na baoyo bazali kobika na eleko oyo ya nsuka.—Matai 24:34.
Na ndakisa ya Danyele na ntango ya kala, Batatoli ya Nzambe ya mikolo na biso bakoki soko moke te koluka kobɛtɛla Yehova ntembe, kotunáká ye ete: “Ozali kosala nini?” (Danyele 4:35) Bazali na elikya ete Yehova ayebi sikisiki nini oyo esengeli mpo ete mosala na ye ekokisama engebene manáka mpenza. Na yango, na esika ya kobɛta ntembe na ntina na lolenge oyo Yehova abongisaka makambo, bazali na esengo lokola Yehova asili kopesa bango libaku ya kosala elongo na ye na boumeli ya ntango oyo ya ntina mingi.—1 Bakolinti 3:9.
Elendiseli mosusu mpo na elimo ya etingya
Ntina mosusu tosengeli komonisa etingya ezali ete tozali na likoki te ya koyeba mokolo mpe ntango ya sikisiki oyo bolɔ́zi monene ekobima pwasa. Yesu Klisto ayebisaki polele ete moto moko te awa na mabelé ayebi mokolo mpe ntango ebongisami oyo likambo wana monene ekobanda. (Matai 24:36) Mokolo mosusu, ayebisaki bayekoli na ye oyo bazalaki motema likoló ete: “Ezali likambo na bino koyeba ntango soko bilaka bisili Tata kotya na bokonzi na ye moko te.” (Misala 1:7) Ee, nsuka ya likambo emonani polele, kasi tozali na lotómo te ya koluka koyeba makambo nyonso ya mikemike oyo matali yango.
Ntoma Paulo azalaki na ezaleli malamu mpo na oyo etali etingya. Ekoki kozala ete azalaki kokanisa maloba ya Yesu na ntango akomaki epai na Batesaloniki na ntina na kozala ya Klisto: “Bandeko, mpo na makambo na ntango mpe na bilaka, bozali na bosɛnga te ete nakomela bino.” (1 Batesaloniki 5:1) Akomaki mokanda wana soko bambula 17 nsima wana Yesu alobaki ete: “Bokozala batatoli na ngai . . . mpe kino nsuka na mokili.” (Misala 1:8) Na ntango wana likambo mosusu elingaki kokomama te mpamba te likambo mosusu ebakisamaki te. Atako bongo bakokaki kozala na elikya ete mokolo ya Yehova esengeli mpenza koya “lokola moyibi kati na butu” wana baklisto bakozala naino koteya na etingya nyonso.—1 Batesaloniki 5:2.
Ekokaki mpenza komonana te ete wana bazalaki naino komikundola maloba yango, baklisto ya liboso bakanisaki ete mokolo ya Yehova mozalaki mosika. Ya solo, bayebaki masese ya Yesu na ntina na mokonzi oyo akendaki na mboka moko mosika mpe na ntina na moto oyo akendaki mobembo na mboka mopaya. Lisusu, bayebaki ete masese yango emonisaki ete “na nsuka” mokonzi akozonga mpe moto na mobembo akozonga “nsima na ntango molai.” Kasi, na ntembe te, babulunganisamaki na mituna lokola oyo, “Nsuka” yango ekoya ntango nini? “Nsima na ntango molai” elimboli nini? Mbula zomi? Mbula ntuku mibale? Mbula ntuku mitano? To bambula mingi lisusu? (Luka 19:12, 15; Matai 25:14, 19) Maloba oyo ya Yesu masengelaki kokóba kozongela bango na matoi: “Ekoki na bino mpe koselingwa, mpo ete mwana na moto akoya na ntango ekokanisa bino te.”—Luka 12:40.
Litomba ya kozala na elimo ya etingya
Ee, elimo ya etingya oyo epusami na Nzambe elendisaki mpenza baklisto ya ekeke ya liboso na lolenge malamu, esalisaki bango ete bázala ntango nyonso na makambo mingi ya kosala kati na mosala moleki ntina oyo ya kosakola mpe ya koteya. Ezali kokóba kolendisa biso lelo oyo na ndenge mingi. Ezali kobatela biso mpo ete tókóma goigoi te to ‘tólɛmba te na kosala oyo ezali malamu.’ (Bagalatia 6:9) Ezali kobatela biso ete tómikɔtisa te na koleka ndelo kati na mokili mpe elimo na yango ya kolengola mpe ya koluka kokóma na biloko mingi ya mosuni. Ezali kobatela elimo na biso ete tókanisaka ntango nyonso likoló na “bomoi ya solo.” (1 Timoté 6:19, NW) Nkolo Yesu alobaki ete bayekoli na ye bakozala lokola “bampate kati na nkoi,” mpe ayebaki ete tosengeli kozala ntango nyonso na ekateli ya mpiko, na makanisi mabongisami malamu mpo na kobundisa mokili. Ee, tosili kobikisama, kobatelama mpo na elimo na biso ya etingya ya boklisto.—Matai 10:16.
Kosaleláká mayele na ye mazangi nsuka, Yehova Nzambe apesaka ntango nyonso na basáli na ye boyebi oyo ekoki na bango mpo na kobatela elimo na bango ya etingya. Na boboto nyonso, asili kondimisa biso ete tozali kobika na “mikolo na nsuka” ya ebongiseli ya biloko oyo esilá kobeba. (2 Timoté 3:1) Tokundwelami ntango nyonso ete tosengeli kokóba kongɛnga lokola bingɛngɛli kino eleko oyo tozali kobika na yango ekoleka na bolɔ́zi monene, oyo nsuka yango ekozala bongo na Armagedon.—Bafilipi 2:15; Emoniseli 7:14; 16:14, 16.
Ee, elimo ya etingya ya Nzambe ezali na ntina mingi kati na mosala oyo tosalaka na molimo na biso mobimba mpo na Yehova. Epɛngolaka mpe esalisaka basaleli ya Nzambe ete bátɛmɛla masenginya ya Zábolo oyo epusaka bango ete ‘bálɛmba mpe bákwea kati na milimo na [bango].’ (Baebele 12:3) Mpo na seko, komipesa na molimo na biso mobimba ekosalisa basaleli ya Yehova ete bátosa ye, kasi sikawa, na mikolo oyo mizali liboso ya Armagedon, elimo makasi, ya solosolo ya etingya ezali eloko ya ntina mingi kati na ezaleli ya komipesa na molimo na biso mobimba.
Tiká ete Yehova Nzambe asalisa biso ete tóbatela elimo na biso ya etingya wana tozali kokóba kozongela maloba oyo ya ntoma Yoane ete: “Bobele bongo, Nkolo Yesu, oya.”—Emoniseli 22:20.